-
Kobotama lisusu—Yango nde nzela ya lobiko?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Avril
-
-
Kobotama lisusu—Yango nde nzela ya lobiko?
SOKI batuni yo: “Obotamá lisusu?” Okopesa eyano nini? Bandimi ya mangomba mingi na mokili bakondima mpenza ete “Ɛɛ!” Bakanisaka ete kobotama lisusu ezali elembo ete moto azali moklisto ya solosolo mpe ezali nzela kaka moko mpo na kozwa lobiko. Bazalaka na makanisi ndenge moko na bakonzi ya mangomba lokola Robert Sproul, moto moko ya teoloji oyo akomaki ete: “Soki moto abotami lisusu te, . . . azali moklisto te.”
Yo mpe okanisaka ete kobotama lisusu ezali nzela ya lobiko? Soki ezali bongo, na ntembe te okolinga kosalisa bandeko mpe baninga na yo bámona nzela yango mpe bálanda yango. Nzokande, mpo básala yango basengeli koyeba bokeseni oyo ezali kati na moto oyo abotami lisusu ná moto oyo abotami lisusu te. Ndenge nini okoki kolimbwela bango likambo yango?
Bato mingi bakanisaka ete moto oyo ‘abotami lisusu’ ezali moto oyo alapi ndai ya kosalela Nzambe mpe Klisto mpe mpo na yango alongwe na liwa ya elimo mpe akómi na boyokani ya malamu na Nzambe. Kutu, buku moko (Merriam-Webster’s Collegiate Dictionary—Eleventh Edition), emonisi ete moto oyo abotami lisusu ezali “moklisto oyo amipesi lisusu mobimba mpe amonisi lisusu kondima na ye, mingimingi nsima ya koyeba Nzambe malamumalamu.”
Okokamwa soki oyoki ete Biblia elobi bongo te? Okolinga koyeba oyo Liloba ya Nzambe eteyaka mpenza na likambo yango? Na ntembe te, okozwa matomba mingi soki oyekoli likambo yango. Mpo na nini? Mpamba te koyeba malamumalamu soki kobotama lisusu elimboli nini ekobongola bomoi mpe bilikya na yo.
Biblia eteyaka nini?
Na Biblia mobimba, maloba “kobotama lisusu” ezali kaka na Yoane 3:1-12, epai balobeli lisolo kitoko oyo Yesu asololaki na mokonzi moko ya lingomba na Yelusaleme. Lisolo yango mobimba ezali na etanda oyo ezali na lisolo oyo. Tosɛngi yo otánga yango na likebi mpenza.
Na lisolo yango, Yesu alobelaki makambo mingi oyo ‘kobotama ya sika’a ekokisaka. Kutu, lisolo yango ya Yesu ekosalisa biso tózwa biyano na mituna mitano oyo ya ntina:
◼ Kobotama lisusu ezali na ntina nini?
◼ Moto ye moko nde azwaka ekateli ya kobotama lisusu?
◼ Mokano na yango ezali nini?
◼ Ndenge nini esalemaka?
◼ Mbongwana nini yango ememaka?
Tiká tótalela mituna yango mokomoko.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Maloba ‘kobotama ya sika’ ezali na 1 Petelo 1:3, 23. Ezali lolenge mosusu ya kolobela “kobotama lisusu.” Maloba yango mibale euti na verbe ya Grɛki gen·naʹo.
[Etanda/Elilingi na lokasa 4]
“Bosengeli kobotama lisusu”
“Nzokande ezalaki na moto moko na kati ya Bafalisai, nkombo na ye ezalaki Nikodeme, moyangeli moko ya Bayuda. Moto yango ayaki epai na ye na butu mpe alobaki na ye ete: ‘Labi, toyebi ete yo na ndenge na yo ya moteyi outi epai ya Nzambe; mpo moto moko te akoki kosala bilembo oyo yo ozali kosala soki Nzambe azali na ye te.’ Yesu azongiselaki ye ete: ‘Ya solo mpenza nazali koloba na yo ete, Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.’ Nikodeme alobaki na ye ete: ‘Ndenge nini moto akoki kobotama ntango azali mokóló? Akoki nde kokɔta na matrisi ya mama na ye mpo na mbala ya mibale mpe abotama?’ Yesu ayanolaki ete: ‘Ya solo mpenza nazali koloba na yo ete, Soki moto abotami te na mai mpe na elimo, akoki kokɔta na bokonzi ya Nzambe te. Oyo ebotami na mosuni ezali mosuni, mpe oyo ebotami na elimo ezali elimo. Kokamwa te mpo nayebisi yo ete, Bosengeli kobotama lisusu. Mopɛpɛ epɛpaka epai yango elingi, mpe oyokaka makɛlɛlɛ na yango, kasi oyebaka te epai yango euti mpe epai yango ezali kokende. Moto nyonso oyo abotami na elimo azali mpe bongo.’ Nikodeme azongiselaki ye ete: ‘Ndenge nini makambo wana ekoki kosalema?’ Yesu azongiselaki ye ete: ‘Ozali moteyi ya Yisalaele kasi oyebi makambo oyo te? Ya solo mpenza nazali koloba na yo ete, Tozali koloba oyo toyebi mpe tozali kotatola oyo tomoni, kasi bino boyambaka te litatoli oyo biso topesaka. Soki nayebisi bino makambo ya mabelé kasi bozali kondima te, ndenge nini bokondima soki nayebisi bino makambo ya likoló?’”—Yoane 3:1-12.
-
-
Kobotama ya sika—Ezali na ntina?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Avril
-
-
Kobotama ya sika—Ezali na ntina?
NA LISOLO na ye na Nikodeme, Yesu amonisaki ete kobotama lisusu ezali na ntina mingi. Ndenge nini amonisaki yango?
Talá ndenge Yesu amonisaki ntina ya kobotama lisusu ntango asololaki na Nikodeme. Alobaki boye: “Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Maloba “soki moto abotami lisusu te” mpe “akoki komona bokonzi ya Nzambe te” emonisi ntina ya kobotama lisusu. Tózwa ndakisa moko: Soki moto moko alobi ete, “soki moi ebimi te, ntɔngɔ ekotana te,” moto yango alingi koloba ete ntɔngɔ ekoki kotana kaka soki moi ebimi. Ndenge moko, Yesu alingaki koloba ete mpo na ‘komona Bokonzi ya Nzambe,’ moto asengeli kobotama lisusu.
Mpo na moto oyo akoki kokakatana na likambo yango, Yesu alobaki boye: “Bosengeli kobotama lisusu.” (Yoane 3:7) Na ntembe te, mpo na Yesu moto asengeli kobotama lisusu mpo na “kokɔta na Bokonzi ya Nzambe.”—Yoane 3:5.
Lokola mpo na Yesu kobotama lisusu ezalaki likambo ya ntina mingi, Baklisto basengeli kosala nyonso mpo báyeba likambo yango malamumalamu. Na ndakisa, okanisi ete moklisto ye moko nde akoki kopona kobotama lisusu?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]
“Ntɔngɔ ekoki kotana kaka soki moi ebimi”
-
-
Kobotama ya sika—Moto ye moko nde asengeli kopona yango?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Avril
-
-
Kobotama ya sika—Moto ye moko nde asengeli kopona yango?
NANI asalaka ete moto abotama lisusu? Mpo na kolendisa baklisto bábotama lisusu, bateyi mosusu bazongelaka maloba ya Yesu oyo: “Bosengeli kobotama lisusu.” (Yoane 3:7) Bateyi yango basalelaka maloba wana lokola mobeko, ezali lokola nde batindaka bato ete, “bóbotama lisusu!” Na ndenge yango, bateyaka ete mondimi mokomoko asengeli kotosa Yesu mpe kosala nyonso mpo na kobotama lisusu. Makanisi yango etindaka bato bámona ete kobotama lisusu ezali ekateli ya moto ye moko. Kasi, yango eyokani na likambo oyo Yesu alobaki na Nikodeme?
Soki totángi na likebi maloba ya Yesu, tokomona ete ateyaki te ete moto ye moko nde asengeli kopona soki akobotama lisusu to te. Mpo na nini tolobi bongo? Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “abotami lisusu” ekoki mpe kobongolama na “asengeli kobotama uta na likoló.”a Na yango, tokoki koloba ete kobotama lisusu eutaka na “likoló” to “epai ya Tata.” (Yoane 19:11; Yakobo 1:17) Ɛɛ, Nzambe nde asalaka ete moto abotama lisusu.—1 Yoane 3:9.
Soki tobosani te maloba “uta na likoló,” ekozala mpasi te tóyeba ntina oyo moto ye moko akoki te kopona kobotama lisusu. Kanisá naino ntango obotamaki. Yo moko nde oponaki kobotama? Te! Obotamaki mpo tata na yo nde asalaki ete obotama. Ndenge moko mpe, tokoki kobotama lisusu kaka soki Nzambe, tata na biso ya likoló, asali ete tóbotama lisusu. (Yoane 1:13) Yango wana, ntoma Petelo alobaki boye: “Nzambe mpe Tata ya Nkolo na biso Yesu Klisto apambolama, mpo engebene motema mawa na ye monene apesaki biso kobotama moko ya sika.”—1 Petelo 1:3.
Ezali mobeko?
Kasi, bato mosusu bakoki komituna boye: ‘Soki ezali solo ete moto ye moko akoki te kopona kobotama lisusu, mpo na nini Yesu alobaki ete “bosengeli kobotama lisusu”?’ Yango ezali motuna malamu mpenza. Ya solo, soki maloba ya Yesu ezalaki mpenza mobeko, tokoki koloba ete azalaki kotinda bato básala likambo oyo eleki makoki na bango. Yango ebongi ata moke te. Na yango, Yesu alingaki koloba nini na maloba bosengeli “kobotama lisusu”?
Soki totaleli maloba yango malamumalamu ndenge ekomamaki na monɔkɔ ya Grɛki, tokomona ete ezalaki mobeko te. Emonisaki nde likambo oyo esengelaki kosalema. Na maloba mosusu, ntango Yesu alobaki ete bosengeli “kobotama lisusu,” apesaki mobeko te, kasi amonisaki nde likambo oyo esengelaki kosalema. Alobaki boye: “Bosengeli kobotama lisusu uta na likoló.”—Yoane 3:7, Modern Young’s Literal Translation.
Mpo na kokanga ntina ya likambo yango, tózwa ndakisa ya engumba moko oyo ezali na biteyelo mingi. Moko ya biteyelo yango ezali kaka mpo na bana-mboka oyo bafandaka mosika na engumba yango. Mokolo moko, elenge mobali moko oyo azali mopaya ayebisi mokambi ya eteyelo yango ete “alingi kokɔta na eteyelo na ye.” Mokambi yango ayebisi ye ete: “Mpo na kokɔta na eteyelo oyo, osengeli kozala mwana-mboka.” Ya solo, maloba ya mokambi ezali mobeko te. Azali te kotinda elenge yango ete “zalá mwana-mboka!” Mokambi yango amonisi kaka likambo oyo esɛngami mpo na kokɔta na eteyelo yango. Ndenge moko mpe, ntango Yesu alobaki ete: “Bosengeli kobotama lisusu,” azalaki kaka komonisa likambo oyo esɛngami mpo na “kokɔta na Bokonzi ya Nzambe.”
Bokonzi ya Nzambe ezali likambo mosusu oyo ezali na boyokani na likambo ya kobotama lisusu. Etaleli motuna oyo: Mokano ya kobotama lisusu ezali nini? Eyano na motuna wana ekosalisa yo oyeba malamumalamu soki kobotama lisusu elimboli nini.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Babiblia mingi ebongolaka Yoane 3:3 bongo. Na ndakisa, La Bible de Jérusalem elobi boye: “Soki moto abotami uta na likoló te, akomona Bokonzi ya Nzambe te.”
[Elilingi na lokasa 6]
Boyokani nini ezali na likambo etali kobotama ya moto ná kobotama ya sika?
-
-
Kobotama ya sika—Mokano na yango ezali nini?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Avril
-
-
Kobotama ya sika—Mokano na yango ezali nini?
BATO mingi bakanisaka ete mpo na kozwa bomoi ya seko, moto asengeli kobotama lisusu. Nzokande, talá oyo Yesu alobaki mpo na mokano ya kobotama lisusu. Alobaki boye: “Soki moto abotami lisusu te, akoki komona bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:3) Na yango, moto asengeli kobotama lisusu mpo na kokɔta na Bokonzi ya Nzambe, kasi te mpo na kozwa lobiko. Bato mosusu bakoki kotuna boye: ‘Kasi, maloba yango mibale—kokɔta na Bokonzi mpe kozwa lobiko—ezali kolobela kaka mbano moko te?’ Te, ezali kolobela mbano moko te. Mpo na komona bokeseni yango, tótalela naino ndimbola ya maloba “bokonzi ya Nzambe.”
Bokonzi ezali guvɛrnema. Na yango, maloba “bokonzi ya Nzambe” elimboli “guvɛrnema ya Nzambe.” Biblia eteyaka ete Yesu Klisto, “mwana ya moto,” azali Mokonzi ya Bokonzi ya Nzambe mpe ete akoyangela elongo na bato mosusu. (Danyele 7:1, 13, 14; Matai 26:63, 64) Lisusu, emonaneli moko oyo ntoma Yoane azwaki emonisaki ete bato oyo bakoyangela elongo na Klisto bakoponama “na mabota nyonso mpe na minɔkɔ nyonso mpe na mikili nyonso mpe na bikólo nyonso” mpe “basengeli koyangela mabelé.” (Emoniseli 5:9, 10; 20:6) Liloba ya Nzambe emonisi lisusu ete bato yango bazali “etonga moke,” ya bato 144 000 oyo “basombamaki na mabelé.”—Luka 12:32; Emoniseli 14:1, 3.
Bokonzi ya Nzambe ezali wapi? “Bokonzi ya Nzambe” ebengamaka mpe “bokonzi ya likoló”; yango emonisi ete Yesu ná baninga na ye bakoyangela uta na likoló. (Luka 8:10; Matai 13:11) Na yango, Bokonzi ya Nzambe ezali guvɛrnema ya likoló oyo etambwisami na Yesu Klisto mpe mwa etuluku ya bato oyo baponami na mabelé mpo na koyangela elongo na ye.
Kasi, Yesu alingaki koloba nini ntango alobaki ete moto asengeli kobotama lisusu mpo na “kokɔta na Bokonzi ya Nzambe”? Alingaki koloba ete moto asengeli kobotama lisusu mpo na koyangela elongo na Klisto na likoló. Yango wana, tokoki koloba ete mokano ya kobotama lisusu ezali ya kobongisa mwa etuluku ya bato mpo bákende koyangela na likoló.
Tosili komona ete kobotama lisusu ezali na ntina mingi, Nzambe nde aponaka ete moto abotama lisusu, mpe yango ezali kobongisa mwa etuluku ya bato mpo bákende koyangela na likoló. Kasi ndenge nini likambo yango esalemaka?
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 7]
Mokano ya kobotama lisusu ezali ya kobongisa mwa etuluku ya bato mpo bákende koyangela na likoló
[Elilingi na lokasa 7]
Bokonzi ya Nzambe esangisi Yesu Klisto ná baninga na ye oyo baponami awa na mabelé
-
-
Kobotama ya sika—Esalemaka ndenge nini?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Avril
-
-
Kobotama ya sika—Esalemaka ndenge nini?
YESU ayebisaki Nikodeme ntina ya kobotama lisusu, nani asalaka ete moto abotama lisusu, mokano na yango mpe ndenge oyo likambo yango esalemaka. Alobaki boye: “Soki moto abotami te na mai mpe na elimo, akoki kokɔta na bokonzi ya Nzambe te.” (Yoane 3:5) Na yango, moto abotamaka lisusu na nzela ya mai mpe elimo. Kasi, kobotama “na mai mpe na elimo” elimboli nini?
“Mai mpe elimo”—Ezali nini?
Lokola Nikodeme azalaki moto ya mayele na makambo ya mangomba ya Bayuda, ayebaki ndimbola oyo Makomami ya Liebele ezalaki kopesa na maloba “elimo ya Nzambe”—Nguya ya Nzambe oyo ekoki kosalisa bato básala makambo ya kokamwa. (Genese 41:38; Exode 31:3; 1 Samwele 10:6) Yango wana, ntango Yesu asalelaki liloba “elimo,” Nikodeme ayebaki ete azali kolobela elimo santu, nguya ya Nzambe.
Kasi ezali boni mpo na mai? Tótalela makambo oyo Biblia elobi liboso mpe nsima ya lisolo ya Yesu ná Nikodeme. Makambo yango emonisi ete Yoane Mobatisi mpe bayekoli ya Yesu bazalaki kobatisa bato na mai. (Yoane 1:19, 31; 3:22; 4:1-3) Likambo yango eyebanaki malamu na Yelusaleme. Na yango, ntango Yesu alobelaki mai, Nikodeme ayebaki ete Yesu azalaki kolobela mai nyonso te, kasi mai ya batisimo.a
Kobatisama “na elimo santu”
Soki ‘kobotama na mai’ elimboli kobatisama na mai; ‘kobotama na elimo’ elimboli nini? Liboso ya lisolo ya Yesu ná Nikodeme, Yoane Mobatisi amonisaki ete kaka mai te, kasi mpe elimo santu ekozala na ntina na batisimo. Alobaki boye: “Ngai nazali kobatisa bino na mai, kasi ye akobatisa bino na elimo santu.” (Malako 1:7, 8) Malako, mokomi moko ya Evanzile, alobeli mbala ya liboso oyo batisimo yango epesamaki. Akomi boye: “Na boumeli ya mikolo yango Yesu autaki na Nazalete ya Galilai mpe abatisamaki na Yolodani na Yoane. Mpe na mbala moko ntango azalaki kobima na mai amonaki likoló ezali kofungwama, mpe elimo ezali kokitela ye lokola ebenga.” (Malako 1:9, 10) Ntango Yoane Mobatisi azindisaki Yesu na ebale Yolodani, Yesu abatisamaki na mai. Ntango elimo ekitelaki ye, abatisamaki na elimo santu.
Mbula soki misato nsima ya batisimo na ye, Yesu ayebisaki bayekoli na ye boye: “Bokobatisama na kati ya elimo santu nsima ya mwa mikolo.” (Misala 1:5) Likambo yango esalemaki ntango nini?
Na mokolo ya Pantekote na mobu 33 T.B., bayekoli soki 120 ya Yesu bayanganaki na ndako moko na Yelusaleme. “Na mbala moko makɛlɛlɛ ebimaki na likoló lokola oyo ya mopɛpɛ oyo ezali kobɛta makasi, mpe etondaki na ndako mobimba epai bafandaki. Mpe ndemo lokola nde ya mɔtɔ emonanaki epai na bango . . . , mpe bango nyonso batondaki na elimo santu.” (Misala 2:1-4) Mokolo yango kaka, balendisaki mpe bato mosusu na Yelusaleme bázwa batisimo ya mai. Ntoma Petelo ayebisaki ebele ya bato boye: “Bóbongola mitema, mpe tiká ete moko na moko na bino abatisama na nkombo ya Yesu Klisto mpo na kolimbisama ya masumu na bino, mpe bokozwa likabo ya ofele ya elimo santu.” Bato yango basalaki nini? “Baoyo bayambaki liloba na ye na motema mobimba babatisamaki, mpe na mokolo wana milimo soki nkóto misato ebakisamaki.”—Misala 2:38, 41.
Esɛngaka kozwa batisimo mibale
Batisimo yango mibale emonisi nini mpo na kobotama lisusu? Emonisi ete mpo na kobotama lisusu moto asengeli kozwa batisimo mibale. Simbá ete Yesu azwaki liboso batisimo ya mai. Na nsima azwaki elimo santu. Ndenge moko mpe, bayekoli ya liboso babatisamaki naino na mai (bamosusu babatisamaki na Yoane Mobatisi), mpe na nsima bazwaki elimo santu. (Yoane 1:26-36) Ndenge moko mpe na Pantekote, bato 3 000 oyo bakómaki baklisto, bazwaki liboso batisimo ya mai, mpe na nsima bazwaki elimo santu.
Soki tokanisi batisimo oyo epesamaki na Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, lelo oyo tosengeli komizela ete kobotama lisusu esalema ndenge nini? Ndenge kaka esalemaki mpo na bantoma ya Yesu mpe mpo na baklisto ya liboso. Moto asengeli naino kobongola motema, kotika mabe, kopesa bomoi na ye epai ya Yehova mpo na kosambela mpe kosalela ye, mpe komonisa yango na nzela ya batisimo ya mai. Na nsima, soki Nzambe aponi moto yango mpo akende koyangela na Bokonzi na Ye, moto yango apakolamaka na elimo santu. Moto ye moko nde azwaka ekateli ya kozwa batisimo ya mai; nzokande, kobatisama na elimo santu ezali likambo ya Nzambe. Ntango moto azwi batisimo yango mibale, yango emonisi ete abotami lisusu.
Kasi, mpo na nini Yesu, na lisolo na ye ná Nikodeme, alobaki ete moto asengeli “kobotama na mai mpe na elimo”? Alobaki bongo mpo na komonisa ete mbongwana monene esalemaka na bomoi ya baoyo bazwaka batisimo yango mibale. Lisolo oyo elandi ekolobela likambo yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Ndenge moko mpe, mokolo moko, liboso ya kopesa bato batisimo, ntoma Petelo alobaki boye: “Moto akoki nde kopekisa mai?”—Misala 10:47.
[Elilingi na lokasa 9]
Yoane abatisaki na mai Bayisalaele oyo babongolaki motema
-
-
Kobotama ya sika—Ekokisaka likambo nini?Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli—2009 | 1 Avril
-
-
Kobotama ya sika—Ekokisaka likambo nini?
MPO na nini Yesu asalelaki maloba ‘kobotama na elimo’ ntango azalaki kolobela batisimo ya elimo? (Yoane 3:5) Ntango liloba “kobotama” esalelami na ndenge ya elilingi, elimbolaka “ebandeli”; na ndakisa, “kobotama ya ekólo moko.” Na yango, maloba “kobotama ya sika” emonisi “ebandeli ya sika.” Maloba “kobotama” mpe “kobotama ya sika” emonisaka ete likambo moko ya sika ebandi na boyokani ya Nzambe ná moto oyo abatisami na elimo. Mbongwana monene yango esalemaka ndenge nini?
Mpo na komonisa ndenge oyo Nzambe abongisaka bato mpo bákende koyangela na likoló, ntoma Paulo azwaki ndakisa ya likambo moko na kati ya libota. Akomelaki Baklisto ya ntango na ye ete ‘bakokamatama lokola bana’ mpe na ndenge yango, Nzambe akosalela bango makambo “lokola bana.” (Bagalatia 4:5; Baebele 12:7) Mpo na komona ndenge ndakisa yango ekoki kosalisa biso tóyeba mbongwana oyo esalemaka na bomoi ya moto oyo abatisami na elimo santu, tózongela lisusu ndakisa ya elenge oyo alingi kokɔta na eteyelo ya bana-mboka.
Mbongwana oyo yango ememaka
Na ndakisa yango, elenge wana akoki kokɔta na eteyelo yango te mpo azali mopaya. Kasi, kanisá ete mokolo moko mbongwana esalemi na bomoi na ye. Tata moko, oyo azali mwana-mboka azwi ye lokola mwana na ye. Yango ekomema mbongwana nini na bomoi ya elenge yango? Lokola tata yango akamati ye lokola mwana na ye, elenge yango akómi lokola bana-mboka ya ekólo yango, azali mpe na lotomo ya kokɔta na eteyelo ya bana-mboka. Lokola akómi mwana ya tata wana, yango ebongoli mpenza makambo ya bomoi na ye.
Yango emonisi likambo oyo esalemaka epai ya baoyo babotamaka lisusu. Bato yango bakokani na elenge wana na nini? Elenge yango akokɔta na eteyelo ya bana-mboka kaka soki akokisi masɛngami, elingi koloba, soki akómi mwana-mboka. Kasi, akokokisa masɛngami yango na makasi na ye moko te. Ndenge moko mpe, bato mosusu bakokɔta na Bokonzi ya Nzambe, to guvɛrnema ya likoló, kaka soki bakokisi masɛngami, elingi koloba, soki ‘babotami lisusu.’ Kasi, na makasi na bango moko bakoki kokokisa masɛngami yango te, mpamba te Nzambe nde asalaka ete moto abotama lisusu.
Nini ebongoli bomoi ya elenge wana? Kokóma mwana ya tata oyo azali mwana-mboka. Ya solo, likambo yango ebongoli bomoto ya elenge yango te. Ata ndenge akómi mwana ya tata wana, azali kaka ndenge bato bayebi ye. Atako bongo, likambo yango epesi ye lotomo ya kokóma mwana-mboka. Tokoki koloba ete abandi bomoi ya sika, to abotami lisusu. Akómi mwana ya tata oyo azali mwana-mboka mpe yango epesi ye lotomo ya kokɔta na eteyelo mpe na libota ya tata yango.
Ndenge moko mpe, Yehova abongolaka bomoi ya bato ya kozanga kokoka oyo aponi na ndenge akamataka bango lokola bana na ye. Ntoma Paulo, oyo azali moko ya bato yango akomelaki baninga na ye boye: “Bozwaki nde elimo ya kokamatama lokola bana, oyo na nzela na yango togangaka ete: ‘Aba, Tata!’ Elimo yango moko epesaka litatoli elongo na elimo na biso ete tozali bana ya Nzambe.” (Baloma 8:15, 16) Ya solo, lokola Nzambe akamati baklisto yango lokola bana na ye, bakɔti na libota na Ye, to bakómi “bana ya Nzambe.”—1 Yoane 3:1; 2 Bakolinti 6:18.
Nzokande, likambo yango ebongoli bomoto na bango te, bazali kaka bato ya kozanga kokoka. (1 Yoane 1:8) Ndenge Paulo alimbolaki yango lisusu, likambo yango epesi bango lotomo ya kokóma bana ya Nzambe. Na ntango yango, elimo ya Nzambe apesaka bato yango elikya makasi ete bakozala na Klisto na likoló. (1 Yoane 3:2) Elikya yango, oyo elimo santu epesaka bango, etindaka bango bákóma kotalela bomoi ndenge mosusu. (2 Bakolinti 1:21, 22) Ɛɛ, babandaka bomoi ya sika to mpe babotamaka lisusu.
Mpo na bana yango ya Nzambe Biblia elobi boye: “Bakozala banganga-nzambe ya Nzambe mpe ya Klisto, mpe bakoyangela elongo na ye mbula yango nkóto.” (Emoniseli 20:6) Elongo na Klisto, bana yango ya Nzambe bakozwa esika lokola bakonzi na Bokonzi ya Nzambe to na guvɛrnema ya likoló. Ntoma Petelo akomelaki baninga na ye baklisto ete bakozwa libula “oyo ekoki kopɔla te mpe oyo ezangi mbindo” oyo “ebombami na likoló” mpo na bango. (1 Petelo 1:3, 4) Yango ezali solo mbano monene!
Nzokande, likambo yango ya boyangeli ebimisi mpe motuna. Soki bato oyo bazali kobotama lisusu bakoyangela na likoló, bakoyangela banani? Lisolo oyo elandi, ekoyanola na motuna yango.
[Elilingi na lokasa 10]
Paulo alobaki nini na likambo etali kokamatama lokola mwana?
-