Masano oyo ezalaki kobenda bato mingi na ekeke ya liboso
Na sudi ya Italie, bato mingi bakisa mpe bana mike, bazokaki mpe bakufaki na mobulu moko oyo ebimaki na libándá moko monene ya masano mpo bato na bato ya bingumba mibale ya penepene bazalaki kokumisa ngámbo na bango. Lokola bato bazokaki mpe bakufaki mingi, bakonzi bapesaki mobeko bákanga libándá yango ya masano na boumeli ya mbula zomi.
BALAPOLO ya makambo ya mobulu lokola oyo ezali mpe kobima na bazulunalo ya lelo oyo. Kasi, likambo oyo touti kolobela esalemaki na boyangeli ya Amperɛrɛ Néron esili koleka bambula soki 2 000. Tacite, moto ya Loma mpe moto ya mayele na makambo ya kala, alobelaki mobulu yango, oyo esalemaki na libándá monene ya masano na engumba Pompéi ntango bilombe bazalaki komekana. Bato ya bingumba wana mibale, Pompéi ná Nucérie, bawelanaki mpo bato na bato bazalaki kokumisa bilombe na bango.
Na ekeke ya liboso, masano ezalaki kobenda bato mingi. Na Ampire ya Loma, bingumba ya minene ezalaki na mabándá minene ya masano to na bandako ya masano. Bingumba mosusu ezalaki ná mabándá ná bandako ya masano. Buku moko (Atlas of the Roman World) elobi ete: “Masano yango ezalaki na makama mpenza mpe ezalaki kotinda bato bámonisa mayoki na bango . . . [mpe] ntango nyonso makila ezalaki kosopana.” Batambwisi-makalo bazalaki kolata bilamba ya langi makasi, mpe ekipi mokomoko ezalaki komonisa etuluku moko ya bato: bato ya politiki to bana-mboka. Bato oyo bazalaki kokumisa ekipi boye to boye bazalaki komonisa esengo makasi soki ekipi na bango ebimi. Batambwisi-makalo bayebanaki mingi, bazalaki kofutama mbongo mingi mpe bato bakómaki kutu koyema bilongi na bango na bifelo ya bandako na bango.
Bakonzi ya bingumba bazalaki mpe kobongisa mamekani ya bilombe mpe bitumba ya bato ná banyama; na masano yango, makila ezalaki kosopana mingi. Mbala mosusu, bilombe oyo bazalaki kobunda na banyama bazalaki na ebundeli moko te na mabɔkɔ. Will Durant, moto ya mayele na makambo ya kala, alobi boye: “Babandi oyo bazalaki kozwa etumbu ya liwa, bazalaki mbala mosusu kolatisa bango mposo ya nyama mpo bákokana na banyama. Na nsima, bazalaki kobwaka bango na esika oyo banyama bazali; kasi bazalaki naino kotika banyama yango na nzala mikolo mingi mpo bákóma na nkanda makasi. Bato oyo bazalaki kokufa liwa ya ndenge wana bazalaki mpenza koyoka mpasi ya ndenge nyonso.”
Bato oyo bazalaki kosepela na masano ya ndenge wana, oyo eyokani te na mitinda ya Nzambe, bazalaki mpenza “na kati ya molili na makanisi” mpe ‘babungisaki bizaleli nyonso ya malamu.’ (Baefese 4:17-19) Na ekeke ya mibale, Tertullien akomaki boye: “[Moklisto] moko te azalaki koloba, kotala to koyoka bisalasala mpe makambo ya mbindo oyo ezalaki kosalema na bandako ya masano [mpe] makambo ya nsɔmɔ oyo ezalaki kosalema na mabándá ya masano.” Lelo oyo, baklisto ya solo basalaka nyonso mpo bákima masano mabe ya bitumba, ezala bazali kolobela yango na mikanda to kolakisa yango na televizyo to na video. Bayebaka malamu ete Yehova ayinaka “ye oyo alingi mobulu.”—Nzembo 11:5.
[Elilingi na lokasa 12]
Liyemi ya molongi moko oyo azalaki kotambwisa likalo
[Elilingi na lokasa 12]
Liyemi ya mobali moko oyo azali kobunda na nkɔsi
[Elilingi na lokasa 12]
Ndako moko ya masano ya Baloma na ekeke ya liboso
[Eutelo ya bafɔtɔ]
Ciudad de Mérida
[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 12]
Na likoló mpe na nse na lobɔkɔ ya mwasi: Museo Nacional de Arte Romano, Mérida