Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/10 nk. 6-7
  • Mituna oyo bato batunaka mingi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mituna oyo bato batunaka mingi
  • Lamuká!—2010
  • Masolo mosusu
  • Baklisto mpe mokili ya ntango na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Batatoli ya Yehova bazali mwa lingomba ya kobatama?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Batatoli ya Yehova
    Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Batatoli ya Yehova bazali kinzambinzambi ya ba Américains?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 10/10 nk. 6-7

Mituna oyo etunamaka mingi

Mpo na nini bato mosusu balobaka mabe mpo na Batatoli ya Yehova?

Bato mingi bayoká makambo ya malamu te mpo na Batatoli ya Yehova. Ekoki kozala ete basusu basepelaka te na mosala ya kosakola oyo Batatoli basalaka. Nzokande, Batatoli basalaka mosala yango mpo balingaka bazalani na bango, bayebaka ete “moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”​—Baroma 10:13.

Batatoli ya Yehova bazali bakristo to bazali nde mwa lingomba?

Batatoli ya Yehova bazali bakristo mpo mateya na bango eutaka na Biblia. Kasi bazali Baprotesta te, bazali mpe Bakatolike te, to bato ya Lingomba ya Ɔrtɔdɔkse mpo mateya mosusu ya mangomba yango eutaka na Biblia te. Na ndakisa, Biblia eteyaka te ete Nzambe oyo azali bolingo anyokolaka bato seko na seko na lifelo ya mɔtɔ. Eteyaka mpe te ete bato bazalaka na molimo oyo ekufaka te.​—Ezekiele 18:4; Baroma 6:23.a

Lisusu, Batatoli ya Yehova bazali bakristo mpamba te bamekolaka kristo na bomoi na bango ya mokolo na mokolo. Na ndakisa, Kristo mpe bakristo ya liboso bakɔtaki na politiki te. Kutu, basakolaki nde Bokonzi ya Nzambe. (Luka 4:43; Yoane 15:19; 17:14) Lokola balandaka ndakisa na bango, Batatoli ya Yehova baboyaka politiki mpe basololaka na bato, mbala mingi moto mokomoko, bakanisaka na bato mpe basalelaka mayele ya kondimisa ndenge bakristo ya liboso bazalaki kosala.​—Misala 19:8.

Mwa lingomba ezali etuluku moko ya bato oyo balongwe na lingomba moko mpo na kosala lingomba ya sika. Batatoli ya Yehova balongwá ata na lingomba moko te. Bazali mwa lingomba te.

Makita ya Batatoli ya Yehova esalemaka ndenge nini?

Na makita na bango, oyo moto nyonso akoki kokɔta bayekolaka nde Biblia, mbala mingi bayangani bazwaka libaku ya koloba. Eteyelo ya mosala ya Teokrasi, moko ya makita oyo basalaka pɔsɔ na pɔsɔ esalisaka Batatoli bákolisa makoki ya koteya, kotánga, mpe kosala bolukiluki. Likita mosusu ezali diskur moko ya miniti ntuku misato oyo elobelaka lisolo moko ya Biblia oyo ekoki mpenza kosepelisa bato oyo bazali Batatoli te. Na nsima ya diskur yango, bayekolaka Biblia na lisalisi ya zulunalo Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Makita ebandaka mpe esukaka na loyembo mpe libondeli, mpe balekisaka saani te mpo na kokɔngɔla mabonza.​—2 Bakorinti 8:12.

Mbongo oyo etambwisaka misala na bango eutaka wapi?

Mosala na bango esimbami na makabo ya bolingo malamu oyo bapesaka. Batatoli basɛngaka mbongo te mpo na kopesa bato batisimo, molulu ya libala, kokunda bandeko na bango to mpo na kobongisa makambo mosusu ya lingomba na bango. Bakatelaka mpe bango te mbongo oyo basengeli kopesa. Moto nyonso oyo alingi kopesa likabo, akoki kotya yango na kɛsi ya makabo oyo ezalaka na Ndako ya Bokonzi, ndenge Batatoli ya Yehova babengaka bisika na bango ya losambo. Batatoli ya Yehova bango moko, babimisaka mikanda oyo basalelaka, yango esalaka ete bábebisa mbongo mingi te, mpe bisika na bango ya losambo mpe babiro na bango etongamaka mingimingi na Batatoli ya Yehova oyo bamipesá mpo na mosala yango.

Batatoli ya Yehova bandimaka lisalisi ya monganga?

Ɛɛ. Kasi, balukaka lisalisi oyo ebongi mpo na bango moko mpe bato ya libota na bango. Kutu, Batatoli mingi bazali balifulumɛ, bato ya croix-rouge, badɔktɛrɛ, mpe minganga oyo basalaka lipaso. Kasi, Batatoli ya Yehova baboyaka bázongisa bango makila. Biblia elobi ete: ‘Bóboya makila.’ (Misala 15:28, 29) Likambo ya esengo, minganga mingi bakómi komona ete kosalisa moto kozanga kozongisa ye makila ezali “lolenge eleki malamu,” oyo ekoki kosala ete makama mingi oyo eutaka na kozongisa moto makila esalema te.

a Okoki kokuta makanisi ya Biblia na makambo yango mpe masolo mosusu ya ntina na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

ESIKA OYO BATO BAPESANAKA LIMEMYA

Engumba ya Bejucal de Ocampo na sudi ya Mexique ezali moke, kasi ekeseni mpenza na bingumba mosusu​—lapolo moko oyo ebimaki na zulunalo moko (Excélsior) elobi ete: “Bato mingi oyo bafandi na engumba yango bazali Batatoli ya Yehova. Na esika yango bapekisaka bato kosambela te, mpe Leta etikelaka bango bonsomi. . . . Bato ya engumba yango batiká milangwa mpe makaya mpe bakómá koyemba banzembo mpe kotánga Biblia. Batosaka mpe bakonzi ya Leta.”

Lapolo yango elobi mpe ete, atako engumba yango ezali na mangomba ndenge na ndenge, “matata to koswana ebimaka te.” Elobi lisusu boye: “Mobulu mpe ezalaka te, mpe atako mangomba yango ezali ndenge na ndenge yango epekisaka te bato ya engumba yango bápesanaka mbote . . . Libota mokomoko ezalaka na bonsomi ya kolobela lingomba na yango, mpe yango epekisaka bango te báfanda na kimya na bato mosusu. Ezali kokamwisa te ndenge Batatoli ya Yehova bazali mingi na engumba Bejucal.” Likambo eleki ntina bana na bango, ndenge molakisi moko oyo azali Motatoli te alobi, ‘balataka na ndenge ebongi, bazwaka bapwɛ ya malamu mpe bazalaka na bizaleli malamu na kelasi.’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto