Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 64
  • Tosengeli kosambela bililingi?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Tosengeli kosambela bililingi?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Ebongi kosambela Nzambe na nzela ya bikeko?
    Lamuká!—2008
  • Mpo na nini Batatoli ya Yehova basalelaka bililingi te na losambo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Bililingi
    Lamuká!—2014
  • Bikeko bizali nde kobɛlɛmisa biso epai na Nzambe?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 64

Tosengeli kosambela bililingi?

Eyano ya Biblia

Te, tosengeli kosambela bililingi te. Mpo na mibeko oyo Nzambe apesaki ekólo Yisraele, buku moko (New Catholic Encyclopedia) elobi boye: “Masolo ndenge na ndenge ya Biblia emonisi ete bazalaki kosalela bililingi te na losambo ya Nzambe ya solo.” Talá bavɛrsɛ oyo ya Biblia:

  • “Osengeli te komisalela ekeko oyo eyemami to elilingi oyo ekokani na eloko nyonso oyo ezali kuna na likoló to oyo ezali na mabele awa na nse to oyo ezali na mai na nse ya mabele. Osengeli te kogumbamela yango to kobendama mpo na kosalela yango, mpamba te ngai Yehova Nzambe na yo, nazali Nzambe oyo asɛngaka kokangama kaka na ye.” (Kobima 20:4, 5) Lokola Nzambe “asɛngaka kokangama kaka na ye,” asepelaka te tókumisa to tósambela ye na bililingi, bafɔtɔ, bikeko, to bilembo.

  • “Nakopɛsa nkɛmbɔ na ngai epai na mosusu tɛ, kosanzola na ngai epai na bikeko tɛ.” (Yisaya 42:8, haut fleuve) Nzambe aboyaka básambela ye na nzela ya bililingi. Ntango Bayisraele mosusu balukaki kosambela Nzambe na nzela ya ekeko ya mwana-ngɔmbɛ, Nzambe alobaki ete “basali lisumu.”​—Kobima 32:7-9, Biblia Liloba lya Nzambe.

  • “Tosengeli kokanisa te ete Nzambe azali lokola wolo to palata to libanga, lokola eloko moko oyo eyemami na mayele mpe na makanisi ya moto.” (Misala 17:29) Na losambo ya bapakano, mbala mingi basalelaka bililingi “oyo eyemami na mayele mpe na makanisi ya moto”; nzokande Biblia elobi ete bakristo basengeli “kotambola na kondima, kasi na komona te.”​—2 Bakorinti 5:7.

  • “Bókeba na bikeko.” (1 Yoane 5:21) Ezala na mibeko oyo epesamaki na ekólo Yisraele, ezala oyo epesami na bakristo, Biblia emonisi polele ete koloba ete Nzambe andimaka bato básalela bililingi to bikeko na losambo ezali liteya ya lokuta.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto