Lakisá mwana na yo ya mwasi makambo akosala ntango akomona sanza mbala ya liboso
Ntango mwana akómi elenge, amonaka makambo ya sika ndenge na ndenge na nzoto na ye. Ntango mwana mwasi azali kokola, moko ya makambo ya minene oyo ekómelaka ye ezali komona sanza.
KOMONA sanza mbala ya liboso ezali likambo oyo ekoki kobangisa mwana mwasi; yango ekoki kopesa ye makanisi kilikili. Ndenge moko na makambo mingi oyo ekómelaka bilenge, bana basi mingi bayebaka te eloko ya kosala ntango bamoni sanza mbala ya liboso. Ntina mpenza oyo bamitungisaka soki bamoni sanza mbala ya liboso ezali mpo bayebisá bango makambo ya lokuta, to ndenge esalemaka mbala mingi, bayebisá bango eloko moko te mpo na yango.
Mbala mingi, bana basi oyo balakisá bango makambo oyo bakosala ntango bakomona sanza mbala ya liboso, bamitungisaka mingi te soki bamoni yango. Kasi, baankɛtɛ mingi emonisi ete baboti mingi balakisaka bana na bango te makambo bakosala ntango bakomona sanza mbala ya liboso. Ntango batunaki basi na bikólo 23, basi mingi (pene na 30 %) balobaki ete bayebisaki bango eloko moko te oyo etali komona sanza liboso bámona yango. Yango wana, bayebaki eloko ya kosala te ntango bamonaki yango mbala ya liboso.
Basi mingi oyo balobaki ete komona sanza mbala ya liboso ezali likambo ya mabe mpenza, ezali baoyo bayebaki eloko moko te na likambo yango. Na ankɛtɛ moko, basi mingi oyo balobelaki makambo oyo ekómelaki bango ntango bamonaki sanza mbala ya liboso, basalelaki maloba lokola “nsɔmɔ,” “nsɔni,” mpe “kobanga.”
Mbala mingi, bato bayokaka nsɔmɔ soki bamoni moto na makila, bakanisaka ete azoki to azali na maladi. Yango wana, ntango mwana mwasi amoni sanza mbala ya liboso, soki balimbwelaki ye yango malamu te to soki bayebisaki ye eloko moko te mpo na yango, makambo oyo bato balobaka na mboka na bango, to masapo, ekoki kotinda ye akanisa ete azali na maladi to azoki, akoki mpe komona yango lokola likambo ya nsɔni.
Mwana na yo asengeli koyeba ete mwana mwasi nyonso oyo azali nzoto kolɔngɔnɔ akomona sanza. Lokola ozali moboti, okoki kosalisa ye abanga te to amitungisa te ntango akomona yango. Ndenge nini?
Baboti bazali na mokumba monene
Babuku, bafilme, balakisi mpe minganga bateyaka makambo ya komona sanza. Baboti mingi bamonaka ete biloko mpe bato yango bateyaka mpenza makambo ya ntina oyo etali komona sanza mpe makambo oyo mwasi asengeli kosala mpo na kozala pɛto soki amoni sanza. Atako bongo, ntango mosusu bana basi bazalaka na mituna oyo babuku, bafilme, minganga mpe balakisi bakoki kopesa biyano na yango te, mpe bazalaka na mposa ya makambo mosusu oyo biloko to bato yango bakoki kokokisa te. Ata soki bayebi eloko oyo bakosala soki bamoni sanza, mbala mingi bayebaka te kosilisa mitungisi ndenge na ndenge oyo bayokaka soki bamoni sanza.
Nkɔkɔ ya mwasi, yaya ya mwasi, mpe mingimingi mama, nde basengeli koyebisa mwana makambo mosusu ya ntina mpe kosalisa ye mpo amitungisa mingi te. Mbala mingi, bana basi bamonaka ete bamama nde basengeli koyebisa bango makambo yango.
Bongo tata? Bana basi mingi bayokaka nsɔni kosolola na batata likambo yango. Bamosusu balingaka batata bápesa bango biloko oyo basengeli na yango to bámonisa ete bazali komitya na esika na bango, nzokande basusu balingaka ata moke te ete batata na bango báyeba likambo yango.
Na bambula oyo eleki, na mikili mingi, mabota oyo batata bazali kobɔkɔla bana bango moko ekómi mingi. Yango wana, batata mingi bakokóma na mokumba ya koteya bana na bango ya basi makambo etali komona sanza. Batata yango basengeli koyeba makambo ya ntina oyo etali komona sanza, mpe bizaleli oyo bana na bango bakokóma na yango soki bamoni sanza. Mbala mosusu, ekozala malamu batata ya ndenge wana básɛnga bamama na bango moko to bandeko na bango ya basi bálakisa bango ndenge bakoki kosalisa bana na bango ya basi na likambo yango.
Ntango ya kobanda masolo yango
Na bikólo mingi ya bozwi, na ndakisa na États-Unis, na Corée du Sud, mpe na mikili mosusu ya Mpoto, bana basi mingi babandaka komona sanza mbala ya liboso soki bakokisi mbula 12 to 13; kasi basusu bamonaka yango mwa liboso, na ndakisa na mbula 8, to mwa moke na nsima, na ndakisa na mbula 16 to 17. Na bikólo mosusu ya Afrika mpe ya Azia, bana basi mingi babandaka komona sanza ntango bakómi na mwa bambula mingi. Na ndakisa na Nigeria, bana basi mingi babandaka komona sanza soki bakokisi mbula 15. Ezali na makambo mingi oyo esalaka ete mwana mwasi abanda komona sanza na mbula boye to boye: Makila na ye, soki bazali babola to bazwi, kolya na ye, misala asalaka, mpe soki bafandaka na nse to na likoló ya ngomba.
Ezali malamu kobanda kosolola na mwana na yo likambo ya komona sanza liboso amona yango mbala ya liboso. Yango wana, esengeli koyebisa mwana makambo ya sika oyo akomona na nzoto na ye mpe likambo ya komona sanza ntango azali naino moke, na ndakisa ntango akokisi mbula pene na mwambe. Okoki kokanisa ete mwana ya mbula mwambe azali naino moke, kasi soki mwana na yo azali na mbula na kati ya mwambe mpe zomi, na ntembe te nzoto na ye ebandi kobongwana na kati; yango ekomonana na makambo mingi, na ndakisa, akobanda kobima mabɛlɛ mpe nsuki na nzoto. Nzoto ya bana basi mingi efungwamaka soki bakómi pene na komona sanza mbala ya liboso (bakómaka molai mpe monene mbala moko).
Ndenge ya kolobela yango
Mbala mingi, soki mwana akómi pene na komona sanza mbala ya liboso, alukaka koyeba makambo oyo ekokómela ye. Ekoki kozala ete baninga na ye ya kelasi balobelaka likambo yango. Bana basi mingi oyo babandi naino komona sanza te bazalaka na mituna mingi, kasi bayebaka te bábanda wapi; to bayokaka nsɔni kolobela yango.
Ezali mpe bongo mpo na baboti. Atako mama nde asengeli libosoliboso kosolola na mwana likambo yango, mbala mingi ayebaka esika ya kobanda te, to ayokaka nsɔni kolobela yango. Ntango mosusu, yo mpe oyokaka ndenge wana. Kasi, ndenge nini okoki kobanda kosolola na mwana na yo likambo yango?
Mwana mwasi oyo akómi pene na komona sanza mbala ya liboso, oyo azali na mbula kati na 9 mpe 13, akozala mpenza na mokakatano te ya kokanga makambo oyo bayebisi ye polelepolele. Na ndakisa, okoki koyebisa ye mbala boni mwasi amonaka sanza na sanza moko, eumelaka mikolo boni, mpe makila ebimaka mingi to te. Na ebandeli ya masolo na bino, ekozala malamu olobela mingi kaka makambo oyo ekokómela ye mpe oyo akosala soki amoni sanza. Mbala mosusu, akoki kotuna yo mituna lokola: “Nakoyoka ndenge nini?” to “Ekozala ndenge nini?”
Na nsima, okoki kobanda koyebisa ye polele makambo mosusu oyo etali komona sanza. Ntango mosusu, okoki koluka mikanda oyo elobelaka likambo yango epai ya minganga, na bisika oyo bato bakendeke kotánga to na bisika oyo batɛkaka mikanda. Mikanda yango ekoki kosalisa yo olimbwela ye likambo yango malamumalamu. Bana basi mosusu basepelaka kotánga mikanda yango bango moko, kasi bamosusu basepelaka moto atángela bango.
Mpo bósolola malamu, luká esika oyo makɛlɛlɛ ezali te. Na maloba ya pɛtɛɛ, bandá komonisa ye ete, ntango mwana mwasi azali kokola, nzoto na ye ebongwanaka. Na ndakisa, okoki koloba boye: “Etikali moke omona eloko moko oyo ekómelaka bana basi nyonso. Oyebi eloko yango?” To mama akoki kobanda na kolobela makambo oyo ekómelaki ye moko, na ndakisa akoki koloba boye: “Ntango nakómaki na mbula oyo ozali na yango, nazalaki komituna soki komona sanza ezali nini. Ngai ná baninga na ngai tozalaki kolobela yango na kelasi. Baninga na yo mpe balobelaka yango?” Luká koyeba makambo oyo ayebi mpe sembolá makambo oyo bayebisaki ye malamu te. Yebá ete na ebandeli, ntango mosusu yo nde okoloba mingi.
Lokola ozali mwasi, na ntembe te, oyebi mpasi mpe mitungisi oyo ekómelaki yo ntango omonaki sanza mbala ya liboso; na bongo okoki koyebisa ye ndenge osalaki. Makambo nini ebongaki oyeba? Makambo nini ozalaki na mposa ya koyeba? Na makambo oyo bayebisaki yo, oyo wapi esalisaki yo? Salá makasi olobela na ndenge oyo ebongi, ntina oyo mwasi amonaka sanza mpe mikakatano na yango. Pesá biyano ya malamu na mituna nyonso oyo akotuna yo.
Kobá kosolola na ye
Mpo mwana ayeba malamu likambo ya komona sanza esɛngaka kosolola na ye mbala na mbala, kasi kaka mbala moko te. Ezali kosɛnga te olobela makambo nyonso mbala moko. Soki olobeli makambo mingi, mwana akokanga ntina na yango te. Bana bakangaka makambo mokemoke. Lisusu, ekoki kozala malamu kozongela likambo moko mbala mingi, mpe na ntango nyonso oyo ebongi. Ntango mwana azali kokola, akokanga ntina ya makambo mosusu ya mikemike.
Likambo mosusu ezali ete ntango mwana mwasi azali kokola, ndenge akobanda kotalela likambo yango ekobanda kobongwana. Ntango mwana na yo akobanda komona sanza mbala na mbala, na ntembe te akozala na mituna mosusu mpe na makambo mosusu oyo akolinga koyeba. Na bongo, osengeli kokoba kosolola na ye mpe koyanola na mituna na ye. Lobelá mingimingi makambo oyo ekoki na mbula na ye mpe oyo akokanga ntina na yango.
Zalá moto ya liboso ya koluka ete bósolola
Kasi, okosala nini soki mwana azali kosepela te kolobela likambo yango? Ekoki kozala ete alingi te kolobela makambo na ye, to esengeli akola mwa moke, mpo nsɔni esila mpe ayeba ndenge ya kotuna mituna. Kutu akoki ata koloba ete ayebi makambo nyonso oyo etali komona sanza.
Na États-Unis, ntango batunaki bana basi ya mbula 11, mingi balobaki ete bayebi malamu makambo nyonso etali komona sanza. Kasi, biyano oyo bapesaki na mituna mosusu, emonisaki polele ete bayebi makambo nyonso te mpe makambo mingi oyo balobaki ete bayebi ezali nde makambo ya lokuta oyo bato balobaka na mboka na bango to masapo. Na bongo, ata soki mwana na yo ayebisi yo ete ayebi makambo nyonso etali komona sanza, osengeli kaka kosolola na ye.
Na ntembe te, tata to mama nde asengeli koluka kosolola na mwana na ye likambo yango mokemoke mpe mbala na mbala. Yango ezali mokumba na bino. Mwana ayeba yango to te, asengeli na lisalisi na bino. Yango ekoki kotungisa to kolɛmbisa bino, kasi bótika te. Bózala motema molai. Ata ndɛlɛ, mwana na bino akosepela na milende oyo bosalaki mpo na kosalisa ye.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 15]
Ezali malamu kosolola na mwana na yo likambo yango liboso amona sanza mbala ya liboso
[Etanda na lokasa 17]
NDENGE YA KOSOLOLA NA MWANA LIKAMBO YA KOMONA SANZA
❖ Luká koyeba makambo nini ayebi. Sembolá makambo ya lokuta oyo bayebisá ye. Talá soki makambo oyo yo na ye boyebi ezali mpenza solo.
❖ Yebisá ye ndenge osalaki. Soki okanisi makambo oyo osalaki ntango omonaki sanza mbala ya liboso mpe oyebisi mwana na yo makambo yango, yango ekolendisa ye mpenza.
❖ Yebisá ye makambo oyo akosala. Bana basi mingi batunaka mituna lokola: “Nakosala nini soki namoni sanza na kelasi?” “Nakoki kosala nini mpo bilamba ebeba te?” “Nakosala yango ndenge nini?”
❖ Yebisá ye makambo polelepolele. Yebisá mwana na yo makambo oyo ekoki na mbula na ye mpe oyo akokanga ntina na yango.
❖ Kobá koteya ye. Bandá kosolola na mwana na yo liboso amona sanza mbala ya liboso, mpe kobá kosolola na ye ata nsima na yango.
[Elilingi na lokasa 16]
Omitya na esika na ye. Mbala mosusu, mwana na yo alingi te kolobela makambo na ye