OYO OKOKI KOSALA NTANGO NTALO YA BILOKO EZALI KOMATA
Yebá ete okoki kobongola makambo te
Ntango ntalo ya biloko ezali komata se komata, mbala mosusu tokoki komona yango te, mingimingi soki mbongo oyo bafutaka biso na nsuka ya sanza mpe emati. Nzokande, ntango ntalo ya biloko ezali se komata, kasi mbongo oyo bafutaka biso na nsuka ya sanza ebakisami te, tokoki komitungisa, mingimingi soki tozali na libota.
Tokoki te kopekisa ntalo ya biloko emata. Kasi tokozwa matomba mingi soki tondimi ete tokoki kobongola makambo te.
MPO NA NINI EZALI NA NTINA
Soki toyebi ete tokoki te kopekisa ntalo ya biloko emata . . .
tokozala motema ya kokita. Soki tozali motema ya kokita, tokokanisa malamu mpe tokozwa bikateli ya bwanya.
tokoboya mimeseno ya mabe. Na ndakisa, ekozala likambo ya bwanya te koboya kofuta bafaktire na biso to mpe kosomba biloko oyo tozali mpenza na mposa na yango te.
tokoboya kobendana na bato ya libota kaka mpo na makambo ya mbongo.
tokoyeba makambo oyo tokoki kosala mpo na kosomba biloko oyo tosengeli mpenza na yango, na esika ya kobebisa mbongo na biloko oyo ezali mpenza na ntina te.
OYO OKOKI KOSALA
Yebá komesana na makambo ya sika. Ntango ntalo ya biloko ezali komata, ekozala malamu koboya kobebisa mbongo na makambo oyo ezangá ntina. Bato mosusu balukaka kobebisa mbongo mingi koleka oyo bazwaka, mpe yango ekómisaka lisusu bomoi na bango mpasi. Nsukansuka, balɛmbaka nzoto. Soki ozali na libota, okoki mpe komitungisa mpo na oyo etali kokokisa bamposa na bango. Kasi kobosana te likambo oyo: Bato ya libota na yo bazalaka na mposa ete omonisela bango bolingo, olekisaka ntango elongo na bango, mpe otyelaka bango likebi koleka makambo mosusu nyonso.
Bato mosusu balukaka kobebisa mbongo mingi koleka oyo bazwaka, mpe yango ekómisaka lisusu bomoi na bango mpasi