Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w98 1/12 nk. 27-31
  • Natiki kosambela Amperere nakómi kosambela Nzambe ya solo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Natiki kosambela Amperere nakómi kosambela Nzambe ya solo
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Bopusi ya lingomba ya kala
  • Bambula ya etumba
  • Elikya ya sika
  • Esengo ya mosala ya mobongisi-nzela
  • Nameki bomoi ya mokili ya sika
  • Nazalaki kosepela na mikumba na ngai
  • Bantina ya kosepela ezali mingi
  • Yehova abendaka bato ya komikitisa na solo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Basalisaki ngai mpo natika ezaleli na ngai ya nsɔninsɔni
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2000
  • Oyanolaka wana moto moko abyangi yo?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Tosalaki elongo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1998
w98 1/12 nk. 27-31

Natiki kosambela Amperere nakómi kosambela Nzambe ya solo

LISOLO YA ISAMU SUGIURA

Bato nyonso bamonaki ete ekólo Japon ekolonga te na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba. Kasi, biso tozalaki na elikya ete kamikaze (“mopɛpɛ ya nzambe”) ekobɛta mpe tokolonga banguna. Kamikaze ezalaki bongo mipɛpɛ oyo mibomaki mpe mikimisaki mbala mibale ebele ya basoda ya ekólo Mongolie ntango bayaki kobundisa ekólo Japon na 1274 mpe na 1281.

YANGO wana, mokolo ya 15 Augústo 1945, ntango Amperere Hirohito, ayebisaki ete ekólo Japon ekwei na mabɔkɔ ya banguna, bamilio ya bato oyo bazalaki kosambela ye balɛmbaki nzoto. Na ntango yango nazalaki naino na kelasi. Ngai mpe nalɛmbaki nzoto. Namitunaki, ‘Soki amperere azali nzambe ya bomoi te, nani azali Nzambe ya bomoi? Nakotya elikya epai ya nani?’

Nzokande, kokwea ya ekólo Japon na Etumba ya Mibale ya mokili mobimba efungolelaki ngai mpe bankóto mosusu ya bato ya Japon nzela mpo na koyeba Yehova, Nzambe ya solo. Liboso ete nayebisa bino mbongwana oyo nasengelaki kosala, bótika nasolola na bino mpo na lingomba oyo nazalaki banda bomwana na ngai.

Bopusi ya lingomba ya kala

Nabotamaki na engumba Nagoya, na mokolo ya 16 Yúni 1932. Nazali mwana ya nsuka na libota ya bana minei ya mibali. Tata na ngai azalaki mokaboli-mapango (géomètre) na engumba. Mama na ngai azalaki mondimi na Lingomba ya Tenrikyo, lingomba moke ya Shinto, mpe yaya na ngai ya liboso azwaki mateya mpo akóma moteyi na lingomba yango. Mama alingaki ngai mingi, mpe azalaki komema ngai na ndakonzambe.

Balakisaki ngai kogumba motó mpe kosambela. Lingomba ya Tenrikyo eteyaka ete nkombo ya mozalisi ezali Tenri O no Mikoto. Basambelaka lisusu banzambe zomi ya mikemike. Bazalaki kobikisa bato ya maladi na mabondeli, mpe bazalaki kolendisa kosalisana mpe koteya bindimeli na bango epai ya bato mosusu.

Na bolenge na ngai, nazalaki kolinga koyeba makambo mingi. Nazalaki kosepela komona sanza mpe ebele ya minzoto na butu, mpe nazalaki kokamwa ndenge likoló ezali mosika. Nazalaki lisusu kɔsepela na ndenge nazalaki komona sóló (aubergine) na kɔnkɔmbrɛ oyo nazalaki kolona na nsima ya ndako ezali kobota. Ntango nazalaki komona biloko oyo Nzambe azalisá, kondima na ngai mpo na ye ezalaki kokóma makasi.

Bambula ya etumba

Natángaki kelasi ya ebandeli kobanda na 1939 kino 1945. Ezalaki mpe na ntango yango nde Etumba ya Mibale ya mokili mobimba ezalaki kosalema. Na eteyelo bazalaki koteya biso ete tósambelaka amperere, yango ezali moko na mateya minene na Lingomba ya Shinto. Bazalaki koteya biso shushin, mateya yango mazalaki kopusa biso kozala na bolingo makasi mpo na ekólo mpe kolinga mosala ya soda. Milulu ya bomatisi bɛndɛlɛ, koyemba nzembo ya lokumu mpo na ekólo, koyekola mibeko ya amperere, mpe kopesa losako na fɔtɔ ya amperere ezalaki makambo oyo tozalaki kosala mokolo na mokolo na eteyelo.

Tozalaki lisusu kokende na tempelo ya Shinto oyo ezalaki na engumba na biso mpo na kobondela Nzambe mpo basoda ya amperere bálonga etumba. Bayaya na ngai mibale bazalaki basoda. Lokola lingomba eteyaki ngai kolinga ekólo, nazalaki kosepela soki nayoki ete basoda ya ekólo Japon balongi na etumba.

Kompanyi oyo esalaka bampɛpo na Japon ezalaki na Nagoya. Yango wana bampɛpo ya bitumba ya États-Unis ezalaki kobwaka babombi mingi kuna. Moimoi, bampɛpo babéngi B-29 ezalaki koleka na engumba na ntaka ya mɛtɛlɛ soko 9 000 na likoló mpe ezalaki kobwaka ebele ya babombi na bingumba oyo ezalaki na baizini. Na butu, bampɛpo yango ezalaki kopelisa miinda makasi mpe ezalaki kokita na nse mpenza na ntaka ya mɛtɛlɛ soko 1 300. Lokola bampɛpo ezalaki kobwaka babombi kuna mbala na mbala, mɔ́tɔ makasi ezalaki kopela pene na bandako ya bato. Bobele na Nagoya, bampɛpo ebwakaki babombi mbala 54 na boumeli ya sanza libwa. Biloko mingi bibebaki mpe bato koleka 7 700 bakufaki.

Na ntango yango, bamasuwa ekómaki kobɛta masasi na bingumba zomi oyo bizali pembenipembeni ya mai monene. Lokola bato bazalaki koloba ete basoda ya États-Unis bakómi pene na engumba Tokyo, balakisaki basi na bilenge mibali lolenge ya kobunda na mopanga ya bambu mpo na kobatela ekólo. Tozalaki koloba: “Ichioku Sougyokusai,” elimboli “Tondimi bato milio 100 bákufa, kasi tokokwea na mabɔkɔ ya banguna te.”

Na mokolo ya 7 Augústo 1945, zulunalo moko ekomaki ete: “Bombi moko ya nsɔmɔ ekwei na Hiroshima.” Nsima ya mikolo mibale, babwakaki mosusu na Nagasaki. Yango ezalaki babombi babéngi bombi atomike. Na nsima bayebisaki biso ete bombi nyonso mibale ebomaki bato koleka 300 000. Na nsuka, mokolo ya 15 Augústo, ntango tosilisaki kotambola epai bazalaki kolakisa biso ndenge ya kobunda na bambu, amperere ayebisaki ete ekólo Japon ekwei na mabɔkɔ ya banguna. Bayebisaki biso ete tokolonga etumba, kasi sikoyo balongi biso!

Elikya ya sika

Lokola engumba etondaki na basoda ya Amerika, mokemoke tobandaki kondima ete États-Unis elongaki etumba. Demokrasi ekɔtaki na ekólo Japon mpe babimisaki mibeko ya sika oyo epesaki bonsomi ya losambo. Bomoi ezalaki mpasi, bilei bizalaki moke, mpe na 1946, tata na ngai akufaki mpo azalaki kolya malamu te.

Na ntango yango, babandaki kotángisa lokota ya Lingelesi na eteyelo na biso, mpe emisyo moko ya masolo na Lingelesi ebandaki kosalema na radio NHK. Na boumeli ya mbula mitano nazalaki kolanda emisyo yango, mpe bato mingi bazalaki kolinga yango. Nazalaki na kaye oyo nazalaki kokoma makambo nyonso oyo nazalaki koyoka. Yango epesaki ngai mposa ya kokende mokolo mosusu na États-Unis. Lokola mangomba ya Shinto na ya Bouddha ekokisaki mposa na ngai te, nabandaki kokanisa ete mbala mosusu solo na ntina na Nzambe ekoki kozala na kati ya mangomba ya Mpoto mpe na mangomba ya Amerika.

Na Apríli 1951, nakutanaki na Grace Gregory, misionere ya la Société Watch Tower. Atɛlɛmaki penepene na esika engbunduka etɛlɛmaka na Nagoya, azalaki kokabola Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na mwa buku moko bakomá na lokota ya Japonais oyo ezalaki na lisolo moko ya Biblia. Nakamwaki na komona ete azalaki mpenza na komikitisa mpo na kosala mosala ya ndenge wana. Nazwaki mikanda yango nyonso mibale, mpe nandimaki ntango alobaki na ngai ete tóbanda koyekola Biblia. Nayebisaki ye ete nakoya nsima ya mwa mikolo na ndako na ye mpo tóbanda koyekola Biblia.

Ntango nakɔtaki na engbunduka, nabandaki kotánga Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli. Miso na ngai mabendamaki na lisolo ya liboso na zulunalo yango oyo ebandaki na liloba “Yehova.” Namonaki naino nkombo yango liboso te. Nandimaki te ete nakoki kokuta nkombo yango na diksionere na ngai ya moke ya lokota ya Lingelesi mpe ya Japonais; kasi na diksionere yango nkombo yango ezalaki! “Yehova . . , Nzambe ya Biblia.” Sikoyo nabandi kokanga ntina ya Nzambe ya baklisto!

Mokolo ya liboso oyo nakendaki epai ya Grace na ndako ya bamisionere, bayebisaki ngai ete nsima ya mwa bapɔsɔ, Nathan Knorr, oyo azalaki prezida ya Watch Tower Bible and Tract Society na ntango wana, akosala lisukulu. Ayaki na ekólo Japon na mokomeli na ye Milton Henschel, mpe asengelaki kokóma na Nagoya. Atako nayebaki makambo mingi te na Biblia, nasepelaki mpenza na lisukulu yango. Nasepelaki lisusu kozala esika moko na bamisionere mpe bayangani mosusu.

Nsima ya sanza soko mibale ya boyekoli elongo na Grace, nayekolaki solo na ntina na Yehova, Yesu Klisto, lisiko, Satana Zabolo, Armagedon, mpe Paladiso na mabelé. Nsango malamu ya Bokonzi ezalaki mpenza nsango oyo nazalaki koluka. Bobele ntango nabandaki koyekola, nabandaki mpe koyangana na makita ya lisangá. Nazalaki kosepela na ndenge bato nyonso oyo bazalaki koyangana wana bazalaki na boboto. Bamisionere na bato ya Japon bazalaki kosangana mpe kofanda bango nyonso na tatami (matɔkɔ).

Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1951, liyangani ya zongazonga ya liboso esalemaki na Japon. Esalemaki na esika babéngi Nakanoshima na engumba Osaka. Na Japon mobimba Batatoli bakómaki 300 te; kasi na liyangani bato bazalaki soko 300, kati na bango pene na bamisionere 50. Nazalaki mpe na mwa mokumba na liyangani yango. Makambo namonaki mpe nayokaki esimbaki motema na ngai, na boye ete nazwaki ekateli ya kosalela Yehova bomoi na ngai mobimba. Mokolo oyo elandaki, nazwaki batisimo na pisini moko ya penepene na esika oyo tosalaki liyangani.

Esengo ya mosala ya mobongisi-nzela

Mposa na ngai ezalaki nakóma mobongisi-nzela, ndenge babéngaka basaleli ya ntango nyonso epai ya Batatoli ya Yehova, kasi nasengelaki kosunga mama mpe bandeko na ngai. Ntango nazwaki mpiko ya koyebisa mokonzi ya ngai na mosala mposa na ngai, nakamwaki ntango alobaki ete: “Nakosepela kosalisa yo soki yango ezali mpo na bolamu na yo.” Nazalaki kosala bobele mikolo mibale na pɔsɔ mpe nazalaki kopesa mama mbongo mpo na kokokisa bamposa ya libota. Namiyokaki mpenza lokola ndɛkɛ oyo ebimi na zumbu.

Lokola makambo nyonso mazalaki malamu, nabandaki mosala ya mobongisi-nzela na mokolo ya 1 Augústo 1954. Teritware na ngai ezalaki nsima ya esika oyo engbunduka etɛlɛmaka na Nagoya, kotambola mwa moke mpo na kokóma na esika nakutanaká na Grace mpo na mbala ya liboso. Nsima ya basanza mingi, natindamaki lokola mobongisi-nzela monene na engumba Beppu na wɛsti ya esanga ya Kyushu. Kuna tozalaki kosala elongo na Tsutomu Miura.a Na eleko yango, lisangá ya Batatoli ya Yehova ezalaki te na esanga yango mobimba. Kasi lelo oyo masangá makómi mingi, kino zongazonga 22!

Nameki bomoi ya mokili ya sika

Ntango Ndeko Knorr ayaki lisusu na Japon na Apríli 1956, asɛngaki ngai natánga na mongongo makasi mwa baparagrafe na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya Lingelesi. Ayebisaki ngai ntina na yango te, kasi nsima ya basanza, nazwaki mokanda ya libyangi mpo nakende kokɔta kelasi ya mbala ya 29 na Eteyelo ya Gileadi mpo na bamisionere. Na Novɛ́mbɛ ya mbula yango, nasalaki mobembo moko kitoko, nakendaki na États-Unis. Yango ekokisaki mposa na ngai ya kala. Kofanda mpe kosala mwa basanza elongo na libota monene ya Betele ya Brooklyn elendisaki kondima na ngai mpo na lisangá ya Yehova oyo ezali komonana.

Na Febwáli 1957, Ndeko Knorr akamataki biso misato kati na bayekoli mpe tokendaki na South Lansing, na nɔrdi ya etúká ya New York epai Eteyelo ya Gileadi ezali. Sanza mitano oyo nalekisaki na Eteyelo ya Gileadi, lokola nazwaki mateya na Liloba ya Yehova mpe nafandaki na esika ya kitoko elongo na bayekoli mosusu, namekaki bomoi ya Paladiso na mabelé. Kati na bayekoli 103, tozalaki zomi oyo totindamaki na ekólo Japon.

Nazalaki kosepela na mikumba na ngai

Na Ɔkɔtɔ́bɛ 1957, ntango nazongaki na Japon, Batatoli bazalaki soko 860. Bapesaki ngai mokumba ya mokɛngɛli ya zongazonga, kasi liboso ya kobanda, na boumeli ya mwa mikolo Adrian Thompson na engumba Nagoya alakisaki ngai ndenge ya kosala. Teritware ya zongazonga na ngai ebandaki na Shimizu, pene na ngomba Fuji, kino na esanga ya Shikoku bakisa mpe bingumba minene lokola Kyoto, Osaka, Kobe, mpe Hiroshima.

Na 1961, nakómaki mokɛngɛli ya etúká. Yango esɛngaki kosala mibembo longwa na mpiɔ makasi na nɔrdi ya esanga ya Hokkaido kino na molunge makasi ya esanga ya Okinawa mpe koleka kino na bisanga ya Ishigaki penepene na Taïwan. Teritware mobimba ezalaki na kilomɛtɛlɛ soko 3 000.

Na 1963, babéngisaki ngai na Betele ya Brooklyn kolanda mateya oyo eumelaki sanza zomi na Eteyelo ya Gileadi. Na boumeli ya mateya Ndeko Knorr azalaki kolobela mingi likambo ya kozala na ezaleli malamu mpo na misala oyo bazali kopesa biso. Alobaki ete kosukola bakabine ezali mosala ya ntina ndenge moko na mosala ya biro. Abakisaki ete soki bakabine ezali pɛto te, libota mobimba ya Betele na misala na yango ekozala malamu te. Bambula na nsima, bapesaki ngai mosala ya kosukola bakabine na Betele ya Japon, mpe nazalaki kokanisa toli wana.

Ntango nazongaki na Japon, nakómaki lisusu mokɛngɛli-motamboli. Mwa bambula na nsima, na 1966, nabalaki Junko Iwasaki. Azalaki mobongisi-nzela monene na engumba Matsue. Ntango wana, Lloyd Barry azalaki mokambi ya filiale na Japon, asalaki lisukulu ya libala na biso. Junko asalaki na ngai elongo na mosala ya mokɛngɛli-motamboli.

Totikaki mosala yango na 1968 ntango babéngaki ngai na filiale ya Tokyo mpo na mosala ya kobongola mikanda. Lokola Betele ezalaki na bandako mingi te, nsima ya mosala nazalaki kozonga na Sumida, na engumba Tokyo, mpe Junko azalaki kosala lokola mobongisi-nzela monene na lisangá na biso na Sumida. Na ntango yango, Betele ekómaki na bosɛnga ya esika monene. Na 1970 basombaki lopango moko na engumba Numazu, mosika te na ngomba Fuji. Kuna batongaki ndako ya bitaze mibale mpo na konyata mikanda mpe ndako mosusu ya kolala. Liboso ete bábanda kotonga, bandako mingi oyo ezalaki kuna esalelamaki mpo na Eteyelo ya mosala ya Bokonzi, mpo na kopesa bankulutu ya masangá mateya. Nazwaki libaku ya kozala molakisi na eteyelo yango, mpe Junko azalaki kolamba bilei mpo na banakelasi. Ezalaki esengo komona bankama ya mibali baklisto ndenge bazalaki kolanda mateya mpo na mosala ya Nzambe.

Mokolo moko na nsima ya midi, babéngaki ngai nokinoki. Balobaki ete mama akɔti lopitalo mpe elikya ya kobika ezali te. Namataki engbunduka mpe nakómaki nokinoki na lopitalo. Azalaki koyeba lisusu makambo te, kutu nalalaki kaka na lopitalo pembeni na mbeto na ye. Akufaki na ntɔngɔ ya mokolo oyo elandaki. Na nzela ya bozongi na Numazu, nazalaki se kolela ntango nazalaki kokanisa bampasi oyo amonaki na bomoi na ye mpe bolingo oyo azalaki na yango mpo na ngai. Soki ezali mokano ya Yehova, nakomona ye lisusu na lisekwa.

Mosika te tobakisaki bandako mosusu na Betele ya Numazu. Tosombaki lopango ya hectare 7 na engumba Ebina, mpe botongi ya Betele ya sika ebandaki na 1978. Lelo oyo tokokuta kuna enyateli ya mikanda na bandako ya kolala, mpe Ndako ya Mayangani oyo ekoki kokɔtisa bato koleka 2 800. Na ebandeli ya mbula oyo tosilisaki kotonga ndako mibale ya kolala, oyo mokomoko ezali na bitaze 12 na ndako moko ya bitaze mitano mpo na babiro mpe parkingi. Lelo oyo basangani ya libota ya Betele na biso bazali soko 530, kasi tokoki kolalisa bato soko 900 na bandako oyo tozali na yango.

Bantina ya kosepela ezali mingi

Ezali esengo komona kokokisama ya esakweli ya Biblia, ɛɛ, komona ‘oyo moke kokola kino libota na makasi.’ (Yisaya 60:22) Nazali komikundola ntango yaya na ngai ya mobali atunaki ngai na 1951 ete, “Batatoli nyonso na Japon bazali boni?”

Nayebisaki ye ete, “Soko 260.”

Na lityo nyonso, atunaki ete, “Nyonso wana?”

Nalobaki na nse ya motema ete, ‘Ata ndɛlɛ motuya ya bato oyo Yehova akobenda na losambo na ye kati na mokili oyo ya Shinto mpe Bouddha ekoyebana.’ Yehova apesi eyano! Lelo oyo, Batatoli ya Yehova bazali kosakola na bateritware nyonso na ekólo Japon, mpe motuya na bango eleki 222 000 kati na masangá 3 800!

Mbula 44 oyo nalekisi na mosala ya ntango nyonso—mbula 32 elongo na mwasi na ngai ya bolingo—ezali mpenza bambula ya esengo. Nalekisi mbula 25 na mosala ya kobongola mikanda na Betele. Na Sɛtɛ́mbɛ 1979, babéngisaki ngai mpo na kozala mosangani ya komite ya Filiale ya Batatoli ya Yehova na ekólo Japon.

Ezali libaku malamu mpe lipamboli na ndenge napesi mwa mabɔkɔ mpo na kosunga bato ya sembo oyo balingaka kimya ete báya kosambela Yehova. Bato mingi basalaki ndenge ngai nasalaki—batiki kosambela amperere mpo na kosambela Yehova, Nzambe bobele moko ya solo. Nazali naino na mposa ya kosalisa ebele ya bato ete bámitya na ngámbo ya Yehova oyo ezali kolonga mpe bázwa bomoi oyo ezangi nsuka kati na mokili ya sika ya kimya.​—Emoniseli 22:17.

[Maloba na nse ya lokasa]

a Tata na ye azalaki mosaleli ya sembo ya Yehova oyo abikaki na bombi atomike oyo babwakaki na Hiroshima na ekólo Japon na 1945 ntango yango azalaki na bolɔkɔ. Talá Lamuká! ya 8 Ɔkɔtɔ́bɛ 1994, nkasa 11-15.

[Elilingi na lokasa 29]

Esika ya mateya mpo na losambo ya Amperere

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Zulunalo The Mainichi

[Elilingi na lokasa 29]

Na Ndeko Franz na New York

[Elilingi na lokasa 29]

Ngai na mwasi na ngai Junko

[Elilingi na lokasa 31]

Na mosala ya kobongola mikanda

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto