Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g03 Juillet nk. 24-27
  • Nandimaki kokufela ekólo kasi nakómi kolendisa kimya

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nandimaki kokufela ekólo kasi nakómi kolendisa kimya
  • Lamuká!—2003
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Basoda ya kamikaze
  • Ohka: Bɔmbi elongo na moto
  • Etumba ekómi kosila
  • Nabandi kolanda kimya
  • Ekateli ya kosalela Nzambe ya kimya
  • Natiki kosambela Amperere nakómi kosambela Nzambe ya solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Bamipesá​—Epai ya nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1995
Lamuká!—2003
g03 Juillet nk. 24-27

Nandimaki kokufela ekólo kasi nakómi kolendisa kimya

LISOLO YA TOSHIAKI NIWA

Motambwisi mpɛpɔ moko ya kala na Japon, oyo azwaki formasyo ya kamikaze mpo na kopanza masuwa ya etumba ya ekólo Amerika na etumba ya mibale ya mokili mobimba, ayebisi ndenge azalaki komiyoka ntango azalaki kozela mokolo oyo akokende kokufa na etumba.

LOKOLA balongaki yango na etumba ya Midway na sanza ya Yuni 1942, Japon etikaki mokano oyo ezalaki na yango ya kobɔtɔla bamboka na Mbu ya Pasifike. Kobanda wana, Amerika mpe bikólo oyo ezalaki na ngámbo na yango ebandaki kolonga Japon na etumba mokomoko mpe kobɔtɔla lisusu bamboka oyo Japon esilaki kozwa.

Na sanza ya Sɛtɛmbɛ 1943, guvɛrnema ya Japon eyebisaki na bayekoli ya Iniversite, oyo liboso basengelaki kokɔta mosala ya soda te, ete basɛngisamaki sikoyo kokɔta na mosala yango. Na sanza ya Desɛmbɛ, ntango nazalaki na mbula 20, natikaki kotánga na Iniversite mpe nakɔtaki na molɔngɔ ya basoda oyo babundaka na mai. Sanza moko na nsima, nabandaki koyekola kotambwisa mpɛpɔ mpe masuwa ya etumba. Na sanza ya Desɛmbɛ 1944, balakisaki ngai ndenge ya kotambwisa mpɛpɔ moko ya etumba, oyo babengi Zero.

Basoda ya kamikaze

Ekólo Japon ezalaki kokwea se kokwea na etumba. Na sanza ya Febwali 1945, mpɛpɔ moko ya etumba (bombardier B-29) ekómaki kobwaka babɔmbi mingi na Japon. Kaka na ntango wana, bamasuwa ya etumba ya Amerika ezalaki kopusana mpenza pene na Japon, mpe bampɛpɔ ya etumba oyo ezalaki na masuwa yango ezalaki kobwaka ebele ya babɔmbi na Japon.

Mwa basanza liboso, bakonzi ya basoda ya Japon bazwaki ekateli ya kobunda etumba moko, opesi mbwa mbwa aboi; na yango bakómaki kosalela mayele ya kotinda basoda kokende komiboma na etumba. Atako na ntango wana emonanaki polele ete Japon ekolonga lisusu etumba yango te, ekateli wana ekómisaki bitumba yango molai mpe na ntembe te ebomisaki bankoto mosusu ya bato.

Ezali na lolenge wana nde basoda mosusu bakómaki bakamikaze. Bazalaki kobenga bango kamikaze, elingi koloba mopɛpɛ ya nzambe. Na kotalela lisolo ya bonkɔkɔ ya Japon, mopɛpɛ yango epanzaki masuwa moko ya basoda ya Mongolie oyo bayaki kobundisa Japon na ekeke ya 13. Na etumba ya liboso oyo bakamikaze babundaki, basalelaki bampɛpɔ ya etumba (Zero) mitano, oyo mokomoko ezalaki komema bɔmbi moko ya kilo 250, mpo na kopanza masuwa moko ya banguna.

Basɛngaki na limpinga babengi division aéronavale ya Yatabe ete ebongisa basoda oyo bakobanda kokende komiboma na etumba. Ngai mpe nazalaki na limpinga yango. Mokomoko na biso azwaki lokasa oyo asengelaki kotondisa mpo na komonisa ete andimi kokufela ekólo.

Nazalaki kokanisa ete nasengeli kopesa bomoi na ngai mpo na ekólo. Kasi, ata soki nandimaki kotambwisa mpɛpɔ mpo na kokufela ekólo, bakokaki kutu kokweisa mpɛpɔ na ngai liboso ete nakwea na masuwa ya banguna, mpe bongo nakokaki kokufa se mpamba. Mama na ngai alingaki nde kosepela soki nabebisi bomoi na ngai kozanga ete nasalisa baboti ná bandeko na ngai? Nalekisaki ntango mingi na kokanisa liboso nandima ete kokufela ekólo ezalaki lolenge malamu ya kosalela bomoi na ngai. Atako bongo, nandimaki komipesa mpo na ekólo.

Na sanza ya Marsi 1945, basalaki ekipi ya liboso ya limpinga ya division aéronavale ya Yatabe. Atako baponaki baninga na ngai 29, baponaki ngai te. Nsima ya kopesa bango formasyo, bayebisaki bango mokolo oyo bakokende. Basengelaki kolongwa na kaa ya basoda na Kanoya, na district ya Kagoshimana, na sanza ya Aprili. Liboso bátinda bango na Kanoya, nakendaki kotala baninga na ngai wana mpo nayeba soki bazalaki kokanisa nini lokola balingi kokende kokufela ekólo.

Moko na bango alobaki na malɛmbɛ mpenza: “Biso tokokufa, kasi yo kowela kokufa te. Soki moko na biso atikali na bomoi, asengeli koyebisa bato ntina ya kimya mpe kosala makasi mpo na kotya kimya.”

Na mwa 14 Aprili 1945, baninga na ngai wana bapumbwaki na mpɛpɔ na bango. Mwa bangonga na nsima, biso nyonso tozalaki matoi polele na radio mpo na koyoka ndenge makambo elekaki. Mopesi-nsango alobaki: “Ekipi ya liboso ya basoda ya kamikaze ya Showa, ekitelaki masuwa ya etumba ya banguna na mbu, na ɛsti ya Kikai-Shima. Bango nyonso bakufi na etumba.”

Ohka: Bɔmbi elongo na moto

Nsima ya sanza mibale, batindaki ngai na division aéronavale ya Konoike mpo nakɔta na ekipi Jinrai. Jinrai elimboli “nkake ya nzambe.” Limpinga yango ezalaki na bampɛpɔ ya etumba oyo ezalaki kofanda na mokili (bazalaki kobenga yango avions d’attaque), yango ebatelamaki na bampɛpɔ mosusu ya etumba, bakisa bampɛpɔ oyo ezalaki komema mwa bampɛpɔ ya kobwaka bɔmbi.

Na nse ya mpɛpɔ “mama,” elingi koloba mpɛpɔ ya etumba oyo ezali na mitɛrɛ mibale, bazalaki kokangisa mwa mpɛpɔ mosusu ya moke babengi Ohka, nkombo oyo elimboli “fololo ya cerisier.” Yango ezalaki komonisa bilenge batambwisi mpɛpɔ oyo bandimaki kokufela ekólo. Ohka ezalaki mpɛpɔ oyo kaka moto moko akokaki kokɔta, ezalaki na motɛrɛ te mpe ezalaki bamɛtrɛ mitano banda nsuka ya lipapu moko tii nsuka ya lipapu mosusu. Ezalaki na kilo 440. Na motó na yango, bazalaki kotya bɔmbi ya tɔni moko.

Soki mpɛpɔ mama ekómi pene ya esika oyo balingi kobwaka bɔmbi, motambwisa mpɛpɔ moko akokɔta na Ohka, oyo ekolongwa na mpɛpɔ mama. Na lisalisi ya pakapaka na yango misato oyo ekotika kosala nsima ya segɔnde zomi, mpɛpɔ yango ekomibwaka, mpe na nsima ekokende kokwea likoló ya masuwa ya etumba ya monguna. Ebongaki mpenza ete ebengama bɔmbi elongo na moto. Soki ebandi kokende, ekozonga lisusu nsima te!

Na ntango batambwisi mpɛpɔ bazalaki komekameka kotambwisa Ohka, bazalaki komata na mpɛpɔ ya etumba (Zero) likoló mpenza (mɛtrɛ 6 000 likoló ya nivo ya mbu) bazalaki komibwaka likoló ya eloko oyo bazalaki kotya lokola monguna. Namonaki batambwisi mpɛpɔ mingi bazali kokufa ntango ya komekameka ndenge wana.

Liboso bátinda ngai na limpinga wana, ekipi ya liboso esilaki kokende etumba. Ekipi yango ezalaki na bampɛpɔ ya etumba 18, nyonso ememaki ba Ohka, mpe bampɛpɔ mosusu 19 ekendeki nzela moko mpo na kobatela yango. Bampɛpɔ oyo ememaki ba Ohka ezalaki minene mpe ezalaki kotambola malɛmbɛ. Ata moko te ekómaki na esika oyo batindaki yango. Bampɛpɔ ya etumba ya Amerika epanzaki bampɛpɔ nyonso oyo ememaki ba Ohka, ezala bampɛpɔ mosusu oyo ezalaki kobatela yango.

Lokola bampɛpɔ oyo ezalaki kobatela bango ezalaki lisusu te, ekipi ya nsima ya Jinrai esengelaki kokende etumba kozanga bampɛpɔ oyo ezalaki kobatela bango. Baoyo nyonso bakendeki nsima bazongaki te. Bango nyonso bakufaki, batikaki bomoi na bango na Okinawa, esika bitumba ezalaki kobunda.

Etumba ekómi kosila

Na sanza ya Augusto 1945, batindaki ngai na limpinga babengi division aéronavale ya Otsu. Batindaki ngai na kaa ya basoda oyo ezalaki na nse ya ngomba Hiei-zan, pene na engumba Kyoto. Mpo na kotikela basoda ya Amerika nzela te bákɔta na mabelé ya Japon, babongisaki ba Ohka oyo esengelaki kotya yango likoló ya ngomba, mpe kobwaka yango likoló ya bamasuwa ya etumba ya Amerika. Mpo na yango, batyaki bibende oyo ba Ohka ekotambola likoló na yango kuna likoló ya ngomba.

Tozalaki se kozela bápesa mitindo mpo tópumbwa. Kasi mitindo eyaki te. Na mwa 15 Augusto, nsima wana Hiroshima mpe Nagasaki ebebisamaki na bɔmbi atomike na mwa 6 mpe mwa 9 Augusto, Japon emipesaki na mabɔkɔ ya basoda ya Amerika mpe bikólo oyo ezalaki na ngámbo na yango. Nsukansuka, etumba esilaki. Namonaki mpenza liwa na miso.

Na nsuka ya sanza ya Augusto, nazongaki na mboka na biso Yokohama, kasi ndako na ngai epanzanaki na bɔmbi oyo mpɛpɔ ya etumba (bombardier B-29) ebwakaki. Libota na biso ezalaki lisusu na elikya te. Ndeko na ngai ya mwasi ná mwana na ye bakufaki na mɔtɔ. Atako bongo, tobɔndisamaki ntango lɛki na ngai ya mobali azongaki na ndako na nzoto kolongɔnɔ.

Lokola mboka eutaki kobebisama mpe biloko ya kolya ekómaki mpasi, nazongaki na Iniversite mpo na kosilisa kelasi na ngai. Nsima ya kotánga mbula moko, nasilisaki mpe nazwaki mosala. Na mobu 1953, nabalaki Michiko mpe nakómaki tata ya bana mibali mibale.

Nabandi kolanda kimya

Na mobu 1974, Motatoli ya Yehova moko abandaki koyekola Biblia na Michiko. Eumelaki te, Michiko abandaki kokende na makita na bango mpe kobima na mosala na bango ya kosakola. Nazalaki kosepela te ndenge azalaki kobimabima mingi ndenge wana. Alimbolelaki ngai ete mosala ya kosakola ezali mosala oyo elendisaka kimya mpe bolamu ya solosolo. Na nse ya motema nalobaki ete soki ezali bongo, nasengeli kopekisa ye te. Nasengeli nde kopesa ye mabɔkɔ.

Kaka na ntango wana, nazwaki Batatoli oyo bazalaki bilenge mpo básala epai na ngai lokola basinzili na butu. Ntango bilenge yango babandaki mosala, natunaki bango mituna etali lingomba na bango mpe mosala na bango ya kosakola. Nakamwaki mingi ntango namonaki ete, na kokesene na bilenge mosusu ya mbula na bango, bazalaki kozwa makambo na lisɛki te mpe bazalaki na elimo ya komipesa. Bayekolaki bizaleli wana na Biblia. Balimbolaki ete Batatoli nyonso ya mokili mobimba baponaka mposo te, mpe balandaka mpenza etinda ya Biblia oyo etali kolinga Nzambe mpe kolinga bazalani na bango. (Matai 22:36-40) Bamonaka Batatoli mosusu ete bazali bandeko na bango mibali mpe basi, bázala bato ya mboka nini to ya ekólo nini.​—Yoane 13:35; 1 Petelo 2:17.

Na nse ya motema, nalobaki ete ‘wana ezali se makanisi mpamba.’ Lokola mangomba mingi oyo emibengaka ya Boklisto ezalaki kobunda yango na yango, ezalaki mpasi mpo nandima ete Batatoli ya Yehova bakeseni na mangomba mosusu.

Namonisaki bango ntembe oyo ezalaki na motema na ngai. Na lisalisi ya Annuaire des Témoins de Jéhovah, bilenge wana bamonisaki ngai ete na Allemagne, babwakaki Batatoli na bolɔkɔ, bamosusu kutu babomaki bango, mpo baboyaki kokɔta na makambo ya politiki ya boyangeli ya Hitler. Nayaki kondima ete Batatoli ya Yehova bazali baklisto ya solo.

Kaka na ntango wana, mwasi na ngai amonisaki ete amipesi na Nzambe ntango azwaki batisimo ya mai na sanza ya Desɛmbɛ 1975. Na mokolo yango, basɛngaki ngai nayekola Biblia. Kasi, ntango nakanisaki makambo ebele oyo nasengelaki kokokisa, oyo ezalaki kosɛnga mbongo, na ndakisa kofutela bana na ngai kelasi mpe kofuta mbongo ya ndako oyo tozwaki na nyongo, nandimaki koyekola te. Na lisangá, mibali oyo babalá bazalaki kobundana mpo misala na bango etikelaka bango ntango mpo na makambo ya elimo. Nabangaki noki yango ekómela mpe ngai. Kasi, ntango bamonisaki ngai ndenge ya kosala mpo na kozala na bokatikati kati na bomoi ya boklisto ná mosala, nsukansuka nazwaki ekateli ya koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova.

Ekateli ya kosalela Nzambe ya kimya

Nsima ya mbula mibale ya boyekoli, ndeko oyo azalaki koyekola na ngai Biblia atunaki ngai soki nakanisaki likambo ya komipesa na Nzambe. Nzokande, nazwaki naino ekateli yango te mpe ezalaki kobangisa ngai.

Mokolo moko, nazalaki kokita nokinoki na sikalye na esika na ngai ya mosala. Nabɛtaki libaku mpe nakweaki, natutanaki na nsima ya motó, mpe nazalaki komiyeba lisusu te. Ntango makanisi na ngai ezongaki, nayokaki mpasi makasi na motó mpe bamemaki ngai na lopitalo na ambulance. Atako navimbaki mingi na nsima ya motó, kasi mokwa ya motó epasukaki te mpe nazokaki na kati te.

Nazalaki mpenza na botɔndi mingi epai ya Yehova mpo nabikaki! Kobanda wana, nazwaki ekateli ya kosalela bomoi na ngai mpo na kosala mokano ya Yehova, mpe namipesaki na ye. Na sanza ya Yuli 1977, nazwaki batisimo ntango nazalaki na mbula 53. Yasuyuki, mwana na ngai ya mobali ya liboso, ayekolaki mpe Biblia mpe azwaki batisimo soki mbula mibale na nsima.

Mbula soki zomi nsima ya batisimo na ngai, nazwaki epaso na mosala. Na boumeli ya mbula zomi yango, nazalaki kokokisa mikumba na ngai ya moklisto, kosangisa yango ná mosala na ngai ya mosuni. Lelo oyo, nazali na libaku malamu ya kozala nkulutu na Yokohama, nalekisaka mpe ntango mingi na mosala ya kosakola. Mwana na ngai ya mobali ya liboso azali mpe nkulutu, azali mpe na mosala ya ntango nyonso na lisangá moko ya penepene.

Ngai moto nalingaki komiboma na etumba na mpɛpɔ ya kamikaze, nazali na botɔndi mingi mpo nazali na bomoi lelo mpe nazali kozwa na lokumu mingi mosala ya kosakola “nsango malamu oyo ya bokonzi.” (Matai 24:14) Nandimi mpenza ete lolenge ya bomoi oyo eleki malamu ezali ya kozala na kati ya libota ya Nzambe. (Nzembo 144:15) Na mokili ya sika oyo etikali moke eya, bato bakomona lisusu bitumba te, mpo “libota moko bakotombwela libota mosusu mopanga te, bakoyekola etumba lisusu mpe te.”​—Yisaya 2:4.

Soki Nzambe alingi, nakosepela komona lisusu bato oyo nayebaki, oyo bakufaki na etumba, baoyo bakosekwa. Ekozala esengo monene mpenza koyebisa bango makambo etali bomoi ya kimya oyo bakoki kozala na yango na paladiso ya mabelé, na boyangeli ya sembo ya Bokonzi ya Nzambe oyo ezali na likoló!​—Matai 6:9, 10; Misala 24:15; 1 Timote 6:19.

[Elilingi na lokasa 25]

Ntango nazalaki na limpinga ya aéronavale

[Elilingi na lokasa 25]

“Ohka”: bɔmbi elongo na moto

[Eutelo ya bafɔtɔ]

© CORBIS

[Elilingi na lokasa 26]

Ngai ná baninga na ngai liboso bákende kokufa mpo na ekólo. Nazali moto ya mibale kobanda na lobɔkɔ ya mwasi, kaka ngai moko nabikaki

[Elilingi na lokasa 27]

Ngai ná mwasi na ngai Michiko mpe mwana na ngai ya liboso, Yasuyuki

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 24]

U.S. National Archives photo

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto