Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g98 Avril nk. 28-29
  • Makambo mazali koleka na mokili

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo mazali koleka na mokili
  • Lamuká!—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Kobeba ya ezingelo mpe bokɔnɔ ya kanser epai ya bana
  • Lingomba na ekólo Brésil
  • Nani asimbaka telekomande?
  • Kosangisa nzoto na bolenge
  • Kozanga kosukola mabɔkɔ
  • Bokoli ya nkita mpe ya bobola
  • Bandako oyo ezali kokwea na ekólo Italie
  • Makila mpe mikrobe ya sida
  • Bobangi Nzambe na lolenge ya mabe
  • Lolaka ya nzoku
  • Sida epalangani na Afrika
    Lamuká!—2003
  • Sida: Lolenge ya koluka kosilisa yango
    Lamuká!—1999
  • Ozali na boyebi nini likoló na Biblia?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Sida: Elikya nini ezali mpo na mikolo mizali koya?
    Lamuká!—1999
Makambo mosusu
Lamuká!—1998
g98 Avril nk. 28-29

Makambo mazali koleka na mokili

Kobeba ya ezingelo mpe bokɔnɔ ya kanser epai ya bana

Nsima ya kotalela bolukiluki oyo esalemaki na boumeli ya mibu 27 epai na bana 22 400 na ekólo Angleterre, etuluku moko ya bato ya mayele oyo bayekolaka biutelo ya makɔnɔ oyo epalanganaka bamonaki ete bilenge oyo babotamaki na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 5 na esika oyo kobebisama ya ezingelo ezali kouta, bazalaki na likama mbala 20 likoló na monkama ya kokufa na bokɔnɔ ebéngami leucémie to kanser mosusu oyo ezwaka bana koleka bilenge mosusu oyo babotamaki na bisika ya lolenge wana te. Zulunalo Times ya Londres elobi ete milinga ya mpɛpɔ ezali “mwango oyo moleki” kobakisa motángo ya bana oyo bazali kozwa kanser. Biloko oyo bizali kobebisa ezingelo mingi ezali bongo milinga ya mazuti to biloko mosusu ya lolenge wana oyo ebimisaka milinga oyo ezali kouta na bakompanyi ya kobimisa esansi, kompanyi ya kosala mituka, esika bamasini ya kopesa lotiliki etyami, baizine, mpe bakompanyi ya kosala simá. Bolukiluki yango emonisaki mpe ete kati na bana oyo babotami na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 4 na nzela ya motuka mpe na nzela ya engbunduka, mingi bakufaki na bokɔnɔ ya kanser. Balukiluki balobaki ete mazuti mpe esansi ezali kopesa kanser.

Lingomba na ekólo Brésil

Mwa buku ENI Bulletin elobi ete ankɛtɛ moko euti kosalema emonisi ete “bato 99 likoló na monkama na ekólo Brésil bandimaka ete Nzambe azali.” Engebene ankɛtɛ oyo esalemaki epai na bato pene na 2 000, bato 72 likoló na monkama bayambolaki ete bazali Bakatolike, bato 11 likoló na monkama bayambolaki ete bazali Baprotestá, mpe bato 9 likoló na monkama bayambolaki ete bazali na lingomba te. Baoyo batikali, elingi koloba bato 8 likoló na monkama bazalaka na mangomba masalami na ekólo Brésil mpe mangomba mauti na Afrika oyo ebéngami vodu. Mwa buku ENI elobi ete “ntango batunaki baoyo balobaki ete bandimaka Nzambe soki bakendaki na ndakonzambe to na esika moko ya losambo na wikende oyo elekaki, bato 57 likoló na monkama balobaki ete bakendaki te.” Bobele bato 44 bandimaka ete etumbu ya seko ezali. Wana bato 69 likoló na monkama na ekólo Brésil bandimaka bomoi ya likoló, bobele bato 32 likoló na monkama bazalaka na elikya ya kokenda kuna.

Nani asimbaka telekomande?

Balukiluki na EURISPES (Eteyelo ya bolukiluki likoló na makambo ya politiki, ya nkita mpe ya efandelo ya bato), na ekólo Italie, bautaki kobimisa makambo oyo bamonaki na bolukiluki oyo esalemaki likoló na mimeseno ya kotala televizyo. Batunaki mituna na mabota pene na 2 000. Kati na mituna oyo batunaki bango, ezalaki na motuna ya koyeba kati na libota nani mingimingi asimbaka mpe asalelaka telekomande na ntango ya kotala televizyo, yango emonisamaki na lisolo moko na zulunalo moko lokola lingenda ya bokonzi kati na libota na mikolo na biso. Kati na mabota mingi, eyebisamaki ete mingimingi tata moto asalelaka telekomande. Na esika ya mibale ezalaki bana mpo na oyo etali kopona baemisyo. Nzokande na esika ya nsuka ezalaki bongo mama.

Kosangisa nzoto na bolenge

Engebene zulunalo Weekend Concord ya ekólo Nigeria, bolukiluki moko oyo euti kosalema emonisi ete “bilenge ya ekólo Nigeria bazali kati na bato ya mokili mobimba oyo bazali kosangisa nzoto mingi.” Bilenge mibali 68 likoló na monkama mpe bilenge basi 43 likoló na monkama ya mibu kobanda 14 kino 19 bandimaki ete basangisaki nzoto “noki nsima ya ebandeli ya eleko ya bolenge na bango.” Yango esili kopesa nzela na kozwa bazemi mingi oyo ekanamaki te. Zulunalo Concord elobi ete bolukiluki mosusu emonisi ete “bilenge 71 likoló na monkama oyo bakómi bamama ya mibu na nsé ya 19 oyo bakufaki na ekólo Nigeria, bakufaki mpo na mikakatano ya kosopa zemi.”

Kozanga kosukola mabɔkɔ

Lisolo moko euti kobimisama na zulunalo Le Quotidien du Médecin, zulunalo ya minganga ya ekólo France elobelaki mingi likambo ya mawa oyo ezali sé kokóla​—kozanga kosukola mabɔkɔ liboso ya kolya mpe nsima ya kouta na twalɛti. Engebene monganga Frédéric Saldmann, kozanga bopɛto lolenge wana ezali likama monene mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto mpe emonani ete ezali mokakatano oyo mopalangani mingi. Lisolo yango elobi ete nakotalela bolukiluki oyo esalemaki na bikala ya ekólo Angleterre, na boumeli na yango bamonaki bilembo ya masuba oyo eutaki na bato 12 bakeseni, na saani ya nguba. Bolukiluki mosusu na eteyelo moko na États-Unis emonisaki ete molakisi oyo azali kosɛnga na bana ete básukolaka mabɔkɔ, yango ezali kosala ete motángo ya bana oyo bazali kozangisa kelasi esala bokiti ya 51 % mpo na mikakatano ya kobɛla libumu mpe 23 % mpo na mikakatano ya mpema. Lisoló yango esukisaki na kobɛtáká nsɛtɛ likoló na ntina ya koteya bana uta bomwana mibeko mitali bopɛto.

Bokoli ya nkita mpe ya bobola

Mwa buku HCHR News ya Biro monene mpo na makambo matali ntomo ya bato emonisi ete atako makambo ya nkita na mokili mobimba masali bokoli ya 40 likoló na monkama kobanda 1975 kino 1985, “motuya ya babola na mokili mobimba ebakisami na 17 likoló na monkama.” Lelo oyo, kati na bikólo 89 bato bazali kati na bobola makasi koleka lolenge bazalaki esili koleka mibu zomi to koleka. Kati na mikili 70 ya bobola, mosolo ya kobikela ya bato ezali kutu na nsé koleka lolenge bazalaki esili koleka mibu 20 to mpe mibu 30. Mwa buku HCHR News esukisi ete bokoli ya nkita esili kopesa matomba bobele na “mwa mikili moke.”

Bandako oyo ezali kokwea na ekólo Italie

Na boumeli ya ekeke oyo euti koleka, koningana ya mabelé ebomaki bato koleka 120 000 na ekólo Italie. Nzokande, zulunalo Corriere della Sera elobi ete bato soko milio 25 na ekólo Italie bafandi na bisika oyo “bandako 64 likoló na monkama ekoki kotɛlɛma te na koningana ya mabelé.” Kati na bandako yango ya makama ezali bongo mampitalo, bandako ya babomi mɔ́tɔ mpe bandako mosusu oyo ekoki kokóma bisika ya kobombama na ntango makama mauti na biloko bizalisami mabimi. Mbula na mbula, ekólo Italie ezali kobimisa dolare soko miliare 4 mpo na kobongisa biloko oyo bibebisami na makama mauti na biloko bizalisami mpe makama ya baizine. Moto moko ya mayele alobi ete “mbala mingi ebele ya mosolo oyo mozali kobimisama mozalaki kosalelama mpo na kotonga [bandako] na lolenge bobele yango mpe na bisika bobele yango oyo ezali na likama mingi.”

Makila mpe mikrobe ya sida

Kati na bato pene na milio 22 oyo bazwi mikrobe ya sida na mokili mobimba, bato koleka 90 likoló na monkama bafandi na mikili ya bobola. Panos, ebongiseli moko ya kopesa nsango na engumba Londres elobi ete “koleka bato 10 likoló ya monkama oyo bazwi mikrobe ya sida sika euti mpo na kozongisama makila.” Na mikili mingi, makila oyo ezali kopesama ezali ya malamu te mpamba te balaboratware epai oyo bazali kotalela yango ezali oyo ekoki kotyelama motema te. Na ndakisa, na ekólo Pakistan, pene na katikati ya motángo ya bisika oyo ezali kopesa makila ezali na bisaleli te ya kotala mpo na koyeba soki makila ezali na mikrobe ya sida. Na yango, bato 12 likoló na monkama oyo bazwi mikrobe ya sida sika euti mpo na kozongisama makila. Uta bato ya liboso oyo bayebanaki ete bazwaki sida esili koleka mibu 15, pene na bato milio 30 na mokili mobimba basili kozwa mikrobe ya sida, mikrobe oyo epesaka bokɔnɔ yango.

Bobangi Nzambe na lolenge ya mabe

Na bolukiluki moko oyo euti kosalema, batunaki mituna na bana ya ekólo Brésil oyo bazali konyokwama na makanisi. Engebene mwa buku ENI Bulletin, emonanaki ete motuya monene ya bana bazalaki na nsɔmɔ mpamba te bazalaki kobanga Nzambe na lolenge ya mabe. Wana bana 25 likoló na monkama bazalaki kotungisama na mikakatano ya libota to na liwa ya moboti moko, bana 75 likoló na monkama bazalaki na bilembo oyo bizalaki komonisa ete bazali koyoka nsɔmɔ mpamba te bamonaka ete Nzambe azali moto oyo alukaka kozongisa mabe na kopesáká bato bitumbu. Mwa buku ENI elobi ete bolukiluki yango “elendisaki baboti ete báteyaka bana na bango ete Nzambe akoki kosalisa bango mpe ayebi mitungisi na bango.”

Lolaka ya nzoku

Bansinga ya mongongo oyo ebimisaka lolaka ya nzoku ezalaka minene na boye ete ikoki kobimisa lolaka na bango mbala 20 to mpe na mwa nsé ya 20 na segɔndɛ moko​—ezali na nsé na boye ete moto akoyoka yango te. Lolaka motindo wana ekendaka mosika, mpe nzoku ekoki koyeba yango na ntaka ya kilomɛtɛlɛ 1,5. Nzoku ekoki mpe koyeba mbela 150 ekeseni ya nzoku mosusu. Nzoku iyanolaka na mbela yango mpe ipusanaka epai yango ezali kouta, mbela yango ekoki kozala ya basangani ya libota na yango to na iye izali na etuluku na ye. Na momeseno, nzoku endimaka te mbela ya nzoku oyo eyebi te to ebangaka ntango ezali koyoka mbela yango. Zulunalo Times ya Londres emonisi ete nsima ya bolukiluki oyo esalemaki na Amboseli, parkɛ ya banyama ya ekólo Kenya, Dr. Karen McComb, oyo ayekolaka bizaleli ya banyama na Iniversité Sussex, na ekólo Angleterre, alobaki ete “nsinga oyo ebimisaka lolaka motindo wana ekoki komonana epai na banyama mosusu te oyo imɛlisaka mabɛlɛ.”

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto