Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w02 15/6 nk. 26-29
  • Liteya oyo tokoki kozwa na makambo oyo ezalaki koleka na Loma

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Liteya oyo tokoki kozwa na makambo oyo ezalaki koleka na Loma
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Babundi mpe koyekola kobunda
  • Ndenge oyo makambo ezalaki koleka na libándá ya masano
  • Makambo oyo yango ezalaki kosala na epai ya bato oyo bazali kotala
  • Liteya ya polele
  • Masano oyo ezalaki kobenda bato mingi na ekeke ya liboso
    Lamuká!—2007
  • “Bosala nyonso mpo na nkembo na Nzambe”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Masano ya ntango ya kala mpe ntina ya kolonga
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2004
  • Ndenge nini Batatoli ya Yehova batalelaka likambo ya kolela ebembe to kosala matánga?
    Mituna oyo bato batunaka mingi mpo na Batatoli ya Yehova
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
w02 15/6 nk. 26-29

Liteya oyo tokoki kozwa na makambo oyo ezalaki koleka na Loma

“SOKI, lokola bato, nabundaki na banyama na yauli na Efese.” Bato mosusu bakanisaka ete maloba wana, oyo ezali na 1 Bakolinti 15:32, ezali komonisa ete bakatelaki ntoma Paulo etumbu ya kobunda na banyama mabe na libándá ya masano ya Baloma. Ezala bongo to te, na ntango wana bazalaki na momeseno ya kobunda na mabándá ya masano. Masolo ya makambo ya kala ezali koyebisa biso nini mpo na mabándá ya masano mpe makambo oyo ezalaki kosalema kuna?

Lokola tozali baklisto, tozali na mposa ya koyokanisa lisosoli na biso na makanisi ya Yehova, yango ekosalisa biso tóyeba ndenge oyo tosengeli kotalela makambo etali masano ya ntango na biso. Na ndakisa, tótalela makanisi ya Nzambe na oyo etali mobulu ndenge emonisami na maloba oyo: “Yokelá moto na yauli zuwa te, [landá] ata moko na nzela na ye te.” (Masese 3:31) Baklisto ya liboso bamonaki ete toli wana ezali malamu mpo na kosalisa bango na ntango oyo bato mingi bakómaki kosepela mingi na masano ya bitumba. Tótalela naino makambo oyo ezalaki koleka na masano yango mpe tóluka liteya nini ya polele baklisto bakoki kozwa lelo oyo.

Lisano yango ezalaki koleka boye: Bilombe mibale basimbi bibundeli bazali kotalana na kati ya libándá ya masano ya Baloma. Ntango kaka babandi kobɛtana mipanga mpe mokomoko azali komibatela na nguba na ye, bato babandi koganga makasi mpo na kolendisa moto oyo bango balingi ete alonga. Ezalaki mpenza benda bika. Mosika te okomona moko azoki mpe azali kokoka lisusu kobunda te abwaki bibundeli na ye na mabele mpe afukami; elingi koloba ete andimi ete balongi ye mpe azali kosɛnga ete báyokela ye mawa. Bato oyo bazali kotala bagangi lisusu makasi. Basusu bazali koganga ete báyokela ye mawa, basusu ete báboma ye. Bato nyonso bazali kotala amperɛrɛ. Wana ye sikoyo azali koyoka eloko nini bato balingi; akoki kobikisa moto oyo alongi te to boni. Soki atii mosapi na nse, elingi koloba asɛngi báboma ye.

Baloma balingaki mingi masano ya bitumba. Mbala mosusu ekokamwisa yo na koyeba ete libosoliboso, bitumba ya ndenge wana ezalaki kosalema na bibembe ya bato minene. Balobaka ete komekana na bitumba eutaki na momeseno oyo Ba-Osque to Ba-Samnite bazalaki na yango ya kopesa bato mbeka, bato yango bazalaki kofanda na esika oyo ezali lelo oyo na katikati ya Italie. Bazalaki kopesa mbeka mpo na kobɔndisa bilimo ya bakufi. Etumba yango ebengamaki munus, to “likabo” (na boike, munera). Mikanda ya liboso oyo elobeli masano ya Baloma ekomamaki na mobu 264 liboso ya ntango na biso (L.T.B.), ntango bilombe motoba bazalaki kobunda mibalemibale na zando ya bangɔmbɛ. Ntango Marcus Aemilius Lepidus akufaki, bato 44 babundaki mibalemibale. Ntango Publius Licinius akufaki bato 120 babundaki mibalemibale. Na mobu 65 L.T.B., Jules César atindaki bato 640 bábunda mibalemibale na libándá ya masano.

Keith Hopkins, moto moko ya mayele na istware, alobaki boye: “Bibembe ya bato minene ezalaki mabaku malamu mpo na kokokisa mikano ya politiki, mpe masano oyo bazalaki kosala na ntango ya ebembe ezalaki mpo na makambo ya politiki . . . mpamba te bana-mboka oyo bazalaki kopona bayangeli na voti balingaki masano yango mingi. Bato minene oyo bazalaki kowela bibonga ya bokonzi nde basalaki ete masano yango ya bitumba eyebana mingi mpe bato bákóma kosepela na yango mingi.” Ntango Auguste akómaki mokonzi (banda mobu 27 L.T.B. tii mobu 14 T.B.), munera ekómaki makabo oyo bato minene ya politiki bazalaki kopesa mpambampamba mpo na kosepelisa bato oyo bakopona bango na voti mpo báfanda mpenza na bokonzi ya politiki.

Babundi mpe koyekola kobunda

Okoki kotuna motuna, ‘Bilombe oyo bazalaki kobunda bazalaki banani?’ Ekokaki kozala baombo, babomi bato oyo bakatelaki bango etumbu ya liwa, bato ya bamboka mosusu oyo bakangaki na bitumba, to mpe bato mosusu oyo bazalaki koyoka kaka esengo ya kobunda to mpe oyo bazalaki kokanisa ete bakoyebana mpe bakokóma na bozwi. Bango nyonso bazalaki koyekola kobunda na bisika oyo ezalaki na makambo lokola na bolɔkɔ. Buku moko (Giochi e spettacoli) elobi ete bilombe oyo bazali naino koyekola kobunda “bazalaki kokɛngɛlama na babateli mpe bazalaki kopesa bango disiplini ya makasi, basengelaki kotosa mibeko ya makasi, mpe mingimingi bazalaki kozwa bitumbu ya makasi . . . Makambo wana ezalaki kotinda mingi na bango na komiboma, na kosala mobulu mpe kotomboka.” Eteyelo ya Baloma mpo na koyekola bitumba oyo elekaki monene ezalaki na biteni ya ndako mpo na bato soki nkóto moko. Moto na moto azalaki koyekola lolenge moko ya kobunda. Bamosusu bazalaki koyekola kobunda na molato ya etumba, na nguba, na mopanga; bamosusu na monyama mpe likɔnga ya mitó misato. Bamosusu mpe bazalaki koyekola kobunda na banyama ya mabe mpo na lisano mosusu oyo bato bazalaki kolinga mingi: koboma nyama. Toyebi te soki likambo oyo Paulo alobelaki ezalaki nde yango.

Bato oyo bazalaki kobongisa masano yango bazalaki koyokana na bato ya mombongo oyo bazalaki kozwa bilenge ya mbula 17 to 18 mpe koyekolisa bango kobunda. Kotɛkisa bato ezalaki mombongo oyo ezalaki kopesa bato mbongo mingi. Trajan asalaki lisano moko monene mpenza ya babundi 10 000 mpe banyama 11 000 mpo na kosepela ndenge ye na basoda na ye balongaki etumba.

Ndenge oyo makambo ezalaki koleka na libándá ya masano

Na libándá ya masano, na ntɔngɔ ezalaki mpo na masano ya koboma nyama. Bazalaki kokɔtisa na makasi lolenge nyonso ya banyama ya mabe na libándá ya masano. Bato oyo bazali kotala bazalaki kosepela mingi na etumba ya ngɔmbɛ na ngombolo. Mbala mingi bazalaki kokangisa bango esika moko mpo bábunda tii ntango moko na bango akokufa, na nsima, mobomi nyama azalaki koboma nyama oyo etikali na bomoi. Komekana mosusu oyo bato bazalaki kolinga mingi ezalaki etumba ya bankosi na batigre, to banzoku na bangombolo. Babomi nyama bazalaki kolakisa makasi na bango ya koboma banyama oyo bazalaki kozwa na mikili mosusu oyo bokonzi ya Loma ezalaki koyangela, ata soki ekosɛnga bango nini mpo na komema yango kuna. Ezalaki na banyama lokola nkoi, kanga (rhinocéros), ngubu, dikala (girafe), ekange, kamela, mbwa ya zamba, nsombo, mpe mbuli.

Ndenge bazalaki kobongisa esika ya masano ya koboma nyama ezalaki kosepelisa bato oyo bazali kotala. Bazalaki kotya mabanga, maziba, mpe banzete mpo emonana lokola zamba. Na mabándá ya masano mosusu, banyama bazalaki kokɔta na bisika oyo moto akoyeba yango liboso te; mosusu bazalaki kobima na mabele mpe na bikuke oyo ezalaki komonana polele te. Bato bazalaki kosepela mingi na nyama moko oyo ezali na makambo oyo moto akanisaki te to bayebaki te ete esalaka bongo. Kasi emonani ete eloko oyo ezalaki kosepelisa mingi na masano yango ezali ndenge oyo bazalaki konyokola banyama.

Na nsima na yango, ezalaki ntango ya koboma. Bazalaki kokanisa ndenge oyo bakoki kosala makambo ya sika oyo ekokamwisa bato. Bazalaki mpe kosala makambo ndenge oyo ezalaki kolobama na masapo ya kala mpe basani bazalaki kokufa solo mpenza.

Na nsima ya midi, bituluku ndenge na ndenge ya bilombe ya bitumba, oyo bato na bato bazalaki na bibundeli ya ndenge na bango mpe bayekolaki kobunda na ndenge na bango bazalaki kondongwana. Bato mosusu oyo bazalaki kolongola bato oyo bakufi bazalaki kolata lokola nzambe ya mokili ya bawei.

Makambo oyo yango ezalaki kosala na epai ya bato oyo bazali kotala

Bato bazalaki ntango nyonso na mposa makasi ya kotala bitumba, yango wana bazalaki kobɛta baoyo baboyi kobunda fimbo to kotuta bango bibende mpo na kotinda bango na makasi ete bábunda. Bato bazalaki koganga: “Mpo na nini azali kobanga mopanga? Mpo na nini azali kobɛta malɛmbɛ? Mpo na nini alingi kokufa te? Bɛtá ye fimbo akɔta na etumba! Tiká bábɛtana makofi, ntolo polele mpe bábɛta yango mopanga!” Sénèque, mokonzi moko ya Leta na Loma akomaki ete na ntango ya bopemi bazalaki kopesa liyebisi oyo: “Bakokata mwa bato nkingo na bopemi, mpo ete lisano ekoba.”

Sénèque alobi ete azalaki kozonga na ndako na ye akómi “moto mabe koleka mpe azalaki na motema ya moto te.” Ebongi mpenza tókanisa likambo oyo moto wana oyo andimaki polele mpo na masano yango. Bato oyo batalaka masano mosusu na mikolo na biso bakoki mpe kokóma ‘mabe koleka mpe kozanga motema ya bomoto’?

Bato mosusu bazalaki komona ete soki likambo moko ekómeli bango te mpe bazongi na ndako, boye bazali mpenza na makila malamu. Moto mosusu alobaki likambo moko na lisɛki mpe esilikisaki Mokonzi Domitien, mpe mokonzi yango asɛngaki ete bákende kotombola moto yango na esika oyo afandaki mpe bábwakela ye bambwa. Ntango Mokonzi Caligula amonaki ete bato mabe ya koboma bazali te, apesaki etinda ete bákanga ndambo ya bato mpe bábwakela bango banyama. Ntango likambo moko na teyatre esalemaki te ndenge oyo Mokonzi Klaudio alingaki, atindaki ete bato oyo babongisaki lisano bábunda na banyama.

Molende mabe ya bato oyo bazalaki kotala ezalaki mpe kobimisa makama mpe mobulu. Ndako moko ya masano oyo ezalaki na nɔrdi ya Loma ekweaki, mpe balobaka ete bankóto ya bato bakufaki. Yikiyiki ebimaki ntango lisano moko ezalaki kosalema na engumba Pompéi na mobu 59 T.B. Tacite alobi ete bato ya mboka moko na bato oyo bautaki na mboka mosusu ya penepene mpo na kotala bakamatanaki, ebandaki na kofingana, nsima bakómaki kobambana mabanga, mpe na nsuka, mipanga ebimaki. Bato mingi bakatanaki biteni ya nzoto to bazokaki bampota minene, mpe mingi bakufaki.

Liteya ya polele

Eumeli naino te, na Colisée, na engumba Rome, balakisaki elakiseli moko ya masano (Sangue e arena, “Makila na zɛlo”) oyo emonisaki makambo ya mikolo na biso oyo ekokani na munera. Likambo oyo ebendi likebi na biso ezali ete balakisaki bakasɛti-video ya bitumba ya bangɔmbɛ, bitumba ya makofi, makama ya minene na komekana ya mbangu ya mituka mpe batukutuku, bitumba kati na bato, mpe bitumba ya bato oyo bazalaki mpe kotya yikiyiki. Na nsuka ya kasɛti yango balakisaki bililingi ya Colisée oyo bakangaki yango na mpɛpɔ. Okanisi boni, bato oyo batalaki yango bazalaki na makanisi nini? Bato boni bazwaki liteya?

Lelo oyo, na bikólo mingi, kobundisa bambwa, bansoso, bangɔmbɛ, mpe masano ya makasimakasi esalemaka mingi. Ntango bazali komekana mbangu na batukutuku, bazali kotya bomoi ya bato na likama mpo na kosepelisa bato mingi. Kanisá mpe makambo oyo balakisaka na televizyo mokolo na mokolo. Baankɛtɛ mingi esalemi na ekólo moko ya Mpoto emonisaki ete mwana oyo akokisi mbula zomi asili kotala bililingi 10 000 oyo ezali kolakisa koboma bato mpe asili kotala bililingi ya makambo ya mobulu mbala 100 000.

Tertullien, mokomi ya ekeke ya misato alobaki ete bisengo ya masano “ezalaki na boyokani te na lingomba ya solo mpe ezalaki na boyokani te na likambo ya kotosa Nzambe ya solo.” Tertullien alobaki ete bato oyo bazalaki kokende kotala masano wana bazalaki kosangana na mabe ya bato oyo bazalaki koboma. Ezali boni lelo oyo? Moto akoki komituna boye: ‘Nasepelaka kotala masano ya kotangisa makila, ya koboma, to ya mobulu na televizyo to na Internet?’ Ebongi tóbosana te ete Nzembo 11:5 elobi boye: “[Yehova] akomeka moyengebene mpe moto mabe, [molimo, NW] na ye eyini ye oyo alingi mobulu.”

[Maloba ya kolimbola elilingi na lokasa 28]

Bitumba “mpo na kokitisa bakufi motema”

Tertullien, mokomi ya ekeke ya misato alobaki boye mpo na lolenge oyo likambo ya kobundisa bilombe ebandaki: “Bato ya ntango ya kala bazalaki kokanisa ete na nzela ya masano ya ndenge wana bazali kosalisa bakufi, nsima ya kosala masano mosusu oyo ezalaki na mabe mingi te. Na ntango ya kala, lokola bazalaki kokanisa ete makila ya moto ebikisaka milimo ya bakufi, bazalaki kosala milulu mpo na kopesa​—bakangami mpe baombo oyo bazangi ntina oyo basombaki​—mbeka. Na nsima nde bakómaki kokanisa ete ezali malamu kokómisa yango lisano oyo bato bakosepela na yango mpo bámonana mabe te. Na bongo, nsima ya kozwa bato oyo bazalaki koyekola kobunda na bibundeli ya ntango wana mpe na makoki na bango nyonso​—bazalaki koyekola ndenge oyo bakoki kobomama!​—na nsima bazalaki kobomama na malita, na mokolo oyo bazali na ebembe. Bazalaki kozwa libɔndisi mpo na liwa na nzela ya koboma. Ndenge yango nde munus ebandaki. Kasi na nsima, bazalaki kobongisa makambo yango ya mobulu na boye ete bato bazalaki koyoka yango lisusu nsɔmɔ te; fɛti ezalaki na esengo mpenza te soki banyama mabe bapanzi nzoto ya bato te. Nyonso oyo ezalaki kopesama mpo na kokitisa bakufi motema etalelamaki lokola molulu ya kolela ebembe.”

[Elilingi na lokasa 27]

Ekɔti mpe eloko oyo ezalaki kobatela mokuwa ya mopende ya mobundi ya kala

[Bililingi na lokasa 29]

Baklisto ya ntango ya kala bazalaki kolinga masano ya mobulu te. Yo mpe olingaka yango te?

[Eutelo ya bafɔtɔs]

Lisano ya makofi: Dave Kingdon/Index Stock Photography; likama ya motuka: AP Photo/Martin Seppala

[Maloba mpo na kolimbola eutelo ya bafɔtɔ na lokasa 26]

Phoenix Art Museum, Arizona/Bridgeman Art Library

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto