Epai tokoki kozwa litambwisi ya solosolo mpe elikya
NA BOKESENI na bademo, Yehova Nzambe azali na bwanya mpe nguya oyo ezangi nsuka. Azali mpenza bolingo. (1 Yoane 4:8) Batoli na ye ezalaka ntango nyonso malamu, apesaka yango ofele, mpe alukaka ntango nyonso bolamu na biso. Toli na ye ekeseni mpenza na batoli ya bato oyo bayebisaka makambo oyo ekoya mpe bato ya bikelakela! Nzambe alobi ete: “Ee bino nyonso oyo bozali na mposa ya mai [ya elimo]! Bóya epai mai ezali. Mpe baoyo bazali na mbongo te! Bóya, bósomba mpe bólya. Ɛɛ, bóya, bósomba vinyo mpe miliki na mbongo te, ya ofele. Mpo na nini bozali kaka kobimisa mbongo mpo na eloko oyo ezali limpa te, mpe mpo na nini bozali koboma nzoto mpo na eloko oyo ezali kotondisa te? Bóyoka ngai na likebi, mpe bólya eloko oyo ezali malamu, mpe molimo na bino esepela mpenza na biloko ya mafuta.”—Yisaya 55:1, 2.
Lokola Biblia ekomamaki na lisalisi ya Mozalisi na biso ya bolingo, epesaka biso elikya, ebatelaka biso na mateya ya lokuta, esalaka ete bomoi na biso ezala na ntina, mpe epesaka biso batoli ya malamu mpenza oyo tosengeli kolanda. Mpo na nini te kokanisa mwa moke na mituna oyo elandi mpe na mikapo ya Biblia oyo eyokani na mituna yango?
[Etanda na lokasa 7]
● Ndenge nini nakoki kozwa kimya mpenza ya motema? Biblia elobi ete: “Talá oyo Yehova alobi, Mosikoli na yo, Mosantu ya Yisraele: ‘Ngai Yehova nazali Nzambe na yo, Moto oyo azali koteya yo mpo na litomba na yo moko, Moto oyo azali kotambwisa yo na nzela oyo osengeli kotambola. Ee soki otyaka mpenza likebi na mibeko na ngai! Mbɛlɛ kimya na yo ekómi lokola ebale, mpe boyengebene na yo lokola mbonge ya mbu.’”—Yisaya 48:17, 18.
● Mabe ekozala kaka ntango nyonso? “Bato ya kolongobana nde bakofanda na mabele, mpe bato oyo bazangi mbeba nde bakotikala na yango. Kasi bato mabe bakolongolama na mabele; mpe bato ya bokosi bakopikolama wana.” (Masese 2:21, 22) Ya solo, bato mabe, ezala mpe baanzelu ya mabe, bakobomama libela na libela, lokola eloko ezikaka na mɔtɔ.—Emoniseli 20:10, 14.
● Maladi mpe bampasi ekosila mokolo mosusu? “Talá! Hema ya Nzambe ezali esika moko na bato, mpe akofanda na bango mpe bakozala bato na ye. Mpe Nzambe ye moko akozala na bango. Mpe akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala [ebele ya mikakatano ya lelo] eleki.”—Emoniseli 21:3, 4.
Na bokeseni na bademo, Nzambe akosaka soki moke te. Na yango, “akoki kobuka lokuta te.” (Tito 1:2) Lisusu, ndenge lisolo ya nsuka na kati ya masolo oyo ekomonisa yango, solo na ye esikolaka mpe epesaka bomoi.—Yoane 8:32; 17:3.