Mibembo ya kala mosika koleka Mediterane
Lelo, bato bamonaka likambo monene te komata mpɛpɔ mpe kolongwa na kɔntina moko mpe kokende na kɔntina mosusu. Okokamwa na koyoka ete ata na ntango ya kala, bato bazalaki kosala mibembo milai?
MBULA soki 1 000 liboso ya Kristo, Mokonzi Salomo atongaki bamasuwa oyo ezalaki kokende elongo na bamasuwa ya mokonzi ya Tire mpo na komema na Yisraele biloko kitoko oyo euti na mikili ya mosika. (1 Bakonzi 9:26-28; 10:22) Na ekeke ya libwa liboso ya ntango na biso (L.T.B.), na Yope, libongo ya Yisraele oyo ezalaki na Mbu ya Mediterane, mosakoli Yona akɔtaki na masuwa moko oyo ezalaki kokende na Tarasisi.a (Yona 1:3) Na ekeke ya liboso ya ntango na biso (T.B.), ntoma Paulo asalaki mobembo longwa na Kaisaria na Yisraele tii na Puteoli, oyo lelo ezali Pouzzoles, na golfe de Naples, na Italie.—Misala 27:1; 28:13.
Bato ya mayele na masolo ya kala bayebi ete na mikolo ya Paulo, bato ya mimbongo oyo bazalaki kouta na mikili oyo ezali zingazinga ya Mbu Mediterane bazalaki mbala mingi koleka na Mbu Motane mpo na kokende na masuwa na Inde, mpe na katikati ya ekeke ya mibale, bato mosusu bakendaki mosika tii na Chine.b Kasi, toyebi nini na ntina na mibembo ya kala oyo ezalaki kosalema mosika koleka Mbu Mediterane mpo na kokende na wɛsti? Bato ya masuwa ya kala bakendaki mosika tii wapi na ngámbo yango ya wɛsti?
Mibembo ya kala ya Bafenisia
Bikeke mingi liboso ya ntango ya Paulo, bato oyo bazalaki kosala mibembo na masuwa basalaki bisika epai bazalaki kosala mimbongo na Wɛsti. Bato bakanisaka ete Bafenisia, oyo mboka na bango ezalaki na mokili oyo lelo ezali ekólo Liban, bakómaki na Mbu Atlantike na mobu 1200 L.T.B. Na mobu soki 1100 L.T.B., batongaki Gadir, oyo ezali lelo Cadix, engumba oyo ezali mpe libongo, na Espagne, kaka mwa moke koleka détroit de Gibraltar. Na biloko oyo bazalaki na yango, tokoki kotánga wolo mpe etini (étain) oyo bazalaki kotimola kuna, oyo bato ya mimbongo ya Atlantike bazalaki koya kosomba.
Hérodote, Mogrɛki mpe moto ya mayele na masolo ya kala akomaki ete na ekeke ya nsambo L.T.B., Farao Neko ya Ezipito asangisaki na ngámbo ya likoló ya Mbu Motane bamasuwa ya Fenisia, mpe Bafenisia batambwisaki yango. Mokano ezalaki ya kobaluka pembenipembeni ya Afrika mobimba banda na ɛsti tii na wɛsti.
Na ntango wana, Bafenisia basilaki kotambolatambola na bisika ndenge na ndenge ya bokula ya Afrika banda bikeke mingi. Kasi, lokola mipɛpɛ ezalaka makasi mpe mai etíyolaka makasi, bato ya masuwa oyo bakendaki na ngámbo ya sudi pembenipembeni ya bokula ya Afrika oyo ezali na ngámbo ya Atlantike basengelaki kobunda mpo na kokende mosika koleka. Ndenge Hérodote alobaki, na mobembo ya sika, Bafenisia balongwaki na Mbu Motane mpe balandaki bokula ya ɛsti ya Afrika tii kokita na sudi mpe bakɔtaki na Mbu Indien. Nsima ya sanza soki motoba, babimaki na mokili, balonaki mboto, batikalaki wana kino babukaki mbuma, mpe na nsima, bakobaki mobembo na masuwa. Hérodote alobaki ete na mbula ya misato, basilisaki kotambola zingazinga ya kɔntina mobimba, bakɔtaki na Mediterane mpe bazongaki na Ezipito.
Hérodote asukisaki lisolo na ye ete Bafenisia balobaki makambo oyo akokaki kondima te, na ndakisa ndenge balobaki ete ntango bazalaki koleka na masuwa na nsɔngɛ ya sudi mpenza ya Afrika, bamonaki moi na lobɔkɔ na bango ya mobali. Ya solo, ekokaki kozala mpasi mpo Mogrɛki ya kala andima yango. Moto nyonso oyo alekisá bomoi na ye mobimba na nɔrdi ya équateur amesaná komona moi na sudi. Na yango, ntango azali kokende na wɛsti, moi ekomonana na lobɔkɔ na ye ya mwasi. Kasi na Cap de Bonne-Espérance, oyo ezali na sudi ya équateur, na midi, moi ezalaka na nɔrdi—na lobɔkɔ ya mobali ya moto oyo azali kokende na wɛsti.
Na boumeli ya bikeke, lisolo ya Hérodote ekómaki likambo ya ntembe na kati ya bato ya mayele na masolo ya kala. Bato mingi bakoki kokakatana kondima ete bato ya masuwa ya kalakala ndenge wana bakokaki kobaluka na masuwa pembenipembeni ya Afrika mobimba. Kasi, bato ya mayele bandimi ete Farao Neko atindaki bato na mobembo ya ndenge wana mpe ete mobembo ya ndenge wana ekokaki kosalema, na kotala mayele mpe boyebi oyo ezalaki na ntango wana. Lionel Casson, moto moko ya mayele na makambo ya kala alobi boye: “Mobembo ya ndenge wana ekokaki mpenza kosalema. Ezali na likambo moko te oyo ekokaki kopekisa bato ya masuwa oyo bazalaki Bafenisia básala yango na boumeli ya ntango mpe na lolenge oyo Hérodote alobeli yango.” Tokoki mpenza koloba na bosikisiki te soki lisolo ya Hérodote ezali solo kino wapi. Atako bongo, emonisi mwa moke ndenge bato bazalaki kolɛmba te kosala milende mpo na kokende na bisika oyo eyebanaki naino te na ntango wana ya kala.
Pythéas akei na masuwa na nɔrdi
Ezali kaka Bafenisia te nde bazalaki bato ya kalakala ya Mediterane oyo bakendaki na wɛsti na ngámbo ya Atlantike. Moko ya bisika ya kofanda oyo bato ya masuwa ya Grɛsi basalaki zingazinga ya Mediterane ezalaki Massalia, oyo lelo, ezali engumba Marseille na France. Engumba yango ekómaki na bozwi mingi mpo na mbongo oyo bamasuwa ezalaki kokɔtisa mpe mimbongo oyo ezalaki kosalema na mokili. Longwa na Massalia, bato ya mombongo ya Mediterane bazalaki kotinda vinyo, mafuta, mpe bronze na nɔrdi, mpe uta na nɔrdi, bazalaki kozwa bibende oyo bapɛtoli naino te mpe mpaka oyo babengaka ambre. Na ntembe te, bato ya Massalia bazalaki kolinga báyeba bisika oyo biloko yango ezalaki kouta. Yango wana na mobu soki 320 L.T.B., Pythéas moto ya Massalia akendaki na ndenge na ye moko kotala mikili wana oyo ezalaki mosika na nɔrdi.
Ntango azongaki, Pythéas akomaki lisolo ya mibembo na ye; apesaki yango nkombo Likoló ya Mbu. Atako makomi ya ebandeli ya buku na ye oyo akomaki na monɔkɔ ya Grɛki ezali lisusu te, bakomi ya kala soki 18 bazongelaki maloba na yango na mikanda na bango. Maloba yango emonisaki ete Pythéas alobelaki malamu mpenza mbu mokomoko, ndenge mai na yango ebendanaka mpe ebimaka lisusu na mokili, jeografi, mpe bato ya bisika oyo akendaki. Azalaki mpe kosalela bolai ya elili oyo ezalaki kouta na mwa nzete oyo azalaki kozwa na yango mezire mpo na koyeba soki moi ya midi etombwani na mezire nini na dati moko boye oyo eyebani, mpe azalaki kotalela yango mpo ayeba soki akómi tii wapi na nɔrdi.
Pythéas ye moko azalaki koluka nde makambo ya siansi. Kasi, ezali mpasi kondima ete kaka makambo ya siansi nde ezalaki ntina ya libosoliboso ya mobembo na ye. Kutu, bato ya mayele balobaki ete bato ya mimbongo nde batindaki ye mpe bapesaki ye mbongo mpo akende koluka nzela ya mbu mpo na kokóma na bisika wana ya mosika epai bayebaki ete bakokaki kozwa ambre mpe etini. Bongo, Pythéas akómaki tii wapi?
Na Bretagne, na Grande-Bretagne, mpe koleka
Emonani ete Pythéas asalaki momembo zingazinga ya Ibérie mpe akendaki na bokula ya Gaule tii na Bretagne, esika abimaki na mokili. Toyebi yango mpo moko ya bamezire oyo azwaki moi ndenge etombwanaki likoló—na ntembe te azwaki mezire yango na mokili—ekokani na esika moko oyo ezali na nɔrdi ya Bretagne.c
Bato ya Bretagne bazalaki bato bayebi malamu kotonga mpe kotambwisa bamasuwa mpe bazalaki kosala mombongo ná bato ya Grande-Bretagne. Cornouailles, oyo ezali nsɔngɛ ya sudi ya Grande-Bretagne, ezalaki na etini ebele, ebende oyo basangisaka mpo na kosala bronze, mpe ezalaki kuna nde Pythéas akendaki na nsima. Lapolo na ye elobelaki bonene ya Grande-Bretagne mpe ndenge ezali mwa moke lokola triangle, mpe yango emonisi ete mbala mosusu atambolaki zingazinga ya esanga yango.
Eyebani malamu te soki Pythéas azwaki nzela nini, mbala mosusu alekaki na mai oyo ekaboli Grande-Bretagne ná Irlande, asɛmaki na Esanga Man, oyo latitude na yango ekokani na mezire na ye ya mibale oyo azwaki moi ndenge etombwanaki na likoló. Mezire ya misato ezwamaki mbala mosusu na Lewis na Outer Hebrides, mwa mosika na bokula ya wɛsti ya Écosse. Kuna, mbala mosusu akobaki na nɔrdi tii na Bisanga Orcades, oyo ezali na nɔrdi ya esanga oyo eleki monene ya Écosse, mpamba te lisolo na ye, oyo Pline l’Ancien azongelaki, emonisi ete bisanga yango ezalaki 40.
Pythéas akomaki ete nsima ya mobembo ya mikolo 6 na nɔrdi ya Grande-Bretagne, okokuta mokili babengi Thulé. Bakomi mingi ya kala balobaka ete Pythéas alobelaki Thulé ete ezali mokili epai moi emonakaka na midi ya butu. Akomaki ete nsima ya mokolo moko na masuwa longwa wana, moto akokóma esika oyo mai ya mbu ezali “glasi.” Bato bayonaka te mpo na esika oyo Pythéas abengaki Thulé—bamosusu balobaka ete ezali Bisanga Féroé, bamosusu Norvège, basusu Islande. Ata soki Thulé ezalaki wapi, bakomi ya kala bamonaka ete ezalaki “mosika mpenza na nɔrdi koleka bisika nyonso oyo etángami.”
Mbala mosusu ntango Pythéas azongaki na Grande-Bretagne, alandaki mingimingi nzela oyo ayelaki mpe na ndenge yango abalukaki zingazinga ya esanga yango mobimba. Toyebi te soki akendaki kotala bokula ya nɔrdi ya Mpoto liboso azonga na Mediterane. Ata soki ezalaki ndenge nini, Pline l’Ancien atángaki Pythéas lokola moto oyo ayebaki malamu bisika oyo ezalaki kobimisa ambre. Bisika ya kala oyo ezalaki kobimisa eloko wana ya motuya ezali lelo na Jylland, na Danemark, mpe na sudi ya bokula ya Mbu Baltique. Ya solo, Pythéas akokaki koyeba bisika yango ntango azalaki koleka ata na libongo nini na ɛsti ya Grande-Bretagne, kasi na oyo toyebi, alobaki te ete ye moko akendaki kotala bisika yango.
Moto mosusu ya Mediterane oyo ayebani mpe oyo akomaki mpo na mobembo oyo asalaki na Grande-Bretagne ezali Jules César, oyo asɛmaki na sudi ya esanga yango na mobu 55 L.T.B. Na mobu 6 T.B., basoda mosusu ya Roma bakendaki bitumba tii na nɔrdi ya Jylland.
Bakei lisusu mosika koleka
Bafenisia ná Bagrɛki bakolisaki boyebi ya bato oyo batángá na oyo etali jeografi, mpo boyebi na bango esuka na Mediterane te, kasi mpe ekende kino na Atlantike mpe na nsɔngɛ ya sudi ya Afrika, mpe mosika kino na Arktike. Bato ya ntango wana bazalaki koluka komona bisika ya sika, kosala mimbongo, mpe kokende lisusu mosika, kosala mibembo milaimilai, mpe na ndenge yango, makanisi mpe boyebi ezalaki kokola.
Mikanda ya kala oyo etikalá mpe oyo ezali kolobela mibembo ya bato oyo bazalaki kokende komona bisika ya sika elobeli kaka ndambo ya mibembo ya bato ya masuwa oyo basilisaki mibembo yango. Bato boni ya kala oyo bazalaki kosala mibembo na bamasuwa bazongaki na bisika oyo babandaki mibembo na bango kozanga bákoma mpo na bisika oyo bakendaki? Mpe bato boni bakendaki na masuwa mosika ya mboka na bango, kasi bazongaki lisusu te? Biyano na mituna wana eyebani te. Kasi tokoki kososola mwa likambo mpo na ndenge bokristo epalanganaki na ekeke ya liboso.—Talá etanda na likoló.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Balobaka ete nkombo yango ezali ya etúká moko oyo ezali na sudi ya Espagne oyo bakomi ya Grɛki mpe ya Roma bazalaki kobenga Tartessus.
b Mpo na koyeba makambo mosusu na ntina na mibembo oyo ezalaki kosalema na ngámbo ya ɛsti, talá lisolo “Bamisionɛrɛ bakokaki kokóma tii wapi na Ɛsti?” na Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli ya 1 Yanuali 2009.
c Mikolo oyo, tokoloba ezali na latitude ya 48°42’ N.
[Etanda na lokasa 29]
Nsango malamu “esakolamaki na bato ya bikólo nyonso”
Na mibu soki 60-61 T.B., ntoma Paulo akomaki ete nsango malamu “esakolamaki na bato ya bikólo nyonso oyo ezali na nse ya lola.” (Bakolose 1:23) Alingaki nde koloba ete bakristo basilaki kosakola na Inde, na Extrême-Orient, na Afrika, na Espagne, na Gaule, na Grande-Bretagne, na mikili ya Baltes, mpe na mboka oyo Pythéas abengaki Thulé? Mbala mosusu ezalaki bongo te, kasi tokoki koloba yango na bosikisiki te.
Nzokande, ntembe ezali te ete nsango malamu epalanganaki mingi mpenza. Na ndakisa, Bayuda ná baprozelite oyo bakómaki bakristo na Pantekote ya mobu 33 T.B., bamemaki bindimeli na bango ya sika mosika mpenza na Partia, Elame, Media, Mezopotamia, Arabia, Azia Moke, bisika mosusu ya Libi na ngámbo ya Sirene, mpe na Roma—esangisi bisika nyonso oyo batángi ya Paulo bayebaki.—Misala 2:5-11.
[Etanda/Karte na nkasa 26, 27]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Hérodote akomaki ete na nsɔngɛ ya sudi ya Afrika, bato ya masuwa bamonaki moi na lobɔkɔ ya mobali
[Karte]
AFRIKA
MBU MEDITERANE
MBU INDIEN
MBU ATLANTIKE
[Etanda/Karte na nkasa 28, 29]
(Mpo na komona yango, talá mokanda)
Mobembo molai oyo Mogrɛki Pythéas asalaki na mbu
[Karte]
IRLANDE
ISLANDE
NORVÈGE
Mbu ya Nɔrdi
GRANDE-BRETAGNE
BRETAGNE
PÉNINSULE IBÉRIQUE
BOKULA YA NƆRDI YA AFRIKA
MBU MEDITERANE
Marseille