Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g05 8/4 nk. 13-15
  • “Yehova, omoni ngai!”

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • “Yehova, omoni ngai!”
  • Lamuká!—2005
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mbala ya liboso oyo nayokaki solo ya Biblia
  • Nazongeli kokende na Ndako ya Bokonzi
  • Nandimaki te ete nakokutana na bango lisusu
  • Nazalaki kosala “makita” ngai moko
  • Yehova amoni ngai!
  • Natika Yehova mpo libota moko endima kozwa ngai?
  • Nakómi kosalela Nzambe
  • Nakómá na kimya elongo na Nzambe mpe elongo na mama na ngai
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2015
  • Koluka Liboso Bokonzi​—⁠bomoi Ya Solosolo Mpe Ya Esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2003
  • Botondi mpo na lisungi ya sembo ya Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1993
  • Nazali kolanda mokano oyo namityelaki wana ezalaki ngai na mibu motoba
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
Makambo mosusu
Lamuká!—2005
g05 8/4 nk. 13-15

“Yehova, omoni ngai!”

Lisolo ya Nelly Lenz

“Bozali Batatoli ya Yehova?” Wana ezali motuna oyo natunaki mibali mibale oyo bakɔtaki na lopango na biso. Bazongisaki: “Ɛɛ.” Nalobaki: “Ngai mpe!” Nazalaki na mbula 13 mpamba mpe nazalaki kokende na Ndako ya Bokonzi te. Baboti na ngai mpe bazalaki Batatoli ya Yehova te. Kasi, mpo na nini namibengaki Motatoli ya Yehova?

SOKI Batatoli ya Yehova te, ntango mosusu nalingaki kobotama te. Mama azwaki zemi na ngai ntango azalaki kofanda na engumba Montréal, na etúká ya Québec, na Canada. Azalaki na mbula 17 mpamba. Bandeko na ye batyaki ye mpanzi likoló mpo alongola zemi yango. Ye mpe andimaki.

Mama asɛngaki konje ya mokolo moko na mosala mpo akenda kolongola zemi. Ekoki kozala ete Patrɔ na ye, mwasi moko Motatoli ya Yehova, ayebaki ntina oyo mama asɛngaki konje mokolo wana. Ayebisaki mama na mokuse ete bomoi ezali likabo ya motuya monene. (Nzembo 139:​13-16) Na nzela, ntango mama azalaki kokende na lopitalo, akanisaki mingi na likambo oyo patrɔ na ye alobaki. Azwaki ekateli ete akolongola zemi yango te. Ntango nabotamaki na 1964, mpe na nsima mama akendaki kotika ngai na ndako oyo babɔkɔlaka bana ya bitike.

Mbala ya liboso oyo nayokaki solo ya Biblia

Ntango nazalaki na mbula soki mibale, mama ná mobali oyo autaki kobala ye balongolaki ngai na ndako oyo babɔkɔlaka bana ya bitike. Tozalaki kofanda na engumba Sainte-Marguerite-du-Lac-Masson, mpe babandaki koyekola Biblia na Batatoli ya Yehova mpe koyangana na makita ya lisangá. Kasi, eumelaki te, tokendaki kofanda na engumba Boisbriand, mpe baboti na ngai batikaki koyekola.

Mwa bambula na nsima, bazongelaki koyekola. Nazalaki koyoka ntango bazalaki kolobela elikya oyo Biblia epesi mpo na paladiso na mabelé. (Luka 23:​43) Nakómaki kolinga Yehova mingi.

Kasi, mokolo moko, mama ayebisaki ngai ete atiki koyekola na Batatoli mpe tokokende lisusu na Ndako ya Bokonzi te. Na ebandeli, nasepelaki. Lokola nazalaki kaka na mbula mwambe, nazalaki komona na bantango mosusu ete makita ezalaki koumela mingi. Kasi, mokolo wana na mpokwa, nalingaki kosolola na Yehova na libondeli, mpe nabangaki ete ntango mosusu akoyoka ngai te.

Libota moko ya Batatoli ya Yehova ezalaki kofanda pembeni na biso. Na mpokwa ya mokolo ya Lomingo oyo elandaki, namonaki bango bazali kobima mpo na kokende makita na bango na Ndako ya Bokonzi. Nabandaki kolela mpe kotuna Nzambe: “Mpo na nini bana na bango bakoki kokende makita kasi ngai te?” Nzokande, maloba ya Nzembo 33:18 eyaki komonana solo: “Talá, liso na Yawe ezali likolo na baoyo bakotosaka ye, likolo na baoyo bazali na elikya na boboto na ye.”

Nazongeli kokende na Ndako ya Bokonzi

Nsima ya pɔsɔ misato, nakendaki kotala libota yango mpe nayebisaki mama na bango, Lilianne, ete nalingi nakendaka na makita. Mama Lilianne amonisaki ngai ete ezali mwa mpasi, mpo mama na ngai alobaki ete alingi makambo ya Batatoli ya Yehova te. Atako bongo, natyaki ye mbamba. Na yango, ayaki kotika ngai epai na biso mpe atunaki mama soki nakoki kokendaka na bango na makita. Nakamwaki mpenza ntango mama andimaki. Alobaki ete makita ekoteya ngai mitinda ya malamu. Yango wana, nakómaki kokende na makita mikolo nyonso ya Lomingo.

Nayanganaki na makita ya lisangá mbula soki misato. Kasi, ntango nakokisaki mbula 11, baboti na ngai babomaki libala, mpe mama azwaki ngai, tokendaki kofanda epai mosusu. Na mbala oyo lisusu, nazalaki kokutana lisusu na Batatoli ya Yehova te.

Nandimaki te ete nakokutana na bango lisusu

Mokolo moko nafandaki na basikaliɛ ya ndako na biso ntango Batatoli mibale​—⁠Eddie Besson mpe Don Fisher​—⁠bakɔtaki mpe batunaki soki baboti na ngai bazalaki na ndako. Ntango nalobaki ete bazali te, babalukaki mpo na kokende. Kasi nalandaki bango mbango, mpe tosololaki lisolo oyo nalobeli na ebandeli.

Ndenge bokoki kokanisa yango, mibali wana mibale bakamwaki ntango bayokaki ete nazali komibenga Motatoli ya Yehova. Nabɛtelaki bango lisolo na ngai mpe nabondelaki bango báya lisusu na mpokwa. Ntango nayebisaki mama ete Batatoli bakoya na mpokwa, asepelaki ata moke te mpe alobaki ete akondima kokɔtisa bango na ndako te. Kutu, alobaki ete akobima liboso ete bákóma. Nabondelaki mama na mai na miso mpo abima te. Kaka na ntango alingaki kobima, babɛtaki ngonga ya porte, mpe ezalaki Eddie Besson. Kanisá esengo oyo nazalaki na yango ntango mama andimaki koyekola Biblia!

Nsukansuka, nazwaki lisusu likoki ya kokende na makita ya lisangá! Kasi, ekokaki ata mbula mobimba te, mama atikaki lisusu koyekola. Na mbala oyo, apekisaki ngai kosolola ata moke na Batatoli mpe abwakaki mikanda nyonso ya Batatoli ya Yehova oyo amonaki. Kasi, nasalaki makasi mpo na kobomba Biblia moko, buku moko ya nzembo, volimi relye mibale ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli, Annuaire des Témoins de Jéhovah mibale, mpe buku oyo ezalaki na motó ya likambo Solo oyo ezali komema na bomoi ya seko.a Mbala ya nsuka oyo nayekolaki ná Eddie Besson, natunaki ye nini nakokaki kosala, lokola nalingi Yehova mingi. Alendisaki ngai nayekolaka ngai moko mpe nabondelaka mingi. Ayebisaki ngai nazala na elikya ete Yehova akotika ngai te. Nazalaki na mbula soki 14 mpamba.

Nazalaki kosala “makita” ngai moko

Kobanda wana, mokolo nyonso ya Lomingo, nazalaki kokɔta na shambre na ngai mpe kosala lokola nazali na makita. Nazalaki koyemba loyembo “Tótalelaka libonza!” na ebandeli mpe na nsuka, mpamba te ezalaki loyembo ya Bokonzi kaka moko oyo nayebaki na motó. Tii lelo, mbala nyonso oyo nayembaka loyembo yango, mai ya miso ebimaka ngai. Nazalaki mpe koyekola lisolo moko ya Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli na volimi relye mibale oyo nazalaki na yango. Nazalaki kosukisa “makita” na ngai na libondeli. Na ndenge wana, atako nazalaki lisusu kosangana ná Batatoli te, nazalaki komiyoka ete Yehova azali pene na ngai.

Ntango nakokisaki mbula 17, ngai ná mama tokendaki kofanda na engumba Montréal. Bambula wana ezalaki mpasi, mpamba te atako makambo nyonso ezalaki malamu na ndako na biso, bolingo ezalaki te.

Yehova amoni ngai!

Mokolo moko mama andimaki kozwa buku Okoki kozala na bomoi ya seko na mabelé oyo ekobongwana Paradis, oyo Batatoli ya Yehova batikelaki ye. Ntango nazongaki na ndako, namonaki yango likoló na mesa mpe nabandaki kofungola yango. Ntango namonaki nkombo ya Nzambe, Yehova, nabandaki kolela mpe na kati ya motema, nabondelaki: “Yehova, omoni ngai!”

Nazalaki koluka kokutana na bandeko na ngai baklisto. Kasi nakokutana na bango ndenge nini? Mama ayebisaki ngai ete moto moko oyo azalaki kofanda pembeni na biso akoki kozala Motatoli ya Yehova. Yango wana, ntango nakendaki mosala, nalekaki na ndako ya moto yango mpe nabɛtaki ngonga ya porte. Mobali yango​—⁠oyo azalaki naino na mpɔngi na miso​—⁠afungolaki porte. Kanisá kokamwa oyo akamwaki ntango nalobaki ete nazali Motatoli ya Yehova mpe nazali na mposa ya kozwa batisimo! Alukaki ndeko mwasi moko, nkombo na ye Josée Miron, mpo ayekola na ngai Biblia. Kasi, na mbala oyo lisusu, mama aboyaki. Ayebisaki ngai ete nasengeli kozela tii nakokokisa mbula 18 mpo na kokóma Motatoli.

Natika Yehova mpo libota moko endima kozwa ngai?

Patrɔ na ngai ayebaki ete na ndako bazalaki kolinga ngai lisusu te. Mbala na mbala, ye ná mwasi na ye bazalaki kobenga ngai nakenda kolekisa wikende elongo na bango. Lokola nalingaka mpunda, mbala mingi tozalaki kokende kotambola na mpunda. Nazalaki komona bango lokola baboti na ngai.

Mokolo moko, patrɔ na ngai ayebisaki ngai ete ye ná mwasi na ye balingaka ngai mingi mpe bakosepela nakende kofanda epai na bango. Yango nde eloko nazalaki koluka​—⁠libota oyo ezali kolinga ngai. Kasi, batyelaki ngai mobeko: natika kosangana na Batatoli ya Yehova. Bapesaki ngai pɔsɔ moko mpo nakanisa, kasi nazelaki ata mokolo mobimba te. Napesaki bango eyano mbala moko. Yehova atikaka ngai te, ngai mpe nakoki kotika ye te.

Nakómi kosalela Nzambe

Lokola na ndako mama azalaki lisusu kolinga ngai te, nakendaki kofanda epai ya tata mobɔkɔli na ngai. Ye alendisaki ngai nakoba koyekola Biblia, mpe na mokolo ya 17 Desɛmbɛ 1983, ntango nazalaki na mbula 19, nazwaki batisimo. Nazalaki na esengo mingi komona Eddie Besson mokolo ya batisimo na ngai. Sikoyo, akokaki lisusu komituna te soki nazali mpenza Motatoli ya Yehova!

Nzokande, tata mobɔkɔli na ngai abongolaki makanisi nsima ya batisimo na ngai. Ntango nazalaki kobondela, azalaki koloba na mongongo makasi, ata mpe kobamba ngai biloko! Akómaki mpe kotya ngai mpanzi likoló nakoba lisusu na kelasi, nzokande yango elingaki kopesa ngai nzela te ya kokokisa mokano oyo namityelaki ya kokóma mobongisi-nzela, elingi koloba mosakoli ya ntango nyonso. Nsukansuka, ayebisaki ngai nabima na ndako na ye. Apesaki ngai chèque ya dolare 100 mpe ayebisaki ngai ete mokolo nakokende kozwa mbongo yango na banki nde nakoyeba ete Yehova ayebi ngai te.

Nakómaki mobongisi-nzela na mokolo ya 1 Sɛtɛmbɛ 1986, mpe tii lelo, nakendá kozwa mbongo yango na banki te! Na bantango mosusu ezalaki mpasi kosala mosala ya mobongisi-nzela na bamboka kozanga motuka. Kasi bandeko ya lisangá na biso bazalaki kosalisa ngai mpe kosunga ngai mingi.

Na nsima, nayaki koyebana na Ruben Lenz, moklisto moko ya boboto mingi. Tobalanaki na 1989. Lelo oyo, Ruben azali nkulutu na lisangá moko na engumba Milton, na etúká ya Ontario, na Canada, epai tozali kofanda banda 2002. Libala na biso ezali moko ya mapamboli minene oyo nazwi epai ya Yehova. Nakobaki na mosala ya mobongisi-nzela tii ntango tobotaki mwana na biso ya liboso, Erika, na 1993. Nsima ya mbula misato na ndambo, tobotaki mwana mobali, oyo topesaki ye nkombo Mika. Nsima ya kolekisa ebele ya bambula oyo nazalaki komiyoka kaka ngai moko, Yehova Nzambe apamboli ngai mingi ndenge apesi ngai libota oyo balingaka ye mingi lokola ngai moko mpe nalingaka ye.

Atako mbala na mbala nazalaki kokabwana na libota ya Yehova ntango nazalaki kokola, ata mokolo moko te natiká kotya elikya epai ya Nzambe mpe kokangama na elikya ya bomoi ya seko na Paladiso. (Yoane 3:​36) Nazali na botɔndi mingi ndenge Yehova “amonaki” ngai!

[Maloba na nse ya lokasa]

a Ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Elilingi na lokasa 15]

Nazali kotambola na mpunda ya patrɔ na ngai

[Elilingi na lokasa 15]

Ngai ná mobali na ngai Ruben, mpe bana na biso Erika ná Mika

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto