Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 10/10 lok. 27
  • Nkombo ya Nzambe ezali koyebana!

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nkombo ya Nzambe ezali koyebana!
  • Lamuká!—2010
  • Masolo mosusu
  • Nkombo ya Nzambe
    Lamuká!—2017
  • A4 Nkombo ya Nzambe na Makomami ya Ebre
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
  • Nkombo ya Nzambe nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2019
  • Nkombo ya Nzambe—Esengeli kosalela yango? Elimboli nini?
    Biblia eteyaka mpenza nini?
Makambo mosusu
Lamuká!—2010
g 10/10 lok. 27

Nkombo ya Nzambe ezali koyebana!

● Ntango ozali kotambola na esanga kitoko ya Orléans, pembeni ya engumba Québec na Canada, okomona ete bato oyo bafandaki kuna kala bazalaki kolinga mingi makambo ya Nzambe. Bandako-nzambe ya kala oyo ezali na babalabala, ekundwelaka bato makambo ya kala, bandako-nzambe yango ezali tii lelo oyo na nzela oyo ezingi esanga yango, mpe etúká mokomoko ezali na ndako-nzambe.

Na engumba Saint-Pierre ezali na ndako-nzambe moko ya kala oyo batongá yango na mobu 1717. Lelo oyo, ekómá esika babombaka biloko ya ntɔki, ezali na eloko moko ya ntina mingi. Likoló ya etumbelo na yango ezali na tetragrame​—lɛtrɛ minei ya Ebre ya nkombo mpenza ya Nzambe: Yehova.

Lelo oyo na mikili mingi, ezali mpasi koyoka Lingomba ya Katolike etánga nkombo ya Nzambe, ata mpe komona bango bákoma yango. Kutu, mokanda moko oyo Vatican ekomaki na 2008 elobaki ete na ndingisa ya Pápa, nkombo ya Nzambe “esengeli te kosalelama to kotángama” na misa ya Lingomba ya Katolike, na banzembo na bango, to na mabondeli. Kasi, Biblia emonisi polele ete Yehova Nzambe alingi ete nkombo na ye “esakolama na mabele mobimba.”​—Kobima 9:16.

Batatoli ya Yehova bamonaka ete kosepelisa Nzambe esuki kaka te na kokoma nkombo na ye na kati ya ndako moko. Mbula na mbula, na mokili mobimba balekisaka ngonga miliare 1,5 mpo na koteya bato nkombo ya Nzambe mpe mikano na ye. Bazongisá kutu nkombo ya Nzambe, Yehova na esika na yango. Biblia oyo babimisá​—Libongoli ya Mokili ya Sika—​elandá mpenza Makomami ndenge ekomamaki na ebandeli, epai nkombo Yehova ezalaki mbala soki 7 000. Uta babandá kobimisa Biblia yango, basili kobimisa Babiblia koleka 165 000 000 na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 83. Ya solo, na oyo etali nkombo ya Nzambe, Yehova tosengeli te komituna, nini ezali kotinda biso tósalela nkombo yango? Kasi nde, nini ezali kopekisa biso tósalela nkombo yango?

[Elilingi na lokasa 27]

Libongoli ya Mokili ya Sika, epai nkombo Yehova ezali mbala soki 7 000, ebimisami na mobimba to na ndambo na minɔkɔ 83

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto