Mituna oyo bilenge batunaka . . .
Kasi nakosala nini soki nakutani na mwana moko ya kelasi na biso?
“Kozonga kelasi na mokolo ya yambo ezalaki mpenza mpasi. Soki moko na baninga na ngai amonaki ngai, nazalaki koluka masolo milaimilai. Na ndakisa, nazalaki koyebisa baninga na ngai ete nakendaki kokɔngɔla mbongo mpo na Parti travailliste.”—James, Angleterre.
“Na kelasi, baoyo bamonaki ngai bazalaki koyokisa ngai nsɔni mingi. Ezalaki kotungisa ngai mingi.”—Débora, Brésil.
MPO na nini bilenge oyo bazalaki kobanga ete baninga na bango bámona bango? Bazalaki nde kosala makambo ya mabe? Soki moke te, bazalaki nde kosala mosala oyo ezali na lokumu koleka misala mosusu nyonso mpe oyo eleki ntina awa na mabele lelo oyo. Bazalaki kosala mosala oyo Yesu atindaki bayekoli na ye básala ntango alobaki na bango ete: “Na yango bókende mpe bókómisa bato bayekoli na bikólo nyonso, . . . koteyáká bango bátosa makambo nyonso oyo napesi bino etinda.”—Matai 28:19, 20, NW.
Bolukiluki oyo esalemaki na États-Unis emonisaki ete bilenge koleka 90 likoló na mokama bandimaka ete Nzambe azali. Soki tokamati bilenge mibale, moko akendaka ndako-nzambe pɔsɔ na pɔsɔ. Atako bilenge mingi bamipesaka na misala ya lingomba, na ndakisa koyemba nzembo ya lingomba, kasi baoyo basololaka makambo ya Nzambe na baninga na bango ya kelasi bazalaka mingi te. Nzokande Batatoli ya Yehova bayebani mokili mobimba mpo na mosala na bango ya kosakola ndako na ndako. Mpe bankóto ya bilenge Batatoli bapesaka mabɔkɔ na mosala yango.
Soki yo ozali elenge Motatoli, na ntembe te yo mpe osanganaka na mosala wana ya kosakola. Kasi yango elingi koloba te ete omonaka yango likambo moko ya pɛtɛɛ. Ntango mosusu, lokola bilenge oyo tolobeli na ebandeli ya lisolo oyo, yo mpe okoki kotungisama na likanisi ete okokutana na moninga moko ya kelasi na ndako moko ntango ozali kosakola. Jennie, elenge moko ya Angleterre andimi likambo yango: “Likambo oyo ngai nazalaki kobanga mingi ezalaki ete baninga na ngai ya kelasi bámona ngai nalati mpenza zipe kitoko, namemi sakosi ya mikanda, nalati kitoko koleka ndenge nazalaka na kelasi.”
Kokutana na moninga ya kelasi ekoki mpenza kobangisa makasi na boye ete bilenge mingi bamonaka ete eleki malamu kutu báluka kokosa to komibomba. Elenge moko na nkombo Léon alobi boye: “Nayebi elenge Motatoli moko oyo alataka kazaka moko oyo ezali na ekɔti, mpo na ntango azali na mosala ya kosakola, soki akutani na moninga na bango ya kelasi, akoka kobomba elongi na ye.” Bilenge mosusu baboyaka kosakola na bisika oyo bayebani. Elenge moko na nkombo Simon alobaki boye: “Nayebi ete mokolo mosusu nabondelaki ete tókende te kosakola na balabala moko boye, mpo ezali na bana mingi ya kelasi na biso.”
Mbala mingi, kokutana na moto oyo oyebi na ntango ozali kosakola ekoki kobangisa yo. Kasi soki otiki kobanga eleka yo makasi, yango ekosalisa yo na likambo ata moko te. Elenge mwasi moko ya Allemagne na nkombo Alicia alobaki boye: “Nazalaki na likanisi moko mabe mpenza na oyo etali mosala ya kosakola, mpe yango ezalaki kobebisa elimo na ngai.”
Kasi mpo na nini osengeli kosakola, ata soki ezalaka mpasi mpo na yo? Mpo na kopesa eyano na motuna oyo, tótalela naino ntina Nzambe apesaki yo mokumba yango. Na nsima, tokolakisa ndenge nini okoki kotika kobanga soki osali milende mpe ozali na mpiko.
Mokumba ya kosakola
Ya liboso, koyeba ete kosakwela bato mosusu kondima na yo ezali likambo ya sika to ya nsɔni te ekoki kosalisa yo. Kobanda kala, mibali mpe basi oyo babangaka Nzambe basalaka yango. Na ndakisa, Noa ayebani mingimingi lokola moto oyo atongaki masuwa moko ya monene. (Genese 6:14-16) Kasi soki totali maloba ya 2 Petelo 2:5, tokomona ete azalaki mpe “mosakoli na boyengebene.” Noa amonaki ete azalaki na mokumba ya kokebisa bato mosusu ete etikali moke libebi eya.—Matai 24:37-39.
Basiɛklɛ mingi na nsima, atako bapesaki Bayuda mobeko moko te oyo ezalaki mpenzampenza kopesa bango mokumba ya kosakwela bato ya bikólo mosusu, mingi kati na bango basakwelaki bato mosusu kondima na bango. Na ndenge wana nde mwasi moko mopaya nkombo na ye Luta ayaki koyeba Yehova. Lokola amonisaki botɔndi na ye epai ya mama ya mobali na ye Naomi, oyo azalaki Moyuda, Luta alobaki ete: “Bato na yo bakozala bato na ngai mpe Nzambe na yo akozala Nzambe na ngai.” (Luta 1:16) Na nsima, Mokonzi Salomo amonisaki ete bato ebele, oyo bazalaki Bayuda te, bakoya koyoka makambo oyo etali “nkombo monene” ya Yehova mpe kosambela na kati ya tempelo na Ye.—1 Mikonzi 8:41, 42.
Bongo, soki basaleli wana ya Nzambe na ntango ya kala bayebisaki bato mosusu makambo ya Nzambe, atako mobeko moko te ezalaki kotinda bango básala yango, tokoloba boni mpo na baklisto lelo, oyo basɛngisami mpenza kosakola! Kutu, tozwaki etinda ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Matai 24:14) Tokeseni soki moke te na ntoma Paulo, oyo lokola ye, batii mokumba likoló na biso mpo na kosakola nsango malamu oyo. (1 Bakolinti 9:16, NW) Yango esimbi lobiko na biso. Baloma 10:9, 10, (NW) elobi ete: “Soki ozali kosakola polele ‘liloba wana na monɔkɔ na yo mpenza,’ ete Yesu azali Nkolo, . . . okobikisama. Mpo ezali na motema nde moto amonisaka kondima mpo na boyengebene, kasi na monɔkɔ nde moto asalaka eyambweli mpo na lobiko.”
Kasi epai wapi nde okoki kosala “eyambweli” yango? Ata soki ezali malamu kopesa litatoli ya libaku malamu, mosala ya kosakola ndako na ndako ezali lolenge eleki malamu soki tolingi kokutana na bato. (Misala 5:42; 20:20) Balongoli yo mokumba ya kosangana na mosala yango mpo ozali elenge? Soki moke te. Biblia epesi etinda oyo na Nzembo 148:12, 13 (NW), ete: “Bilenge mpe bino, baseka, bampaka mpe bana mibali. Tiká ete bákumisa nkombo ya Yehova.”
Kosakwela baninga ezalaka mokakatano
Ya solo, okoki koyoka mwa nsɔni mpe kobanga soki na mosala ya kosakola okutani na mwana moko oyo azalaka na kelasi na bino. Moto nyonso alingaka bato bándima ye. Moto moko te akoki kosepela ete bátyola ye, basɛka ye to báfinga ye. Nzokande, lokola elenge moko na nkombo Tanya alobaki yango, “na kelasi, bilenge bakoki kozala mabe mingi!” Na yango, okoki komituna soki baninga na yo ya eteyelo bakokanisa nini ntango bakomona yo olati malamu mpe osimbi Biblia na mabɔkɔ. Na mawa mpenza, ekoki kozala ete bakolinga koyokisa yo nsɔni. Elenge moko ya mboka Brésil, nkombo na ye Felipe, alobi boye: “Mwana mobali moko ya kelasi na biso azalaki mpe kofanda na buludingi esika tozalaki kofanda. Azalaki koloba na ngai ete: ‘Ozali kobima na Biblia! Eloko nini ezali na kati ya sakosi wana?’”
Ezali likambo ya masɛki te soki bazali kotumola yo na motindo wana. Biblia ezali koyebisa biso ete Yisaka, mwana ya Abalayama, akutanaki na likambo oyo ekokani na matumoli ya mabe mpenza epai ya ndeko na ye Yisamaele. (Genese 21:9) Ntoma Paulo amonaki te ete matumoli yango ezalaki likambo moke. Na Bagalatia 4:29, ntoma Paulo abengi yango mpenza ‘monyoko.’
Ndenge moko, Yesu akebisaki ete bato mosusu bakoyina bayekoli na ye. Alobaki ete: “Soki mokili eyini bino, boyebi ete eyinaki ngai liboso ya koyina bino. Soki bozalaki bato ya mokili, mbɛlɛ mokili ezali kolinga eloko na yango. Lokola bozali bato ya mokili te, kasi naponi bino na kati ya mokili, yango wana mokili ezali koyina bino.”—Yoane 15:18, 19, NW.
Na yango, lokola ozali moklisto, osengeli komibongisa mpo na koyika mpiko na minyoko. (2 Timote 3:12) Ata soki oyebisi baninga na yo likambo moko te ya Biblia, basusu bakonyokola yo mpo na bizaleli malamu na yo mpe mpo ozali te kosangana na bango na makambo ya mabe. (1 Petelo 4:4) Nzokande, Yesu akitisi biso motema na maloba oyo ya kobɔndisa: “Esengo na bino ntango bazali kolobela bino mabe mpe konyokola bino mpe kokosela bino makambo mabe ya ndenge nyonso mpo na ngai.” (Matai 5:11, NW) Kasi, ndenge nini matumoli to kosɛka ekoki kopesa moto esengo? Mpamba te oyebi ete ozali kosepelisa motema ya Yehova Nzambe! (Masese 27:11, NW) Mpe soki okosepelisa Nzambe, ozali komitya na molɔngɔ ya bato oyo bakozwa lifuti ya bomoi ya seko!—Luka 10:25-28.
Likambo ya esengo yango oyo, ezali baninga na yo ya kelasi nyonso te, ata mpe mingi te kati na bango nde bakonyokola yo soki bamoni yo na mosala ya kosakola. Angela, elenge mwasi moko ya Grande Bretagne azali kokundolela biso boye: “Soki okutani na moninga moko ya kelasi na ndako na bango, mbala mingi bango nde babangaka mingi koleka yo moko.” Ya solo, basusu bakolinga koyeba makambo nini olingi koloba. Ata ndenge nini, bilenge baklisto mingi bazali kozwa matomba malamu na kopesáká baninga na bango ya kelasi litatoli. Na lisolo na biso oyo ekolanda, na molɔngɔ ya masolo oyo, tokolobela ndenge nini yo mpe okoki kosala lokola bango.
[Elilingi na lokasa 21]
Bilenge mingi babangaka kokutana na baninga na bango ya kelasi soki bazali na mosala ya kosakola
[Elilingi na lokasa 23]
Kotika te ete matumoli etinda yo obanda koyoka nsɔni mpo na kondima na yo