Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • wp24 No. 1 nk. 6-9
  • Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • LITAMBWISI OYO EBONGI
  • BIBLIA EYEBISI BISO OYO NZAMBE ALINGI TÓSALA
  • Mibeko ya Nzambe na oyo etali malamu ná mabe esilá ngala?
    Makambo mosusu
  • Makambo mosusu oyo ekoki kosalisa libota
    Lamuká!—2018
  • Nini ekoki kosalisa biso tózala na bomoi ya malamu na mikolo ezali koya?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2021
  • Mabe ná malamu: Osengeli kopona
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova (ya bato nyonso)—2024
wp24 No. 1 nk. 6-9

Mabe ná malamu: Biblia nde ebongi kotambwisa biso

Ezali mpasi tóyeba soki bikateli na biso ezali ya malamu soki tozali kotalela kaka ndenge oyo biso to bato mosusu bamonelaka makambo. Biblia eyebisi biso ntina, kasi elobeli mpe makambo mosusu mingi. Biblia ezali na mibeko oyo etali bizaleli malamu oyo tokoki kotyela motema—litambwisi oyo ebongi soki tolingi kozala na bomoi ya malamu mpe ya esengo.

LITAMBWISI OYO EBONGI

Na Biblia, Yehovaa Nzambe amonisi ete asalaki bato mpo bámitambwisa bango moko te, kasi mpo ye nde atambwisa bango. (Yirimia 10:23) Mpo na ntina wana nde akomisá na Biblia mibeko etali malamu ná mabe. Alingaka bato mingi mpe alingaka te tózwa bikateli ya mabe oyo ekobimisela biso bampasi mpe kokómisa bomoi na biso bololo. (Kolimbola Mibeko 5:29; 1 Yoane 4:8) Likambo eleki ntina, Mozalisi na biso azali na bwanya mpe boyebi oyo esengeli mpo na kopesa biso batoli eleki malamu oyo tokoki kozwa. (Nzembo 100:3; 104:24) Ata bongo, Nzambe atindaka bato na makasi te básalela mibeko na ye.

Yehova apesaki Adama ná Eva, mwasi ná mobali ya liboso, nyonso oyo basengelaki na yango mpo bázala na esengo. (Ebandeli 1:​28, 29; 2:​8, 15) Apesaki bango mpe malako ya pɛtɛɛ oyo basengelaki kotosa. Kasi, atikelaki bango moko nzela bápona soki bakotosa malako yango to te. (Ebandeli 2:​9, 16, 17) Likambo ya mawa, Adama ná Eva baponaki kosala oyo bango balingaki na esika bátosa mibeko ya Nzambe. (Ebandeli 3:6) Yango ebimisaki likambo nini? Bomoi ya bato ezali sikoyo malamu mingi lokola balingaki bango moko bákata oyo ezali malamu to mabe? Ata moke te. Makambo oyo esalemá na kala emonisi ete koboya kotosa mibeko ya Nzambe epesaka kimya mpe bolamu ya solosolo te.—Mosakoli 8:9.

Biblia ezali eloko oyo ekosalisa biso mpo tózwa bikateli ya malamu ezala toutá wapi to tofandaka wapi. (2 Timote 3:​16, 17; talá etanda “Buku moko mpo na bato ya bikólo nyonso.”) Talá ndenge Biblia esalaka yango.

Luká koyeba mpo na nini babengaka Biblia “liloba ya Nzambe.”—1 Batesaloniki 2:13. Talá na jw.org video Biblia ezali mokanda ya nani?

BUKU MOKO MPO NA BATO YA BIKÓLO NYONSO

Ndenge Nzambe apesi moto nyonso mibeko oyo asengeli kolanda, yango emonisi ete azali mpenza Mozalisi moko ya bwanya mpe ya bolingo. Talá makambo elandi na oyo etali Biblia:

Bato ya bikólo ekeseni bazali kotánga Biblia. Ezali na Babiblia ya papye mpe Babiblia oyo okoki kotánga na baaparɛyi na nse.
  • +3 500 Motángo ya minɔkɔ oyo Biblia mobimba to ndambo na yango ebongolami, yango esali ete ezala buku oyo ebongolamá mingi koleka babuku nyonso.

  • +5 000000000 Motángo ya Babiblia oyo enyatamá, yango esali ete ezala buku oyo ekabolamá mingi koleka babuku nyonso.

Biblia ekumisaka te lopɔsɔ, ekólo, libota, to mimeseno ya mboka moko boye. Ezali mpenza mokanda ya bato nyonso.

Tángá Biblia na Internet (ezali na minɔkɔ koleka 250) na jw.org

Mobali moko azali kosalela mosapi na ye wana azali kotánga Biblia.

MPO NA NINI BATO MOSUSU BANDIMELAKA BIBLIA TE?

Bato mosusu balobaka ete Biblia ekoki te kolakisa bato makambo oyo basengeli kosala to te. Babimisaka makanisi lokola oyo elandi.

Makanisi ya bato: “Biblia ezali bongolabongola.”

Bosolo ya likambo: Mwa bavɛrsɛ oyo emonanaka lokola eyokani te tokoki kokanga ntina na yango soki tótaleli malamu lisolo mobimba, ndenge makambo ezalaki na kala, makanisi ya moto oyo akomaki, mpe makambo mosusu.

Soki olingi komona bandakisa ya ndenge wana, tángá na jw.org lisolo “Biblia ezali bongolabongola?”

Makanisi ya bato: “Bato oyo balobaka ete batosaka Biblia bango nde basalaka makambo ya mabe, yango elakisi ete ebongi te kotyela yango motema.”

Bosolo ya likambo: Tokoki te kopesa Biblia foti soki bato oyo batángaka yango bazali te kosalela mateya na yango. Yango moko esakolaki ete bato mingi, ezala mpe bakonzi ya mangomba, oyo balobaka ete balandaka mibeko ya Biblia bakosala makambo oyo eyokani te na oyo Biblia elobi. Elobi mpe ete mpo na yango, bato “bakoloba mabe” mpo na mateya ya Biblia.—2 Petro 2:​1, 2.

Soki olingi komona ndakisa moko oyo emonisi ndenge bakonzi mingi ya mangomba bazali kosala makambo oyo eyokani te na oyo Biblia eteyaka, tángá na jw.org lisolo “Lingomba ekómi esika mosusu ya kosala mombongo?”

Makanisi ya bato: “Biblia etindaka bato báyina bato mosusu oyo bazali na bango makanisi ndenge moko te.”

Bosolo ya likambo: Biblia elendisaka bato básalela basusu makambo na limemya. Etindaka bato te. . .

  • bámimona ete baleki basusu.—Bafilipi 2:3.

  • bámona mpamba bato oyo bazali na bizaleli mpe bindimeli mosusu.—1 Petro 2:17.

  • bándimisa bato mosusu makanisi na bango na makasi.—Matai 10:14.

Biblia emonisi ete Nzambe asalelaka bato ntango nyonso makambo na boboto, na bosembo, mpe ete alingaka biso mpe tósala kaka bongo.—Baroma 9:14.

Mpo na koyeba makambo mosusu, tángá na jw.org lisolo “Kotika moto asala oyo alingi—Ndenge oyo Biblia ekoki kosalisa.”

BIBLIA EYEBISI BISO OYO NZAMBE ALINGI TÓSALA

Na kati ya Biblia, tokokuta masolo oyo emonisi ndenge Nzambe asalelaka bato makambo. Makambo oyo ezali na Biblia esalisaka biso tóyeba nini oyo Nzambe amonaka malamu to mabe, makambo oyo ebongi mpe oyo epesaka mpasi. (Nzembo 19:​7, 11) Mateya oyo tozwaka na Biblia ezalaka ntango nyonso solo mpe esalisaka biso tózwa bikateli ya malamu mikolo nyonso ya bomoi na biso.

Na ndakisa, tótalela toli oyo ezali na Masese 13:20: “Moto oyo atambolaka na bato ya bwanya akokóma na bwanya, kasi moto oyo azali moninga ya bazoba akosuka mabe.” Toli yango ezali na ntina lelo kaka ndenge ezalaki mpe na ntina na ntango ya kala. Na Biblia okokuta batoli ya ndenge wana ebele.—Talá etanda “Bwanya ya Biblia esilaka ngala te.”

Kasi okoki komituna, ‘Nini elakisi ete batoli ya Biblia ekoki mpenza kosalisa ngai?’ Lisolo oyo elandi ekolobela mwa masolo ya bomoi ya bato oyo endimisi likambo yango.

a Yehova ezali nkombo ya Nzambe.—Nzembo 83:18.

BWANYA YA BIBLIA ESILAKA NGALA TE

Biblia esalisaka bato tii sikoyo atako esali bambula soki 2000 banda esilá kokomama. Moto nyonso azalaka na mposa ya kozala na esengo mpe bomoi ya malamu. (Mosakoli 1:9) Bwanya ya Biblia oyo esilaka ngala te ekoki kosalisa biso tokokisa mposa yango.

Likambo etali bosembo

  • “Tolingi kozala sembo na makambo nyonso.”—Baebre 13:18.

  • “Moyibi ayiba lisusu te, kasi asala nde mosala makasi.”—Baefese 4:28.

Ndenge ya kozala na bato

  • “Moto na moto akoba koluka, litomba na ye moko te, kasi oyo ya moto mosusu.” —1 Bakorinti 10:24.

  • “Bókoba kokanga motema moto na moto na makambo ya mosusu mpe kolimbisana na motema moko.”—Bakolose 3:13.

Ndenge ya kozwa bikateli

  • “Moto oyo azangi mayele andimaka liloba nyonso, kasi moto ya ekɛngɛ akanisaka liboso ya kosala likambo.”—Masese 14:15.

  • “Moto ya ekɛngɛ amonaka likama mpe amibombaka,kasi moto oyo azangi mayele akobaka kokende mpe azwaka mpasi.”—Masese 22:3.

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto