Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • ijwbq lisolo 68
  • Banani bakendaka na lifelo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Banani bakendaka na lifelo?
  • Biyano na mituna ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Eyano ya Biblia
  • Lifelo ezalaka mpenza? Na kotalela Biblia, lifelo ezali nini?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Lifelo ya mɔ́tɔ ebongwani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Lifelo ezali mpenza nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Liteya oyo epalangani mingi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
Makambo mosusu
Biyano na mituna ya Biblia
ijwbq lisolo 68

Banani bakendaka na lifelo?

Eyano ya Biblia

Lifelo (“Sheol” mpe “Hades” na minɔkɔ oyo bakomaki na yango Biblia) ezali kaka nkunda, kasi te esika ya kozika na mɔtɔ. Banani bakendaka na lifelo? Ná bato ya malamu ná bato ya mabe. (Yobo 14:13; Nzembo 9:17) Biblia elobi ete nkunda yango ya bato nyonso ezali “ndako ya koyangana ya bato nyonso oyo bazali na bomoi.”​—Yobo 30:23.

Ata Yesu mpe akendaki na lifelo ntango akufaki. Kasi, “atikalaki na lifelo te,” mpo Nzambe asekwisaki ye.​—Misala 2:31, 32, The Bible in Basic English.

Lifelo ekozala libela na libela?

Bato nyonso oyo bakendaka na lifelo bakozonga na bomoi; Yesu akosekwisa bango na nguya oyo Nzambe akopesa ye. (Yoane 5:28, 29; Misala 24:15) Esakweli oyo ezali na Emoniseli 20:13, elobeli lisekwa oyo ekosalema na mikolo ekoya, elobi ete “liwa mpe lifelo ezongisi bakufi oyo bazalaki kati na yango.” (King James Version) Lokola ekotikala polele, lifelo ekozala lisusu te; moto moko mpe te akokende lisusu kuna mpo “liwa ekozala lisusu te.”​—Emoniseli 21:3, 4; 20:14.

Nzokande, bakufi nyonso bakendaka na lifelo te. Biblia emonisi ete bato mosusu bakobongola motema te, mpo mabe ekɔtela bango tii na mikuwa. (Baebre 10:26, 27) Bato ya ndenge wana soki bakufi, bakendaka na lifelo te, kasi na Gehena, oyo elimboli liwa ya seko. (Matai 5:29, 30) Na ndakisa, Yesu amonisaki ete bakonzi mosusu ya mangomba oyo bazalaki bakosi na mikolo na ye bakokende na Gehena.​—Matai 23:27-33.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto