Makambo mazali koleka na mokili
Kominanola ya bato ya Angleterre
Zulunalo Times ya Londres elobi ete na 1999, mpo na mbala ya liboso, bato ya Angleterre bakómi kobimisa mbongo mingi mpo na kominanola koleka mpo na “biloko ya kolya, kofutela ndako, to kosomba eloko moko mpo na libota.” Na 1968, soki tozwi mbongo nyonso oyo libota moko esalelaki, kaka mwa moke (9%) nde ezalaki kosalelama mpo na kominanola, nzokande lelo oyo, mbongo ekómi kobima mingi mpo na kominanola (17%). Martin Hayward, mopesi toli na makambo ya kosomba biloko, alobi boye: “Lelo oyo, nsima ya mbula 30, tokómi na bozwi mingi koleka. Yango wana, biloko mingi ya kominanola oyo bato bazalaki komona ete ezali mpo na bazwi na ntango wana, ekómi sikoyo biloko oyo moto nyonso asengeli kozala na yango. Lelo oyo, mpo na bato mingi, kozwa konje ezali lisusu ‘mposa’ te, kasi ezali eloko oyo ‘basengeli’ na yango. Bato mosusu kutu bamonaka ete moto nyonso asengeli kozwa konje mbala misato na mbula moko.” Lelo oyo na mabota mingi, mbongo oyo bazali kosalela mpo na kosomba bavideo, baradio, batelevizyo mpe baordinatɛrɛ eleki mbala minei mbongo oyo bazalaki kosalela mpo na yango na 1968. Kutu, soki ozwi mabota 10, moko kati na yango ezali na Internet mpe soki ozwi mabota 3, moko kati na yango ezali na ordinatɛrɛ.
Lalá moke mpo na kozwa makasi
Zulunalo The New York Times emonisi ete komela kafe mpo na kosilisa mpɔngi ya midi ekoki nde kopesa bolɛmbu na mosala. James Maas, moto ya mayele na pisikoloji mpe na makambo ya mpɔngi na Cornell University, alobi boye: “Nsima ya komela kafe, okoyoka lokola motó elɛmbi makasi. Komela kafe to bankisi mosusu oyo epesaka makasi esilisaka nyongo ya mpɔngi te.” Maas apesi toli ete na esika ya komelaka kafe, ekozala malamu kolala mwa moke. Alobi boye: “Yango ekopesa nzoto makasi mpe ekosala ete otyaka mpenza likebi ata na makambo mikemike ya mosala mpe ata na ntango ya kozwa bikateli minene oyo etali mosala.” Zulunalo Times elobi ete kolala mwa moke na midi, ata kaka miniti 30, ekoki kopesa moto makasi, ekozala mpasi te mpo alamuka mpe ekobebisa mpɔngi na ye na butu te. Maas alobi boye: “Ezali malamu te koboya kolala mwa moke. Tosengeli kosala yango mikolo nyonso.”
Mpate nde ebotaka ntokya?
Lisangá moko ya bilenge baloni na Mpoto (Conseil européen des jeunes agriculteurs) esalaki ankɛtɛ moko mpe elobi boye: “Soki ozwi bana mokama ya mikili ya Mpoto (Union européenne), 50 kati na bango bayebi te soki sukali eutaka wapi, 75 . . . bayebi te soki ntokya (coton) eutaka wapi, mpe bana koleka 25 bakanisaka ete ebotaka na nsuki ya mpate.” Lisusu, soki ozwi bana mokama ya Angleterre mpe ya Pays-Bas, oyo bazali na mbula 9 to 10, bana 25 kati na bango bakanisaka ete malala mpe olive ebotaka na mboka na bango. Bana yango bamonaka biloko ya bilanga kaka na bamagazini, kasi na bilanga te mpe bayekolaka makambo ya bilanga mingimingi na kelasi. Ekoki kozala mpo na yango nde bana mingi ya Mpoto balingaka mosala ya bilanga te. Lisangá yango elobi lisusu boye: “Soki ozwi bana mokama ya mikili ya Mpoto, kaka 10 nde ‘bakolinga mpenza’ kokóma basali ya bilanga na mikolo ekoya.”
Boninga ezali kobeba
Zulunalo The Wall Street Journal elobi ete, kosala mosala banda ntongo tii na mpokwa, mibembo ya mosala ebele ebele mpe masano ya video “oyo ezali kokabola biso na bato mosusu,” nyonso wana ezali kobebisa boninga kati na bato. Zulunalo yango emonisi ete: “Bato bazali komona ete kolekisa ntango elongo na baninga ezali mpenza na ntina te mpe ezali likambo oyo okoki kosala soki olingi, mpamba te ezwaka biso ntango mingi, nzokande tozali na makambo ebele ya kosala.” Kasi Jan Yager, moto ya mayele na sosioloji, alobi ete bato oyo bazali komona baninga na bango mpamba bamonaka ete ntango bakutani na mikakatano na libota na bango, “moto ya kosunga bango azali te.” Epai mosusu, bolukiluki emonisi ete mbala mingi, bato oyo bazali na baninga malamu banyokwamaka mingi te na makanisi to na maladi mpe bazalaka na bomoi molai. Zulunalo Journal emonisi ete: “Sɛkɛlɛ yango oyo, esengeli kosala makasi mpo na koyeba kofanda na baninga, esengeli kosala mpenza milende, ndenge moto asalaka mpo na kosalela ntango na ye malamu na mosala mpe na libota na ye.”
Bana ya nzoto mineneminene
“Doktɛrɛ Chwang Leh-chii, mokambi ya lisangá moko ya minganga oyo batalelaka makambo ya biloko ya kolya na Taipei, na ekólo Taïwan, alobi boye: “Kozala nzoto mineneminene ezali mokakatano monene ya bokolɔngɔnɔ ya nzoto oyo ezali mpenza kotungisa bilenge ya Azia.” Zulunalo Asiaweek elobi ete na mikili mingi ya Azia, bana ya nzoto mineneminene bazali mingi mpe ezali mingimingi bilenge mibali oyo bafandaka na bingumba minene. Bolukiluki moko bautaki kosala na engumba Pékin emonisi ete soki ozwi bana-kelasi mokama ya eteyelo ya ebandeli mpe ya ntei, 20 kati na bango bazali na nzoto minene. Zulunalo yango elobi lisusu ete emonani ete bilenge mingi ya Azia bazali kolekisa ntango mingi mpenza na kotala televizyo mpe kolanda masano ya video. Esengeli kosala nini? Zulunalo Asiaweek emonisi ete ekoki kaka te kopekisa bana bályaka mingi, kasi esengeli kosalisaka bango ngalasisi mbala na mbala mpe kopesa biloko ya kolya oyo ezali kotonga nzoto: biloko ya mafuta mingi te, kasi bambuma mpe ndunda mingi. Doktɛrɛ Chwang amonisi lisusu ete bokolonga soki bosali ete bana bámonaka ngalasisi lokola lisano. Zulunalo yango elobi ete soki bosali bongo te, bana ya nzoto minene bakoki kobɛla maladi ya tasyo, to hépatite, to diabɛti, to mpe bakoki mpe konyokwama mingi na makanisi.
Bafilme ekweisi mangomba
Zulunalo The Independent ya Londres elobi boye: “Bafilme lokola Terminator 2, Titanic mpe La guerre des étoiles, ezali koteya bilenge makambo mingi etali mangomba, koleka mangomba yango moko.” Doktɛrɛ Lynn Clark, ya ebongiseli moko mpo na makambo etali bopanzi nsango (Centre de recherche sur les médias ya Iniversite ya Colorado), atunaki bilenge 200 mpo na koyeba filme nini ezali kolobela mateya ya mangomba na bango. Bilenge mingi balobaki ete ezali filme ya Terminator 2, mpamba te ezali komonisa etumba oyo ezali kati na malamu mpe mabe, elombe ya filme yango auti na eleko oyo eyei naino te kasi ayei na eleko na biso mpo na kobikisa mwana moko oyo azali lokola masiya. Ntango azalaki koloba na liyangani moko na Édimbourg, na Écosse, Doktɛrɛ Clark asukisaki na maloba oyo: “Bilenge bazali sikoyo komona ete Darth Vader mpe filme ya X Files ekosalisa bango báyeba ntina ya bomoi. Bazali kosepela na filme ya X Files mpamba te ezali komonisa likanisi ete ezali na nguya moko eyebani te oyo eyangelaka molɔ́ngɔ́. Ezali komonisa ete ezali na makambo oyo siansi ekoki kolimbola te. Yango ezali mpenza nde mosala ya mangomba, kasi mangomba ezali kolimbola yango malamu te.”
Likaya ekómisaka bomoi mokuse
Lapolo moko (University of California Berkeley Wellness Letter) emonisi ete: “Soki moto ameli mbuma moko ya likaya, yango ezali kolongola miniti 11 ya bomoi na ye.” Yango wana, bato ya mayele ya Iniversite ya Bristol, na Angleterre, balobi ete soki moto ameli farde moko ya likaya, yango ekolongola mokolo moko na ndambo na bomoi na ye mpe soki mbula na mbula azali komela pakɛ moko ya likaya na mokolo, yango ekolongola pene na sanza mibale ya bomoi na ye. Bato ya siansi balobi bongo mpamba te batalelaki bomoi ya bato oyo bamelaka likaya mpe bakokanisi yango na bomoi ya baoyo bamelaka likaya te. Balobi boye: “Yango ezali kosalisa bato nyonso báyeba mpenza ete likaya ebebisaka bomoi.”
Nzoku “eyemaka”
Zulunalo The Indian Express elobi ete na Ottapalam, na Inde, bazali kolakisa bana ya nzoku ndenge nini kosalela zolo na yango mpo na kosimba bolɔsi mpe koyema. Bato oyo balukaka kobatela mabele, basali ebongiseli moko (Asian Elephant Art and Conservation Project) mpo na kozwa mbongo ya kobatela nzoku. Mpo na yango, bazali koteka biloko oyo nzoku ezali koyema. Ganesan, nzoku moko ya mbula motoba, azali mpenza kosepela na milende oyo azali kosala mpo na “koyema.” Soki asepeli koyema, aningisaka matoi na yango mpe azwaka bolɔsi epai ya moto oyo azali kolakisa ye koyema. Ntango Ganesan azali koyema, alingaka te ete bátungisa ye, alingaka ata ndɛkɛ to esende (écureuil) ezala wana te. Nsima ya kotya langi, Ganesan apemaka mwa moke mpe asalaka lokola azali kotala soki asali mosala na ye malamu. Kasi bana ya nzoku nyonso te nde basepelaka na koyekola “koyama.” Bana ya nzoku mosusu babukaka bolɔsi mpo na komonisa ete bazali kosepela na koyema te.
Bazali kobongisa ntango ya kobota
Zulunalo Corriere della Sera ya Italie elobi boye: “Bana bakómi koyeba ntango malamu ya kobotama na lopitalo.” Ntango bazalaki kosala masolo ya lisangá na bango na Florence, na Italie, mpo na kolobela makambo ya kobota, Fred Paccaud, ye azali moto ya Suisse mpe monganga mpo na maladi ya basi, alobaki boye: “Banda ekeke ya 19, na mikili ya Mpoto mpe ya Amerika, motango ya bana oyo babotami na mokolo ya pɔsɔ to ya lomingo ekiti mingi mpenza (95 %). Kasi esuki kaka wana te, tokoki koloba ete bana mingi bazali kobotama na ntango malamu, elingi koloba, na ntango oyo minganga mpe mafulumɛ bazali na lopitalo.” Minganga basalelaka nkisi to lipaso mpo na kobotisa basi. Angelo Scuderi, monganga mpo na maladi ya basi na Florence, alobi boye: “Tozali komona ete tokómi kobongisa ntango ya kobotisa basi na nzela ya bankisi mpe ya lipaso. Basi mingi bakómi kobota na nzela ya lipaso. Soki ozwi basi mokama, koleka 20 kati na bango bazali kobota na nzela ya lipaso.” Kasi Profesɛrɛ Carlo Romanini, mokambi ya ebongiseli moko ya minganga oyo basalisaka maladi ya basi na Italie (Société italienne de gynécologie et d’obstétrique), alobi ete “ ‘kobongisa ntango’ ya kobota ezali mwasi ye moko te akopona yango,” kasi ezali mpenza mpo na kobatela bamama na bana na bango mpo bákutana te na mikakatano oyo eyaka na mbalakaka. Alobi lisusu boye: “Ekozala malamu mingi soki mwana abotami na ntango oyo minganga nyonso bazali na lopitalo, ntango oyo bakoki kosalisa soki mposa ezali.”