Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/06 nk. 27-29
  • Bilanga ya kitoko mpenza

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bilanga ya kitoko mpenza
  • Lamuká!—2006
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Mwa bazamba ya mike
  • Talá kitoko na yango na makanisi
  • Ndenge nini nakoki koyeba koloba liboso ya bato?
    Lamuká!—2004
  • A Beautiful Garden
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Nzambe alingi ete moto azala na bomoi ya esengo kati na paradis
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1989
  • Elanga ya Edene ezalaki mpenza?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Lamuká!—2006
g 7/06 nk. 27-29

Bilanga ya kitoko mpenza

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA GUADELOUPE

KOBANDA na bambula ya 1600 mpe na nsima, bakangaki ebele ya bato ya Afrika na makasi mpe bamemaki bango na boombo na Guadeloupe mpe na Martinique. Bisanga yango ya Caraïbes ezalaki mpenza kitoko. Kasi, baombo yango bazalaki na libaku ya kosepela na kitoko yango te, mpamba te mosala makasi oyo bazalaki kosalisa bango na bilanga ya koko ezalaki kozwa ntango na bango nyonso mokolo na mokolo.

Bakóló bilanga yango mingi bazalaki kopesa baombo na bango bilei te. Yango wana, mpo na kozwa biloko ya kolya, baombo yango basalaki bilanga na bango moko. Atako yango ebakiselaki bango mosala, kasi epesaki bango libaku ya kolona biloko oyo balingi. Balonaki songo, mboma, mpe biloko mosusu ya elɛngi mpe oyo etongaka nzoto koleka eloko nyonso oyo bakóló na bango bakokaki kopesa bango. Balonaki mpe milona mosusu oyo basalaka na yango nkisi ná oyo ebongisaka supu.

Na mobu 1848, bakonzi ya France bapekisaki boombo na bisanga yango. Atako bongo, bato yango oyo bautaki kosikolama bakobaki kosala bilanga na bango. Lelo oyo, bato ya Guadeloupe mpe ya Martinique oyo mingi na bango bazali bankɔkɔ ya bato wana ya molende oyo bautaki na Afrika, bakobaka kosala bilanga oyo babengaka yango bilanga ya kreole.

Mwa bazamba ya mike

Na ndako ya moombo, ezalaki na bilanga ndenge mibale: elanga ya ndunda, oyo ezalaki mwa mosika na ndako, mpe “elanga ya ndako” (to jardin de case, ndenge bango moko babengaka yango) ezalaki pembeni ya ndako. Lelo oyo, bilanga ya kreole ekokani na elanga yango ya ndako. Na elanga ya kreole, okokuta ebele ya fololo, matiti, banzete ya minene mpe ya mike oyo ekangamá esika moko lokola na zamba moko ya monene. Soki omoni elanga yango mbala ya liboso, okomona ete ezali kitoko kasi ezali na molɔngɔ te, mpo milona, bafololo ná banzete ekanganikangani. Nzokande, elanga wana ezali mpenza na molɔngɔ mpe ekabolami na mwa bituluku. Ezali mpe na mwa banzela ya koleka oyo esalisaka mokóló elanga apusana penepene na milona nyonso.

Elanga yango ebandi nsima ya ndako mpe ekei tii liboso ya ndako. Eteni na yango ya liboso ya ndako ezalaka esika kitoko mpenza oyo bayambaka bapaya, mpamba te ezalaka na fololo ya langilangi mpe banzete ya nkasa ya langi kitoko (croton, allamanda jaune d’or, bougainvillée mpe ixora).

Na bisika oyo elili ya ndako ekómaka na elanga yango, balonaka milona oyo basalaka na yango nkisi. Lumbalumba mpe milona mosusu (cannelle, thé des Antilles, pimenta, eupatoire) ezali kati na milona oyo bato ya bisanga yango basalelaka banda kala mpo na komisalisa. Ti ya nkasa to sinda mpe ezali wana, mpe soki bazikisi nkasa na yango oyo ekauki, ngungi ekimaka.

Bato mingi ya bisanga yango bayebi banzete mpe matiti oyo esalisaka bato mpe babatelaka mayele yango. Na ntango ya kala, soki moto abɛli to azwi likama, mbala mingi monganga azalaki mosika. Yango wana, bato bango moko bazalaki kosalela matiti mpe milona oyo ezali na elanga ya kreole mpo na komisalisa. Tii lelo oyo basalelaka yango mpo na komisalisa, kasi komisalisa yo moko na nkisi ya banzete ekoki kozala likama. Soki basaleli nkisi ya banzete malamu te, ekoki kobakisela moto maladi na esika ebikisa ye. Yango wana, na makambo ya kosalisa nzoto, bato mingi ya bisanga yango batikaka bato oyo bayekoli kosalisa bato básalisaka bango.

Eteni ya monene ya elanga ya kreole, oyo ezali nsima ya ndako, ezali mpo na bilei. Kuna okokuta mboma, sóló, masango, bitekuteku, salade mpe milona mosusu ná oyo ebongisaka supu. Ntango mosusu balonaka mpe makemba, bitabe mpe banzete lokola momboya, avoka, mapela mpe mangolo.

Talá kitoko na yango na makanisi

Ntango ozali kotambola pembeni ya elanga ya kreole, kitoko na yango ekobenda yo opusana penepene na yango. Ntango okɔti na kati, okosepela mingi ndenge moi ezali kongɛngisa nkasa mpe bafololo. Soki mwa mopɛpɛ eleki, okoyoka nsolo ya kitoko ndenge na ndenge oyo eleki kutu nsolo ya malasi. Yo moleki nzela osepeli mpenza na elanga yango. Kanisá sikoyo esengo ya mokóló elanga oyo alekisaka bangonga mingi mokolo na mokolo na elanga yango!

Bilanga ya kreole ekokoba kozala kaka? Bato mosusu ya bisanga yango bazali komilela mpo bana ya lelo bazali lisusu kosepela te kobatela momeseno wana ya kitoko mpe oyo epesaka matomba. Atako bongo, bato mingi, ezala bilenge mpe mikóló, bazali kosepela mingi na kitoko ya bilanga yango mpe bamonaka yango na ntina mingi. Elanga ya kreole mokomoko ezali kokundola ndenge baombo oyo bautaki na Afrika basalaki eloko moko ya kitoko mpe ya ntina mingi atako bazalaki na mpasi mpe na mikakatano.

[Etanda na lokasa 29]

LILOBA “KREOLE” ELIMBOLI NINI?

Na ebandeli, bazalaki kosalela liloba “kreole” mpo na kolobela bana ya bato ya Mpoto oyo babotamaki na Amerika. Kasi liloba yango ekómá na bandimbola mingi. Bato mosusu ya Haïti basalelaka liloba “kreole” mpo na kolobela eloko moko ya kitoko mingi to ya motuya monene. Babengaka mpe minɔkɔ mosusu ya Jamaïque, ya Haïti, mpe ya bisika mosusu kreole. Kasi, kreole ezali mpenzampenza monɔkɔ oyo euti na lokota moko ya pɛtɛɛ oyo bato ya minɔkɔ ndenge na ndenge balobaka mpo báyokana. Soki lokota yango ekómi mpenza monɔkɔ ya mboka ya bato moko boye, na ntango wana nde bakobenga yango kreole.

“Kreole” ekómi mpe kolimbola lolenge moko ya bomoi to mimeseno ya bato ya bisanga mingi ya Caraïbes. Na Porto Rico mpe na République dominicaine, liloba ya Espagnol criollo ekoki mpe kolimbola bongo. Na bisanga ya Caraïbes, na boumeli ya bambula, bakóló mboka babalanaki na bato ya Afrika mpe ya Mpoto oyo bayaki na bisanga yango, mpe babotaki bana ya kitoko; lokola mimeseno mosusu ya bato yango esanganaki, ebimisaki mimeseno ya malamu. Ezali mpo na mimeseno yango nde bilanga ya kreole na Guadeloupe mpe Martinique ezwá nkombo wana.

[Bililingi na lokasa 28]

Fɔtɔ ya mike (banda na likoló): Fololo alpinia, pilipili, ananasi, kaokao, mpe kafe

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto