Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g16 No. 2 lok. 16
  • Makambo etali boninga

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Makambo etali boninga
  • Lamuká!—2016
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Inde
  • Danemark
  • États-Unis
  • Lolenge ya komibongisa mpo na libala oyo ekolónga
    Sɛkɛlɛ́ ya bolamu na libota
  • Biblia elobi nini mpo na libala ya makango?
    Biyano na mituna ya Biblia
  • Ezali mabe kofanda esika moko liboso ya kobalana?
    Lamuká!—2010
  • Biblia elobi nini mpo na libala?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Lamuká!—2016
g16 No. 2 lok. 16
Mobali oyo azali koswanisa mwasi

MAKAMBO OYO EZALI KOLEKA NA MOKILI

Makambo etali boninga

Na likambo etali boninga, olukaka naino toli ya Biblia to olukaka yango nde na nsima? Talá ndenge batoli na yango atako ezali ya kala, kasi eyokani na bolukiluki oyo esalemi mikolo oyo.

Inde

Ankɛtɛ moko oyo esalemaki na 2014 emonisaki ete bilenge mingi (61 %) ya mbula kobanda 18 tii 25 bamoni ete kosangisa nzoto liboso ya kobala “ezali lisusu likambo monene te na Inde.” Monganga moko oyo afandaka na Mumbai alobaki na zulunalo Hindustan Times ete mpo na ye, “soki bilenge balingani, yango elingi koloba te ete bazali na likanisi ya kobalana. Ezala soki babimi mpo na butu moko to babimaka na bango, to mpe bafandaka ndako moko, esɛngi kaka te báyokana mpo na libala.”

OMITUNA BOYE: Bamaladi oyo eutaka na kosangisa nzoto mpe konyokwama na makanisi, eyaka na kosangisa nzoto liboso ya kobala to nsima ya kobala?​—1 Bakorinti 6:18.

Danemark

Ezali mpasi mpo moto oyo aswanaka mingi na bato ya libota na ye alekisa mbula 50 ya bomoi. Bato ya mayele na iniversite ya Copenhague basalaki ankɛtɛ na boumeli ya mbula 11 epai ya bato 10 000 oyo balekisi naino mbula 50 te, bamonaki ete baoyo bazalaki koswana mingi na bato ya mabota na bango bazalaki na likama mingi ya kokufa liwa ya mobesu koleka baoyo bazalaki na matata mpenza te na bato ya mabota na bango. Moko ya bato oyo basalaki ankɛtɛ yango alobi ete kosilisa mitungisi, mikakatano mpe matata “ekoki kozala likambo ya malamu ya kosala mpo na kokima liwa ya mobesu.”

BIBLIA ELOBI BOYE: “Moto nyonso oyo apekisaka maloba na ye azali na boyebi, mpe moto ya bososoli azali na elimo ya kimya.”​—Masese 17:27.

États-Unis

Ankɛtɛ moko oyo euti kosalema na Louisiane epai ya bato 564 oyo babalaki sika emonisi ete bafianse oyo bakabwanaka mpe bazonganaka mbala na mbala ezali mpasi te bákabwana liboso bákokisa mbula mitano ya libala. Bazalaka na matata mingi mpe basepelaka mpenza te na libala na bango.

BIBLIA ELOBI BOYE: “Oyo Nzambe akangisi esika moko [na libala] moto akabola yango te.”​—Matai 19:6.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto