Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g02 Juillet lok. 20
  • Zabolo azalaka mpenza ekelamu ya solo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Zabolo azalaka mpenza ekelamu ya solo?
  • Lamuká!—2002
  • Masolo mosusu
  • ‘Tótemela Zabolo’ ndenge Yesu asalaki
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2008
  • Bótɛmɛla Satana, mpe akokima!
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2006
  • Zabolo azali mpenza, ezali kaka biyambayamba te
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
  • Zabolo azalaka mpenza?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2002
g02 Juillet lok. 20

Zabolo azalaka mpenza ekelamu ya solo?

NA MANGOMBA mingi, bakómá kotalela Zabolo lokola ekelamu ya solo te, kasi lokola biyambayamba oyo eutaki bobele na makanisi ya bato, oyo mwa ndambo na yango ezali naino. Yango wana Dionigi Tettamanzi, episkɔpɔ ya lokumu ya Genoa, moko ya bakardinalɛ minene ya Italie, aningisaki mpenza mokili na mokanda na ye ya nkasa 40 oyo akomelaki baparwasɛ oyo azali kokamba, na likambo etali lolenge ya kobunda na Zabolo. Mokanda yango epesaki molɔngɔ ya “mibeko zomi.”

Ya liboso: “Kobosana te ete Zabolo azali,” mpo ete “lokuta na ye ya liboso” ezali ete “andimisa biso ete ye azalaka te.”

Ya mibale: “Kobosana te ete Zabolo azali mozimbisi. . . . Komimona te lokola moto oyo abatelami to akoki kokweisama te.”

Ya misato: “Kobosana te ete Zabolo aleki na mayele mpe akosaka bato. Na mayele na ye mabe, azali kokoba komibimisa lokola moto malamu, lokola asalaká epai ya moto ya liboso.”

Ya minei: “Omibatela: na miso mpe na motema. Mpe zalá na makasi: na elimo mpe na bizaleli malamu.”

Ya mitano: “Zalá mpenza na kondima makasi ete Klisto asilá kolonga mozimbisi,” mpo ete yango nde “ekobatela yo mpe ekolendisa yo ete okweya te, ata soki etumba ya makasi ndenge nini eyeli yo.”

Ya motoba: “Kobosana te ete Klisto alongisá yo mpo na ye.”

Ya nsambo: “Kolɛmba te koyoka Liloba ya Nzambe.”

Ya mwambe: “Zalá na komikitisa mpe ndimá komiyokisa mpasi.”

Ya libwa: “Kolɛmba te na losambo ntango nyonso,” mpo ete olonga komekama.

Ya zomi: “Sambeláká Nkolo Nzambe na yo mpe pesáká losambo bobele na ye moko.”

Ndenge nini batalelaki mokanda yango? Lisangá moko ya bayekoli ya teoloji ya Milan esepelaki na toli ya mokanda yango te. Lisangá yango elobaki ete “mateya ya teoloji ya lolenge wana ekeseni te na oyo ya ntango ya Moyen Âge.” Molobeli moko alobaki boye: “Soki tobwaki mabe nyonso na motó ya Zabolo, tozali kolongola bato mikumba na bango nyonso.”

Ata soki Biblia elongoli te epai ya bato mikumba ya makambo basalaka, emonisi polele ete Satana Zabolo nde azali “nzambe ya ebongiseli ya biloko ya ntango oyo,” ye moto amekaki Yesu. Emonisi lisusu nguya ya Satana mpe mokano na ye ya ‘kozipa makanisi na bato oyo bazangi kondima.’​—2 Bakolinti 4:4, NW; Matai 4:1-11.

Na ntembe te, ndenge ntoma Petelo akomaki, Satana azali “lokola nkosi oyo ezali konguluma, kolukáká kolya moto.” (1 Petelo 5:8, NW) Boye tokoki kokamwa te soki ntoma Yoane akundwelaki bandimi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na kati ya nguya ya moto mabe.” (1 Yoane 5:19, NW) Tokozala bato ya mayele soki tobosani te makebisi ya Makomami.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto