Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 7/07 nk. 26-27
  • Olyaka mbinzo?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Olyaka mbinzo?
  • Lamuká!—2007
  • Masolo mosusu
  • Makambo mazali koleka na mokili
    Lamuká!—1998
Lamuká!—2007
g 7/07 nk. 26-27

Olyaka mbinzo?

EUTI NA MOKOMI NA BISO NA ZAMBIE

BATO mosusu balingaka kolya mbinzo te. Kasi bato mingi basepelaka kolya bilei yango mpamba te bamonaka ete ezalaka elengi. Na bamboka mingi ya Afrika, bato mingi balingaka kolya mbinzo oyo ekómaka lipekapeka moko oyo epumbwaka na butu (Imbrasia belina). Babengaka mbinzo yango na nkombo ya nzete na yango (mopane) epai efandaka. Bato mingi oyo bafandaka na bamboka ya mike bazelaka na mposa makasi eleko ya kolɔkɔta mbinzo yango, oyo ezalaka elengi mpe etongaka nzoto. Keith Leggett, oyo asalaka na ebongiseli moko (Kalahari Conservation Society), alobi ete: “Mbinzo epesaka proteini mingi.” Mbinzo esalisaka mpe na kobatela mikili ya bisobe oyo mbala mingi mabelé na yango ekaukaka mpe ebotaka malamu te.

Na ebandeli ya sanza ya Novɛmbɛ, ntango mbula enɔkaka na mikili ya sudi ya Afrika, mabelé esalaka lokola elamuki lisusu. Ebele ya mbinzo oyo ezalaki na nse ya mabelé, ekangami na kati ya mwa bandako na yango, ebongwanaka mapekapeka kitoko. Pɔsɔ mitano to motoba elekaka kobanda ntango oyo lipekapeka ebwakaka maki na yango ya mikemike tii maki yango ekobimisa mbinzo ya mike, oyo na nsima ekokóma na langi kitoko, mwa minene mpe mwa molai lokola boudin.

Na bamboka oyo bato balyaka fufu mpe masangu mingi, balyaka yango na mbinzo. Atako bato mingi balingaka kolya mbinzo te, kasi bilei yango ezalaka na proteini mingi (koleka 60 %); yango wana, ezalaka bilei ya motuya mingi, mingimingi na bamboka oyo biloko oyo ezalaka na proteini mingi etɛkamaka na ntalo makasi to emonanaka mingi te. Soki moto alei nyama to mbisi, biloko ya kotonga nzoto oyo yango ekopesa ye ekeseni mpenza te na oyo akozwa soki alei mbinzo. Mbinzo epesaka nzoto ya mokóló motángo monene (soki 75 %) ya baproteini, bavitamini, mungwa mpe biloko mosusu ya ndenge wana oyo nzoto na ye ezalaka na yango mposa mokolo na mokolo. Ntembe ezali te ete nyamankɛkɛ wana etongaka nzoto na biso!

Bato oyo balyaka mbinzo bakamwaka mpenza ntango bayokaka ete na mikili mosusu, basali-bilanga basalelaka bankisi ya ntalo makasi mpo na koboma mbinzo na bilanga na bango, nzokande mbinzo ezali na biloko mingi oyo etongaka nzoto. Soki mbinzo ezalaka bilei ya motuya ezali mpo elyaka nkasa ya mabe oyo mpe mbala mosusu ekoki kozala ngɛngɛ mpo na moto; nzokande, mpo na kozwa bilei ya motuya, basali-bilanga, bango basalelaka bisaleli ya ntalo makasi mpe bato oyo babɔkɔlaka bibwɛlɛ babimisaka mbongo mingi mpo na kosalisa bibwɛlɛ na bango. Mbinzo ezalaka mingi mpe ezalaka mpenza mpasi te mpo na kolɔkɔta, balɔkɔtaka yango na mabɔkɔ.

Mbinzo oyo ekómaka lipekapeka oyo epumbwaka na butu epesaka vitamini mingi na mabelé ya zamba oyo yango ezali mpe ebatelaka yango malamu. Atako nzoku ezalaka monene, elyaka mingi mpe ebimisaka nyei mingi, kasi mbinzo eleki yango. Bomoi ya mbinzo ezalaka mokuse, mpamba te eumelaka pɔsɔ motoba mpamba; atako bongo, na boumeli ya pɔsɔ yango, nkasa oyo mbinzo elyaka ezalaka mbala zomi koleka oyo nzoku oyo ezali mpe na esika wana elyaka. Mbinzo wana ebimisaka mpe nyei ebele, mbala minei koleka oyo ya nzoku wana. Yango wana, mbinzo ekómaka monene mbala 4 000 koleka ndenge ezalaki na ebandeli! Na kotalela makambo nyonso wana, tokokamwa te soki mabelé ezali lisusu na vitamini mingi te to mpe ebatelami malamu te mpo bato bazali kolɔkɔta mbinzo ntango nyonso.

Ndenge nini balɔkɔtaka mbinzo? Balɔkɔtaka mbinzo mbala mibale na mbula. Na bamboka ya mike, basi bakutanaka na eleko ya mbula mpo na kolɔkɔta mbinzo mbala ya liboso. Mosala yango ezwaka bapɔsɔ. Na nsima, balongolaka biloko oyo ezali na libumu ya mbinzo, batɔkisaka mbinzo yango mpe batandaka yango na moi mpo ekauka. Nzokande, mpo na mbinzo mosusu, esɛngaka kotya likebi mingi na ntango ya kolɔkɔta yango mpe ya kobongisa yango mpo na kolamba. Esɛngaka kolongola nsuki mpe mwa banzubɛ oyo ezalaka na loposo ya mbinzo mosusu. Esɛngaka mpe kozala ekɛngɛ na ntango ya kobongisa mbinzo mpo na kolamba, mpamba te mbinzo mosusu elyaka nkasa oyo ngɛngɛ na yango ekoki kosala moto mabe. Soki mbinzo esili kokauka, ekoki kolyama kaka bongo; kasi mbala mingi, balambaka yango kolamba to bakalingaka yango na tomati mpe na matungulu.

Mbala mosusu, soki oyoki ete balyaka mbinzo, ekopesa yo mposa ya komeka to mposa ya kosanza. Soki libaku ya kolya bilei yango ya elengi oyo omeseni na yango te emonani, ntango mosusu okomona malamu olya te. Kasi kobosana te ete mbinzo epesaka proteini mingi mpe mabota mingi na Afrika oyo batɛkaka yango, bazwaka mbongo oyo esalisaka bango.

[Elilingi na lokasa 26]

Mbinzo ezali bilei ya motuya, mpamba te ezalaka na proteini mingi

[Elilingi na lokasa 27]

Na boumeli ya bomoi na yango ya pɔsɔ motoba mpamba, mbinzo ekómaka monene mbala 4 000 koleka ndenge ezalaki na ebandeli

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto