Makambo mazali koleka na mokili
Mpo na kozala mpenza nzoto malamu—Sɛkaká!
Kosɛka mpenza na motema ya esengo esukaka kaka te na kosepelisa moto. Minganga mosusu ya Japon balobi ete kosɛka ezongisaka ebongiseli ya mai ya nzoto (système endocrinien) na esika na yango, ezongisaka misisa ya bɔɔngɔ mpe ebongiseli ya nzoto oyo ebundisaka maladi na esika na yango, esalaka ete motema ebɛta malamu, moto apema na ndenge esengeli, mpe ekoki kokitisa mwa moke mpasi ya mingai. Lokola kosɛka elamwisaka misisa mikemike ya bɔɔngɔ, yango esalaka ete makila etambola mingi na misisa yango mpe bɔɔngɔ esala malamu koleka. Ntango tosɛkaka na motema mobimba, tosalisaka misisa na biso mosala. Zulunalo moko (IHT Asahi Shimbun) elobi ete ntango bamekaki koyeba ndenge misisa esalaka, bamonaki epai ya moto moko oyo asɛkaki mingi, ete misisa na ye “ebendanaki makasi ndenge moko na misisa ya moto oyo afandaki mpe amisembolaki.” Michio Tanaka, monganga ya bɔɔngɔ na Osaka (Japon), alobeli mingi matomba ya kosɛka. Alobi ete “ezali lokola nkisi moko ya makasi oyo ebimisaka mikakatano te na nsima.”
Mobomi oyo aleki babomi nyonso
Zulunalo moko (New Scientist) elobi ete: “Etikali moke sida ezwa esika ya maladi babengi peste noire mpe ekóma maladi oyo eleki koboma banda mokili ebandá. Na ekeke ya 14, peste noire esilisaki bato na Mpoto mpe na Azia, ebomaki bato soki milio 40. Sikoyo, bambula pene na 700 na nsima, likambo ya ndenge yango ezongi lisusu.” Lapolo oyo zulunalo moko (British Medical Journal) ebimisi emonisi ete tii tokokóma na mobu 2010, sida ekoboma bato soki milio 65. Atako bato mingi lelo bazali kobɛla maladi ya ntolo (tuberculose) mpe malaria, mikakatano ya nkita mpe mpasi oyo bato bazali komona mpo na bamaladi wana ezali moke soki tokokanisi yango na oyo sida ezali komemela bato.
Baboti mpe bilenge
Zulunalo moko (Times) ya Londres ekomaki lapolo moko ete ntango libota ezali na matata, baboti batungisamaka mingi na motema mpe na makanisi koleka bana na bango oyo bazali naino bilenge. Lapolo yango epesi toli ete baboti basengeli te “kobɔndelaka bana na bango ya bilenge oyo bazali motó makasi mpo na kobanga ete bakoyokisa bango nkanda.” Na esika ya kobɔndelaka bana, “baboti basengeli nde komibatela bango moko . . . mpe kozala baboti oyo bana basengeli kotosa.” Profesɛrɛ Laurence Steinberg, ya Iniversite Temple ya Philadelphie na Pennsylvanie (États-Unis), oyo ayekolaka bomoi ya bilenge, alimboli ete bana bakangaka motema koleka ndenge bato mingi bakanisaka yango. Nsima ya koyekola bizaleli ya bankoto ya baboti na boumeli ya mbula koleka zomi, profesɛrɛ Steinberg amoni boye: “Moboti oyo bana batosaka ye amoniselaka bango boboto mpe atyelaka bango likebi, kasi na oyo etali kopekisa bango makambo mosusu, kotyela bango bandelo mpe makambo oyo bana basengeli kosala, asakanaka te.” Lapolo yango ebakisi mpe ete bilenge oyo babɔkwamá na baboti ya ndenge wana bazalaka mayele, bazalaka na esengo koleka, mpe bakɔtaka mpenza te na makambo ya mobulu.
Tozalaka na mposa básimbaka biso
Zulunalo moko oyo ebimaka pɔsɔ na pɔsɔ na Pologne (Polityka) elobi ete “Toyokaka mposa básimbaka biso kaka ndenge toyokaka mposa ya moi, ya mai, mpe ya biloko ya kolya.” Biso nyonso tozalaka na eloko moko na nse ya loposo ya nzoto na biso oyo esalaka ete soki basimbi biso ata esika nini tóyoka ete basimbi biso. Ntango moto moko asimbi biso, “bɔɔngɔ na biso ekoyeba yango, ekoyebisa biso esika basimbi biso mpe ekotinda biso tómungamunga, tókóma na esengo, to tómonisa boninga.” Bana mike nde bazalaka mpenzampenza na mposa básimbaka bango, mingi mpenza ntango bazali naino mike. Nzokande, baboti mingi basimbaka bana na bango kaka na ntango bazali kolatisa bango, kosukola bango, koleisa bango, to kobɛta bango. Kasi, zulunalo yango (Polityka) elobi ete bato mingi oyo bayekolaki likambo yango bamonaki ete bana oyo bamemaka bango mingi, bayambaka bango, bapɛpwaka bango, mpe basimbaka bango bazalaka nzoto kolɔngɔnɔ, bakolaka malamu, bazalaka mayele mingi koleka bana oyo “basimbaka bango mingi te.”
Balaki ya mokili mobimba ekómi na likama
William Cosgrove, mokambi-molandi ya ebongiseli oyo etalelaka makambo ya mai na mokili mobimba (Conseil mondial de l’eau) alobi ete: “Ezali ata na laki moko te na mokili, oyo bato babebisi naino yango te na misala na bango. Tozali kobebisa balaki, mpe yango ekoki kozala likama mpo na bato oyo babikaka kaka na balaki yango.” Cosgrove alobi ete balaki ezali kobebisama na baizini, na misala ya bilanga, mpe na mai ya salite; mpe ata soki laki moko ezali komonana pɛto, nzokande esí ebebá. Abakisi: “Mokolo mosusu, tokomona likambo ya sika ebimi na laki, na ndakisa molunge ya mai ezali lisusu ndenge ezalaka te, mpe mbala moko laki ebongwani mpenza. Soki likambo ya ndenge wana ebandi, likoki ya kopekisa yango ekozala te.” Tózwa ndakisa ya Laki Victoria, laki oyo eleki monene na Afrika. Na boumeli ya mbula 20 oyo euti koleka, mitindo mingi ya mbisi ya laki yango esili kolimwa mpamba te bazali kosopa mai ya salite kuna. Laki mosusu oyo mpe ebebi mingi ezali bongo Laki Tai Hu na Chine. Tozali kotánga boye na liyebisi moko ya ebongiseli oyo etalaka mai na mokili mobimba: “Bato ya mayele balobi ete babwaká bilɔkɔ mingi kuna na boye ete okoki ata kotambola likoló na yango.” Na kotalela lapolo ya agence Reuters, mai mingi (pene na 90 %) oyo bato basalelaka eutaka na balaki.
Nyama ezali mpe “minganga”
Zulunalo moko (The Economist) ya Londres elobi ete “bato mingi oyo bayekolaka bomoi ya nyama balobi ete nyama ezali na likoki ya komisalisa na maladi, mpe esalaka yango.” Mpo na koboma nyama ya libumu, mikomboso ya Tanzanie elyaka motema ya nzete moko oyo ebomaka nyama yango. Mpe mikomboso na Afrika elyaka nkasa ya mwa nzubenzube oyo ezali lokola ndɔbɔ, oyo ezalaka nkisi ya kosukola libumu. Nkoso elyaka mbuma mosusu oyo ezalaka na pwazɔ, elyaka mpe mabelé oyo ntango mosusu ebomaka pwazɔ yango. Nyama babengi ours bruns ya Alaska mpe ndɛkɛ babengi oies des neiges ya Canada, mpe mbwa ya zamba nyonso, elyaka matiti mpo na koboma nyama ya libumu. Ntango basalaki nyama ya zamba ndenge na ndenge baekzamɛ ya makila, bamonaki ete mingi kati na yango ebikaki na bamaladi mosusu ya minene oyo virisi to bakteri epesaka, oyo mbala mingi ebomaka nyama oyo babɔkɔli na mboka. Zulunalo yango (The Economist) ebimisi likanisi ete “nyonso wana emonisi ete nyama ya zamba ekoki komisalisa mpo na kozala nzoto kolɔngɔnɔ, nzokande nyama oyo babɔkɔli na mboka ekoki kosala yango te.”
“Motema etondi —kasi motó ezali na eloko te”
Zulunalo moko (Die Woche) oyo ebimaka pɔsɔ na pɔsɔ na Allemagne elobi ete bato mingi bakómi kosɛnga na bato oyo basalaka mosala ya kokoma mikanda ete básalisaka bango na kokoma mikanda ya lolango. Mpo na baoyo bakokaka te kokoma makambo oyo ezalaka mpenza na mitema na bango na mokanda, bakoki kosɛnga lisalisi epai ya bakomi yango mpe kofuta mbongo. Na kotalela ndenge moto alingi, mokanda yango ekoki ya lolango to mpe mokanda oyo esí ebongisamá. Bakomaka mpe mikanda oyo ezali na maloba ya ntɔki, nzokande basengeli koyokana mbongo boni kiliya akofuta. Lolenge ya kokoma mikanda yango ya lolango ekesanaka mingi. Bakomi mosusu bazali bato oyo mosala na bango ezali kokoma mikanda, basusu bazali bapanzi-nsango, basusu basalaka yango na nsima ya mosala. Basusu kutu babongisá mituna oyo soki bakɔtisi yango na ordinatɛrɛ ekoki kobimisa mokanda mobimba. Ata ndenge nini, eloko moko te emonisi ete mikanda wana ebimisaka mbala moko matomba. Nsima ya kosalisa kiliya na ye na kokoma “mikanda ya kotuna libala oyo ezalaki kolaka makambo mingi,” mokomi moko amonaki ete mwana mwasi azalaki se koboya.
Ngalasisi mpe kozangisa mosala mpo na maladi
Na kotalela boyekoli oyo ebongiseli moko na Finlande esalaki, ngalasisi esalaka ete bato bázangisa mosala mingi te mpo na maladi. Mpo basali na bango bázangisaka mosala mingi te mpo na maladi, bakompanyi mingi ya Finlande ezali kosalela mayele wana. Zulunalo moko (Finnfacts) oyo ebimisami na ebongiseli moko ya ekólo Finlande (Confédération de l’industrie et des employeurs finlandais) elobi boye: “Katikati ya basali ya ekólo Finlande basalaka na bakompanyi oyo esalisaka basali ngalasisi.” Ebakisi ete: “Bakompanyi epesaka mateya mpo na kosalisa basali bátika komɛla makaya mpe bázala minene mingi te, etyá masano ya ngalasisi mpo na basali.” Mbula na mbula, bakompanyi ya Finlande ebimisaka mbongo mingi ($67 000 000) mpo na programɛ wana, mpo eyebi ete kosalisa basali ngalasisi ekosala ete bázangisaka mosala mingi te mpo na maladi mpe kompanyi ekozwa matomba mingi koleka mbongo oyo ebimaki.
Batelá mokɔngɔ na yo!
Zulunalo moko ya Espagne (El País Semanal) elobi ete: “Kofanda to kotɛlɛma mabe, kokóma monene mingi, mpe kozanga kosala ngalasisi ebebisaka mokemoke mokuwa ya mokɔngɔ na biso.” Balobaka ete na mikili ya bozwi, bato mingi (80 %) babɛlaka mokɔngɔ na ntango moko boye ya bomoi na bango. Lopitalo moko (Kovacs) ya Espagne, oyo esalisaka maladi ya mokɔngɔ, epesi toli ete tosengeli koyeba ndenge ya kofanda mpe kotɛlɛma soki tolingi kokima to kokitisa mwa moke maladi ya mokɔngɔ. Talá mwa batoli oyo ya pɛtɛɛ: Lalaká na mopanzi wana osemboli mokɔngɔ na yo malamu. Ntango ofandi, lalisaká malamu mokɔngɔ na yo na kiti. Soki ozali liboso ya ordinatɛrɛ, tiká mapeka na yo ezala ndenge ezalaka. Soki olingi kogumbama, gumbá nde mabɔlɔngɔ na yo, kasi mokɔngɔ te. Mpe soki olingi kotɛlɛma esika moko ntango molai, tiká kilo na yo ya nzoto ekende na lokolo moko mpe tyá lokolo mosusu likoló ya ebonga to na mwa esika ya likoló.