Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 2 nk. 3-7
  • Biblia ezali kaka buku moko kitoko?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ezali kaka buku moko kitoko?
  • Lamuká!—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Biblia epesaka mayele ya kososola na makambo etali Nzambe mpe bizaleli
  • Biblia emonisi ntina oyo bato banyokwamaka mpe bayokanaka te
  • Biblia epesi elikya
  • Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
  • Biblia elobelaka makambo nini?
    Lamuká!—2008
  • Mateya ya solo oyo esepelisaka Nzambe
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Búku oyo ezali komonisa boyebi ya Nzambe
    Boyebi oyo ezali komema na bomoi ya seko
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 2 nk. 3-7
Mobali oyo azali kotánga Biblia

ELOBELI TITRE YA EZIPELI

Biblia ezali kaka buku moko kitoko?

Basilisaki kokoma Biblia eleki sikoyo mbula soki 2 000. Banda wana, ebele ya babuku ebimá mpe elimwá. Kasi Biblia ezali kaka. Tótalela makambo oyo elandi.

  • Bato mosusu ya nguya basalaki nyonso mpo na kolimwisa Biblia kasi balongaki te. Na ndakisa, buku moko (An Introduction to the Medieval Bible) elobi ete na Moyen-Âge, na mikili mosusu “ya bokristo, moto oyo azalaki na Biblia mpe azalaki kotánga yango na monɔkɔ ya mboka [oyo bato mingi balobaka] bazalaki kotalela ye lokola mopɛngwi mpe motɛmɛli.” Bato ya mayele oyo babongolaki Biblia na minɔkɔ ya mboka to oyo balendisaki bato bátángaka yango batyaki bomoi na bango na likama. Babomaki kutu bamosusu.

  • Atako Biblia ezalaki na banguna mingi, ekómaki mpe ezali ntango nyonso buku oyo ekabolami mingi koleka babuku nyonso. Na mobimba to na ndambo, babimisi Babiblia soki miliare mitano na minɔkɔ koleka 2 800. Yango ekeseni mpenza na babuku ya filozofi, ya siansi mpe babuku mosusu ya ndenge wana, oyo kaka bato moke nde bakoki kozala na yango mpe ekoki nokinoki kosila ngala.

  • Biblia esalisi na kobatela mpe kobongisa minɔkɔ mosusu oyo basalelaki mpo na kobongola yango. Libongoli ya Biblia na monɔkɔ ya Allemand ya Martin Luther esalaki mpe ete monɔkɔ yango ebonga lisusu. Libongoli ya liboso ya Biblia King James Version balobeli yango lokola “buku oyo eyebani mingi koleka babuku mosusu oyo babimisá” na Anglais.

  • Mateya ya Biblia “ekɔtá mpenza na mimeseno ya bato ya Mpoto, kaka te na makambo ya losambo mpe oyo basalaka, kasi mpe na makambo ya ntɔki, mikanda, mibeko, politiki mpe bongo na bongo.”​—The Oxford Encyclopedia of the Books of the Bible.

Yango ezali kaka mwa makambo oyo ekesenisi Biblia na babuku mosusu. Kasi, mpo na nini Biblia eyebani mingi bongo? Mpo na nini bato batyaki bomoi na bango na likama mpo na yango? Bantina ezali mingi, kasi mwa ndambo yango oyo: Biblia ezali na mateya ya bwanya na makambo etali ndenge tosengeli komitambwisa mpe kozala na boyokani malamu na Nzambe. Biblia esalisaka biso tóyeba ntina oyo bato banyokwamaka mpe bayokanaka te. Oyo eleki ntina, elaki ete bampasi yango ekosila, emonisi kutu ndenge ekosalema.

NA MOKUSE

Biblia ya kofungwama

Biblia ezali na mikanda mikemike 66 mpe ekomamaki na boumeli ya mbula soki 1 600.

Bato soki 40 nde bakomaki Biblia, oyo bazalaki basɛkrɛtɛrɛ to bakomeli, bamosusu bazalaki basali-bilanga, babomi-mbisi, bazuzi, bakonzi mpe baalangá-nzembo.

Motó ya likambo ya Biblia ezali Bokonzi ya Nzambe, guvɛrnema ya likoló oyo ekoyangela mabele. (Danyele 2:44; 7:13, 14) Bokonzi yango ekolongola mabe, bampasi mpe liwa; ekosangisa bato na nse ya boyangeli ya sembo ya Yehova Nzambe, Mozalisi na biso.​—1 Bakorinti 15:24-26.

Biblia epesaka mayele ya kososola na makambo etali Nzambe mpe bizaleli

Kotánga kelasi ezali na ntina. Kasi zulunalo moko ya Canada Ottawa Citizen elobi ete “Ata soki ozwi badiplome mingi, yango elingi koloba te ete ozali na likoki ya kozwa bikateli ya malamu na makambo etali bizaleli.” Longola yango, ankɛtɛ oyo kompanyi moko (Edelman), oyo etalaka makambo ya boyokani kati na bato esalaki, emonisi ete bato mingi oyo batángá mingi, ezala baoyo bakambaka makambo ya mimbongo to ya guvɛrnema, bakosaka, babubaka mpe bayibaka mpe yango esalaka ete bato “bátyela bango motema lisusu te.”

Biblia elobelaka mingi makambo etali bizaleli mpe mateya ya Nzambe. Epesaka biso bososoli na makambo ya “boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.” (Masese 2:9) Tózwa ndakisa ya elenge mobali moko ya mbula 23 na nkombo Stephen, oyo akɔtaki bolɔkɔ na Pologne. Ntango azalaki na bolɔkɔ, akómaki koyekola Biblia mpe kosepela na batoli na yango. Akomaki boye: “Sikoyo nayebi soki ‘kokumisa tata mpe mama’ elingi koloba nini. Nayekolaki mpe ndenge ya komonisa ezaleli ya komipekisa, mingimingi koboya ezaleli ya nkanda makasi.”​—Baefese 4:31; 6:2.

Toli oyo esimbaki motema ya Stephen ezali na Masese 19:11; elobi boye: “Mayele ya kososola oyo moto azali na yango ekitisaka mpenza nkanda na ye, mpe kitoko na ye ezali ete alimbisaka likambo oyo ebuki mibeko.” Lelo oyo, soki Stephen akutani na likambo moko ya mpasi, alukaka kotalela yango na kimya mpe kosalela batoli ya Biblia oyo eyokani na likambo yango. Alobaki boye: “Namoni ete Biblia ezali buku oyo epesaka batoli ya malamu koleka.”

Mwasi moko oyo azalaki na makanisi mabe, afingaki Maria, oyo azali Motatoli ya Yehova, na miso ya bato mpe atyaki mobulu. Kasi na esika Maria azongisa mabe, na kimya nyonso asimbaki nzela akei. Na nsima, mwasi yango ayokaki mabe na likambo oyo asalaki mpe alukaki Batatoli ya Yehova. Sanza soki moko na nsima, ntango amonaki lisusu Maria, ayambaki Maria mpe asɛngaki ye bolimbisi. Lisusu, asosolaki ete soki Maria amonisaki boboto mpe ezaleli ya komipekisa, ezali mpo na lingomba na ye. Nini emonanaki? Mwasi yango mpe bato mitano ya libota na ye bazwaki ekateli ya koyekola Biblia elongo na Batatoli ya Yehova.

Yesu Kristo alobaki ete bwanya emonanaka na misala na yango. (Luka 7:35) Ezali na makambo mingi oyo emonisi ete batoli ya Biblia esalisaka mpenza! Ebimisaka bizaleli na biso ya malamu. “Ekómisaka moto oyo azangi mayele moto ya bwanya,” “esepelisaka motema,” mpe koyeba malamu makambo etali Nzambe mpe bizaleli “engɛngisaka miso.”​—Nzembo 19:7, 8.

Biblia emonisi ntina oyo bato banyokwamaka mpe bayokanaka te

Ntango minganga bayekolaka bamaladi oyo epalanganaka, balukaka koyeba nini mpenza ebimisi yango. Ezali mpe bongo mpo na koyeba ntina oyo bato banyokwamaka mpe babendanaka. Awa mpe Biblia ekoki mpenza kosalisa, mpo elobeli istware na biso ya ebandeli, ntango bampasi na biso ebandaki.

Mokanda ya Ebandeli emonisi ete bampasi ya bato ebandaki ntango mwasi ná mobali ya liboso batombokelaki Nzambe. Likambo mosusu oyo basalaki, bazwaki bango moko ekateli ya kotya mibeko etali malamu to mabe; likambo oyo kaka Nzambe nde azalaki na lotomo ya kosala. (Ebandeli 3:1-7) Likambo ya mawa, banda wana bato mingi balingaka kosala makambo ndenge balingi. Yango ebimisi nini? Istware ya bato etondi na makambo lokola kobendana, minyoko mpe kozanga koyokana na makambo etali Nzambe mpe bizaleli, na esika bato bázala na bonsomi mpe esengo. (Mosakoli 8:9) Yango wana Biblia elobi boye: “Ezali te likambo ya moto . . . atambwisa lokolo na ye.” (Yirimia 10:23) Likambo ya esengo ezali ete botomboki ya bato elingi ekóma na nsuka.

Biblia epesi elikya

Biblia emonisi biso ete lokola Nzambe alingaka baoyo batosaka bokonzi na ye mpe mibeko na ye, akotika te mabe mpe mpasi oyo yango ebimisaka ekoba libela. Bato mabe ‘bakobuka mbuma ya misala na bango.’ (Masese 1:30, 31) Kasi “bato ya komikitisa bakozwa mabele, mpe bakosepela mpenza na kimya mingi.”​—Nzembo 37:11.

Biblia ya kofungwama elali pene ya kɔpɔ ya ti

“Mokano na ye [Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.”​—1 Timote 2:3, 4

Nzambe akokokisa mokano na ye ya kotya kimya na mabele na nzela ya ‘bokonzi na ye.’ (Luka 4:43) Bokonzi yango ezali guvɛrnema oyo ekoyangela mokili mobimba mpe na nzela na yango, Nzambe akomonisa lotomo na ye ya koyangela bato. Na libondeli ya ndakisa, Yesu amonisaki ete Bokonzi yango ná mabele ezali na boyokani; alobaki boye: “Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema . . . na mabele.”​—Matai 6:10.

Ɛɛ, bato oyo Bokonzi ya Nzambe ekoyangela bakosala mokano ya Nzambe, bakondima ete Mozalisi nde azali mokonzi oyo abongi, kasi moto te. Kanyaka, lokoso, bokeseni na makambo etali ekonomi, koyina bato ya mposo mosusu mpe bitumba ekosila. Tokozala na ekólo moko, guvɛrnema moko mpe mibeko moko na makambo etali Nzambe mpe bizaleli.​—Emoniseli 11:15.

Sekele mpo na komona mokili wana ya sika ezali mateya. 1 Timote 2:3, 4 elobi ete “mokano na ye [Nzambe] ezali ete bato ya ndenge nyonso bábika mpe bázwa boyebi ya sikisiki ya solo.” Solo yango esangisi mateya ya Biblia oyo etali mibeko mpe mitinda oyo ekotambwisa bokonzi yango​—oyo mosusu na yango ezwami na lisolo ya Yesu likoló ya ngomba. (Matai, mokapo 5 tii 7) Ntango ozali kotánga mikapo yango misato, meká komona na makanisi ndenge bomoi ekozala ntango moto nyonso akosalela batoli ya Yesu.

Tosengeli kokamwa soki Biblia ezali buku oyo ekabolami mingi koleka babuku mosusu nyonso? Ata moke te! Mateya na yango emonisi ete ekomamaki mpenza na litambwisi ya elimo ya Nzambe. Mpe ndenge oyo ekabolami mingi emonisi mposa oyo Nzambe azali na yango ete bato ya minɔkɔ nyonso mpe bikólo nyonso báyekola makambo na ye mpe bázwa mapamboli oyo Bokonzi na ye ekomemela bato.​—Misala 10:34, 35.

Likoló etondi na minzoto

Biblia elobi ete mibeko etambwisaka likoló

BUKU OYO EMONISI MABE YA BIYAMBAYAMBA (SUPERSTITION)

Buku moko (Encyclopedia of Science and Religion) elobi ete bato ya ntango ya kala “bazalaki kokanisa ete banzambe ya motema mɔtɔmɔtɔ nde bazalaki kotambwisa molɔ́ngɔ́.” Kasi Biblia elobi ete mibeko nde etambwisaka molɔ́ngɔ́. Na ndakisa, eleki sikoyo mbula soki 3 500, Biblia elobelaki ‘mibeko oyo etambwisaka likoló mpe mabele.’ (Yobo 38:33) Na Yirimia 31:35 elobeli “mibeko ya sanza mpe ya minzoto.” Baoyo pole yango engɛngisaki mitema na bango baboyaki losambo ya lokuta mpe biyambayamba.​—Yobo 31:26-28; Yisaya 47:1, 13.

BUKU OYO ELOBAKA MAKAMBO NA BOSEMBO

Bosembo ezali moko ya bizaleli kitoko oyo bato bakomaki Biblia bamonisaki; balobelaki ata mabunga na bango moko. Na ndakisa, mokonzi Davidi andimaki libunga na ye nsima ya kosala ekobo na mwasi moko na nkombo Bate-sheba; alobaki boye: “Nasali oyo ezali mabe na miso na yo [Nzambe].” (Nzembo 51:4) Ntoma Yoane andimaki ete afukamaki mbala mibale mobimba mpo na kosambela anzelu moko. Anzelu yango alobaki na ye: “Kebá! Kosala bongo te! . . . Sambelá Nzambe.” (Emoniseli 19:10; 22:8, 9) Bosembo wana oyo bakomi ya Biblia bamonisaki emonanaki te epai ya bakomeli mosusu ya ntango ya kala.

BUKU OYO ESALISAKA MOTO ATUNGISAMA TE NA MAKANISI

Biblia elendisaka biso tókóma na bizaleli oyo esalisaka biso tótungisama mingi te na makanisi, bizaleli lokola motema mawa mpe kolimbisa. Baefese 4:32 elobi boye: “Bózala na boboto na kati na bino, bóyokelanaka mpenza mawa, bólimbisanaka na motema moko.”

Na kotalela lisolo oyo zulunalo Mayo Clinic ebimisaki, na États-Unis, “Soki olimbisaka te, yo moko nde okomona mpasi.” Lisolo yango elobi ete kolimbisa ekoki kosala ete “bato báyokana malamu, bázala na boyokani malamu na Nzambe mpe na makanisi malamu, bámitungisa mingi te, bázala nkandankanda te, tansiɔ ekita te, mpe bányokwama mingi te na makanisi, bázala na likama te ya kolangwa masanga to komɛla mpe kosalela biloko mosusu ya mabe.”

BUKU OYO EYANOLAKA NA MITUNA MINENE ETALI BOMOI

Mwana na kati ya libumu

Mwana na kati ya libumu

Siansi ezali na biyano na mituna ya ndenge nyonso. Ata bongo, siansi ezali na ndelo. Buku moko (Biotechnology​—Changing Life Through Science) elobi boye: “Bato mingi ya siansi, minganga mpe bato ya filozofi bandimaka ete siansi ekoki te koyanola mituna etali bizaleli malamu to mituna etali makambo ya Nzambe.”

  • SIANSI EKOKI kopesa bakalkile oyo emonisi ndenge mibeko oyo etambwisaka molɔ́ngɔ́ esalaka, kasi siansi ekoki te koyebisa biso mpo na nini molɔ́ngɔ́ ezalaka mpe etambwisamaka na mibeko ya sikisiki.

  • SIANSI EKOKI kolimbola ndenge binama ya kobotela esalaka, kasi ekoki te kosalisa moto azwa bikateli ya malamu na makambo etali kosangisa nzoto.

  • SIANSI EKOKI kolobela ndenge mwana asalamaka na libumu ya mama, kasi ekoki te kosalisa moto azwa ekateli ya malamu na likambo etali kolongola zemi.

Biblia ezali na biyano na mituna yango mpe biyano na mituna mingi mosusu ya ntina oyo esalisaka moto ‘akanga ntina ya boyengebene ná bosembo ná kolongobana, nzela mobimba ya oyo ezali malamu.’​—Masese 2:9.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto