Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • my lisolo 17
  • Mapasa oyo bakeseni

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mapasa oyo bakeseni
  • Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yakobo azwaki libula
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Yakobo ná Esau bayokani
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Zwáká bikateli ya malamu mpo na kobatela libula na yo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Mokanda mpo na masolo ya Biblia
my lisolo 17

Lisolo 17

Mapasa oyo bakeseni

BANA mibali mibale oyo bozali komona na elilingi oyo bakokani ata moke te. Oyebi nkombo na bango? Esau ná Yakobo. Esau azali mobomi-nyama, mpe Yakobo mobateli ya mpate.

Esau ná Yakobo bazali mapasa oyo Yisaka ná Rebeka babotaki. Yisaka alingi Esau mingi, mpo azali mobomi-nyama, amemelaka libota biloko ya kolya. Kasi Rebeka alingi Yakobo mingi, mpo azali mwana ya kimya.

Nkɔkɔ na bango Abrahama azalaki naino na bomoi; mpe ntango mosusu Yakobo azalaki kosepela koyoka ye ntango azali kolobela makambo ya Yehova. Abrahama akufaki na mbula nkama moko na ntuku nsambo na mitano (175). Na ntango yango, Esau ná Yakobo bazalaki na mbula zomi na mitano.

Ntango Esau akómi na mbula ntuku minei (40), abali basi mibale na mokili ya Kanana. Yisaka ná Rebeka batungisamaki mingi, mpo basi yango bazalaki kosambela Yehova te.

Kasi, mokolo moko boye, likambo moko esalemaki mpe etindaki Esau ayina ndeko na ye Yakobo. Ekómaki ntango oyo Yisaka asengelaki kopambola mwana na ye ya liboso. Lokola Esau azalaki yaya, atyaki motema ete akozwa lipamboli yango. Nzokande, mokolo mosusu atɛkɛlaki Yakobo lotomo na ye ya kozwa lipamboli. Lisusu, liboso ete bana yango bábotama, Nzambe asakolaki ete Yakobo nde moto akozwa lipamboli. Esalamaki mpe bongo. Yisaka apesaki Yakobo lipamboli.

Ntango Esau ayoki likambo yango, asilikelaki Yakobo. Ayokaki nkanda makasi mpenza mpe alobaki ete akoboma Yakobo. Ntango bayebisi Rebeka likambo yango, amitungisaki mingi. Yango wana, alobaki na Yisaka, mobali na ye ete: ‘Ekozala mabe mingi soki Yakobo mpe abali mwasi ya mokili ya Kanana.’

Bongo Yisaka abengaki Yakobo mpe alobi na ye ete: ‘Kobala mwasi na Kanana te. Kende nde na ndako ya nkɔkɔ na yo Betuele, na Harane, mpe balá mwasi na kati ya bana ya mwana na ye Labana.’

Yakobo ayokelaki tata na ye, aumelaki te, akei mobembo molai na Harane, epai bandeko ya mama na ye bazali.

Ebandeli 25:5-11, 20-34; 26:34, 35; 27:1-46; 28:1-5; Baebre 12:16, 17.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto