Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 9/15 nk. 10-11
  • Hérodote

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Hérodote
  • Lamuká!—2015
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • ASUKAKI KAKA NA ISTWARE TE
  • HÉRODOTE AKOMAKI MAKAMBO NDENGE EZALAKI
  • Oyebaki yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Mibembo ya kala mosika koleka Mediterane
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2010
  • Etanda ya makambo ezali na kati
    Lamuká!—2015
Lamuká!—2015
g 9/15 nk. 10-11
Liyemi ya Hérodote

TÓTALELA MAKAMBO YA KALA

Hérodote

BOMOI ezalaki ndenge nini na bankóto ya bambula oyo eleki? Mimeseno nini bato bazalaki na yango? Arkeoloji ekoki kopesa biyano, kasi nyonso te. Mpo na koyeba makanisi ya bato ya kala, ebongi kozala na makomi ya moto moko oyo azalaki wana mpe akomaki istware ya makambo ya ntango na bango. Moto yango ezali Hérodote oyo azalaki na bomoi eleki sikoyo bambula soki 2 400, azalaki Mogrɛki mpe moto ya istware ya siɛklɛ ya mitano liboso ya ntango na biso. Titre ya buku na ye ezalaki: Histoires.

Hérodote abandaki kokoma bantina oyo Bagrɛki bazalaki kobunda mpe mingimingi bantina ya bitumba ya Baperse na mobu 490 mpe 480 liboso ya ntango na biso oyo esalemaki ntango azalaki mwana moke. Longola yango, akomaki mpe makambo nyonso oyo amonaki, oyo etalaki ekólo mokomoko oyo Baperse babundisaki.

ASUKAKI KAKA NA ISTWARE TE

Hérodote azalaki mokomi monene. Amipesaki mpenza na kokoma, ata mpe makambo ya mikemike oyo amonaki ete esengeli mpo istware na ye ezala mobimba. Makambo oyo Hérodote akomaki ekamwisaka mpenza mpo asalelaki te mikanda ya Leta oyo elobelaki istware ya makambo oyo ezalaki kosalema mpo mikanda ya ndenge wana ezalaki mpenza te.

Na ntango wana, bato mingi bazalaki komipesa na kokoma istware te, bazalaki kaka kosala bamonima mpe kokoma likoló na yango makambo ya lokumu oyo esalemaki. Esɛngaki Hérodote asalela miso, masolo ya bonkɔkɔ mpe litatoli ya bato mosusu oyo eyokani na makambo oyo alingaki kokoma. Hérodote asalaki mibembo mingi mpo na kozwa bansango. Akolaki na Halicarnasse, mboka oyo Bagrɛki bakonzaki (oyo babengaka lelo Bodrum, na sudi ya Turquie) mpe atambolaki na bisika mingi ya Grèce.

Hérodote asalaki mibembo mingi mpo na kozwa bansango

Atambolaki na nɔrdi tii na Mbu ya Moindo mpe Scythie, esika oyo babengaka lelo Ukraine, atambolaki mpe na sudi tii na Palestine mpe na nɔrdi ya Ezipito. Emonani ete na ɛsti, akómaki na Babilone mpe na nsuka ya bomoi na ye ekoki kozala ete afandaki na wɛsti, na mboka oyo Bagrɛki bazalaki kokonza, oyo ezali lelo na sudi ya Italie. Na bisika nyonso oyo atambolaki, asalelaki miso mpe mituna mpo na kozwa bansango epai ya bato oyo amonaki ete bazali na bansango oyo ebongi mpenza kotyela motema.

HÉRODOTE AKOMAKI MAKAMBO NDENGE EZALAKI

Eteli ya papirisi ya buku “Histoires”

Eteni ya papirise ya buku Histoires

Makambo oyo Hérodote akomaki ezalaki mpenza bongo? Na kotalela bamboka oyo akendaki mpe makambo oyo amonaki na miso, balobaka ete ayebaki mpenza makambo yango malamu. Ndenge oyo alobelaki likambo mokomoko oyo eyebanaki te na Grèce; na ndakisa ndenge bato ya Scythie bazalaki kosala ntango bazali kokunda mokonzi to ndenge bato ya Ezipito bazalaki kokaukisa nzoto ya moto mpo epɔla te, ekokani mwa moke na oyo bato ya arkeoloji bamonaki. Balobaka ete bansango mingi oyo abatelaki mpo na Ezipito “ezali na ntina mingi koleka makambo nyonso oyo ekomamaki na ntango ya kala mpo na ekólo yango.”

Ata bongo, mbala mingi ezalaki kosɛnga ete Hérodote asalela kaka litatoli oyo ebongaki mpenza te kotyela yango motema. Longola yango, bato ya ntango na ye bazalaki kondima ete banzambe ya bapakano bazalaki kokɔta na makambo ya bato. Na yango, makambo nyonso te oyo akomaki elandaki mibeko etali ndenge ya kokoma istware lelo oyo. Ata bongo, Hérodote asalaki nyonso mpo na kokesenisa makambo ya solo na masapo. Alobaki polele ete andimaki te makambo nyonso oyo bayebisaki ye. Alobaki bongo nsima ya kotalela malamumalamu bisika oyo azwaki bansango yango mpe akokanisaki yango.

Emonani ete buku Histoires ezali buku oyo Hérodote akomaki na bomoi na ye mobimba. Na kotalela bisaleli oyo azalaki na yango, asalaki mosala monene mpenza.

MAKAMBO ETALI HÉRODOTE

  • Ekoki kozala ete lokola buku Histoires ezalaki na makambo mingi ya kala ya ntango wana oyo bato mosusu bakomá te, yango wana Cicéron, mokomi moko ya Latin (106-43 liboso ya ntango na biso) abengaki Hérodote Tata ya Istware.

  • Mokomi moko ya lelo alobi ete buku Histoires ezali “buku oyo esilaka ngala te. Elobelaka kaka istware te, kasi mpe antropoloji, jeografi, teoloji, filozofi, politiki mpe makambo ya mpasi.”

  • Na eleko oyo mokili ezalaki na mobulu, Hérodote abatelaki bansango etali Grɛsi, Azia ya wɛsti mpe Ezipito.

Oyo balobi mpo na mosala ya Hérodote

Arnaldo Momigliano, moto moko ya mayele na makambo ya istware akomaki boye: “Sikoyo tozwi makambo mingi oyo endimisi ete ebongi kondima makambo oyo [Hérodote] akomaki. Bato ya mayele ya Moyen-Orient batalelaki malamumalamu makambo oyo Hérodote akomaki na lisalisi ya arkeoloji mpe ya boyebi ya minɔkɔ oyo akokaki koyeba te. Bamonisaki ete alobelaki na bosembo nyonso makambo oyo amonaki mpe ayokaki. Na bisika oyo amikosaki, ekoki kozala ete bato oyo bapesaki ye bansango bakosaki ye to ayebaki malamu te makambo oyo bayebisaki ye.”

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto