Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g 12/15 lok. 3
  • Matata na libota ebimaka ndenge nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Matata na libota ebimaka ndenge nini?
  • Lamuká!—2015
  • Masolo mosusu
  • Yakobo ná Esau bayokani
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • ‘Toluka kimya mpe tolanda yango’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge ya kosala mpo kimya ezala na libota
    Lamuká!—2015
  • Mapasa oyo bakeseni
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2015
g 12/15 lok. 3
Bana oyo bazali mawamawa mpo baboti na bango bazali koswana

ELOBELI TITRE YA EZIPELI | KOTYA KIMYA NA NDAKO

Matata na libota ebimaka ndenge nini?

SARAH,a oyo afandaka na Ghana mpe akokisi mbula 17 na libala ná Jacob, alobi boye: “Mbala mingi toswanaka mpo na mbongo. Nayokaka nkanda mpo ngai nde nasalaka mingi mpo na kokokisa bamposa ya libota na biso mpe Jacob ayebisaka ngai ata eloko te mpo na mbongo oyo tozali na yango. Tolekisaka bapɔsɔ kozanga ete tólobisana.”

Mobali na ye Jacob, alobi boye: “Ɛɛ, na bantango mosusu tokatelanaka mangala. Ezalaka mingimingi mpo na kozanga koyokana mpe kozanga kosolola malamu. Matata ebimaka mpe mpo toyeisaka makambo minene.”

Na Inde, Nathan, oyo abalaki sika, alobeli makambo oyo elekaki ntango tata-bokilo na ye agangelaki mama-bokilo na ye; alobi boye: “Mama-bokilo na ngai asilikaki mpe alongwaki na ndako. Ntango natunaki tata-bokilo mpo na nini agangelaki ye bongo, amonaki lokola nafingi ye. Na nsima, akómaki kogangela biso nyonso.”

Ntango mosusu omoná ndenge matata mingi ebimá na ndako mpo na maloba mabe. Mbala mosusu, lisolo oyo ebandi na kimya ekoki kobongwana nokinoki koswana. Lokola moto moko te azalaka na likoki ya koloba ntango nyonso makambo ya malamu, yango wana ekoki kozala mpasi te azwa na ndenge ya mabe makambo oyo basusu balobi to akanisela bango mabe. Ata bongo, ekoki kosalema ete bato báyokana mpe bázala na kimya.

Okoki kosala nini soki koswana ebimi? Makambo nini okoki kosala mpo kimya mpe boyokani ezonga na libota? Ndenge nini bato ya libota bakoki kobatela kimya na ndako? Tosɛngi yo otánga yango.

a Na masolo oyo bankombo mosusu ezali ya bango te.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto