Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • g25 No. 1 nk. 6-9
  • Salelá mbongo na yo na mayele

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Salelá mbongo na yo na mayele
  • Lamuká!—2025
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • MPO NA NINI EZALI NA NTINA
  • OYO OKOKI KOSALA
  • Okosala nini soki ozali lisusu na mbongo mingi te?
    Makambo mosusu
  • 2 Batelá mbongo mpe biloko na yo ya kobikela
    Lamuká!—2022
  • Ndenge nakoki kosalela mbongo malamu
    Mituna oyo bilenge batunaka—Biyano oyo ebongi, Volimi 2
  • Nasala nini mpo natika bisombasomba?
    Mituna oyo bilenge batunaka
Makambo mosusu
Lamuká!—2025
g25 No. 1 nk. 6-9
Bililingi: 1. Baboti bafandi na mesa mpe bazali kolobela makambo etali mbongo na bango mpe mwana na bango ya mwasi afandi na esika oyo balambaka. 2. Batye telefone mpe calculatrice likoló ya bafaktire mpe ba-reçu.

OYO OKOKI KOSALA NTANGO NTALO YA BILOKO EZALI KOMATA

Salelá mbongo na yo na mayele

Ntango ntalo ya biloko ezali se komata, yango ekoki kobimisela biso nyonso mikakatano. Kasi osengeli kobanga te. Ezali na eloko oyo okoki kosala mpo na kobongola makambo.

MPO NA NINI EZALI NA NTINA

Soki osaleli mbongo na yo na mayele te, yango ekoki kobakisela yo mikakatano mpe mitungisi. Ata soki ozali na mbongo mingi te, ezali na makambo ebele oyo okoki kosala mpo ozala na mikakatano mingi te ya mbongo.

OYO OKOKI KOSALA

Kobebisa mbongo mpambampamba te. Soki osali bongo, okozala motema ya kokita, mpe ntango mposa ya kosomba eloko moko ekomonana, okozanga mbongo te ya kosomba yango.

Mpo oyeba kosalela mbongo na yo na mayele, bongisá ndenge ya kosalela yango, elingi koloba, komá motángo ya mbongo oyo ozwaka mpe oyo osengeli kosalela. Nsima ya kosala bongo, omindimisa ete ozali kobimisa mbongo mpo na kosomba kaka biloko oyo osengeli na yango. Na nsima, salá nyonso mpo osala makambo kaka ndenge okomaki, okoki kobongola yango kaka soki mbongo oyo ozwaka to mpe ntalo ya biloko ebongwani. Soki obalá, sololá ná molongani na yo mpo na ekateli nyonso oyo olingi kozwa.

Meká kosala boye: Na esika ya kosomba biloko na nyongo, soki likoki ezali, sombá yango na mbongo. Bato mosusu bamonaka ete kosala bongo esalisaka bango básalela mbongo na bango na mayele mpe bákɔtaka nyongo te. Lisusu, zwáká ntango ya kotala motángo ya mbongo oyo obombá na banki mpe oyo obimisaka. Soki oyebi motángo ya mbongo oyo ozali na yango, okomitungisa mingi te.

Kosalela mbongo na mayele ekoki kozala mpasi, kasi okoki kolonga soki oyebi kobongisa makambo malamu. Yango ekoki mpe kosalisa yo mpo omitungisaka mingi te.

‘Yebá mosolo boni yango ekosɛnga.’—Luka 14:28.


Salá makasi mpo na kobatela mosala na yo. Makambo nini ya sikisiki okoki kosala mpo na kobatela mosala na yo? Talá mwa makambo oyo okoki kosala: Kómáká na ngonga na mosala. Sepeláká na mosala na yo. Monisáká ete ozali na mposa ya kosalisa, mpe saláká mosala makasi. Zalá na limemya. Tosáká mibeko ya mosala, mpe salá makasi mpo okolisa mayele na mosala.


Boyá kobebisa mbongo mpambampamba. Omituna boye: ‘Mbala mingi, nabebisaka mbongo mingi na makambo oyo ezangá ntina, to mpe na makambo oyo ezali mabe mpo na sante na ngai moko?’ Na ndakisa, bato mingi babebisaka mbongo oyo bazwi na motoki na bango mpo na kosomba drɔgɛ, kobɛta masano ya mbongo, komɛla makaya mpe komɛla masanga mingi. Bizaleli yango ya mabe ekoki kobebisa sante na bango ata mpe kosala ete babungisa misala na bango.

“Esengo na moto oyo azwi bwanya . . . ezali na litomba koleka kozwa palata.”—Masese 3:​13, 14.


Bombáká mbongo mpo na makambo ya mpasi oyo ebimaka na mbalakaka. Soki esengeli, bombáká mwa mbongo mpo na makambo oyo ekanami te to mpe mpo na makambo ya mpasi oyo ebimaka na mbalakaka. Mbongo yango ekoki kosalisa yo to mpe ndeko moko ya libota ntango abɛli na mbalakaka, ntango obungisi mosala, to mpe ntango makambo mosusu oyo ekanamaki te ebimi.

“Ntango ná makambo oyo ekanami te ekómelaka [biso] nyonso.”—Mosakoli 9:11.

Toli oyo ekosalisa yo obatela mbongo

Molangi moko etondi na mbongo ya bibende.

Lambáká mingimingi bilei na ndako.

Kozala na ezaleli ya kolya na restora to mpe kosomba biloko oyo balambá to biloko ya komɛla, elyaka mbongo mingi. Ya solo, kolamba biloko na ndako esɛngaka ntango mpe makasi mingi, kasi ekoki kosalisa yo obatela mbongo. Okolamba mpe bilei na ndenge oyo ekosalisa yo ozala na sante ya malamu.

Kanisáká malamu liboso ya kosomba.

  • Salá liste ya biloko ya kosomba, mpe landá kaka liste yango. Boyá bisombasomba.

  • Luká kosomba biloko mingi na ntalo moke soki ozali na mbongo ya kosomba yango. Omindimisa ete okobatela malamu biloko oyo epolaka mpo ebebisama te.

  • Lukáká kosomba biloko oyo ezali na ntalo ya nse soki ezali ya malamu.

  • Sombáká biloko na nzela ya Internet, mpo oboya kosomba biloko oyo okanaki te na magasin, mpe saleláká mbongo na yo na mayele. Soki na esika ofandi basombaka biloko na nzela ya Internet, okanisi ete okoki kosala yango?

  • Lukáká bisika oyo basali ba-solde ya biloko, mpe salelá ba-coupons soki ezali. Kokanisáká ntalo ya biloko liboso ya kosomba, na ndakisa, ntalo ya kura, ya gaz, to mpe ya mai.

Kanisáká malamu liboso ya kosomba biloko ya sika oyo ebimi

Mbala mingi, bakompanyi oyo esalaka batelefone to mpe baaparɛyi mosusu ebimisaka midɛlɛ ya sika mpo na kobɛnda bakliya mbongo. Na yango, omituna boye: ‘Ezali mpenza na ntina nasomba biloko ya sika oyo ebimi? Mpe soki esengeli ete nasomba yango, ebongi kaka nasomba yango mbala moko?’

Kobongisa mpe kosalela lisusu biloko ya kala.

Bateláká mpe bongisáká malamu biloko na yo mpo eumela, mpe ntango ebebi, soki kobongisa yango ekolya yo mbongo mingi te, salá yango. Okoki mpe kosomba biloko oyo basí basalelá.

Lonáká biloko na yo moko.

Okoki kobongisa mwa esika mpo na kosala mwa elanga na yo moko? Yango ekosalisa yo mpo osombaka te biloko nyonso. Lisusu, ekosalisa yo mpo otɛkaka yango mpe osalaka mwa mombongo. Longola yango, okozanga te eloko ya kokabela basusu.

“Mikano ya moto oyo asalaka mosala makasi ememelaka ye litomba.”—Masese 21:5.

Carte de crédits.

“Mbala na mbala, tolukaka koyeba ntalo ya biloko oyo tosombaka, mpe tosalelaka na mayele mbongo na biso oyo tobombá na banki.”—Miles, Angleterre.

Cahier, ekomeli, mpe bafungola ya motuka.

“Liboso ya kokende kosomba biloko, ngai ná libota na ngai tosalaka liste ya biloko oyo tokosomba.”—Jeremy, ÉTATS-UNIS

Programe ya mokolo na mokolo.

“Liboso ya kosomba mwa eloko, mbala na mbala, toyebisaka libota na biso motángo ya mbongo oyo tozali na yango, mpe tobombaka mwa mbongo mpo na makambo oyo ebimaka na mbalakaka.”—Yael, Israël.

Clé à molete mpe tournevis.

“Toteyaka bana na biso kobongisa biloko oyo ebebi na esika ya kosomba biloko ya sika. Na ndakisa, motuka mpe baaparɛyi oyo tosalelaka na ndako. Ngai ná mwasi na ngai tosalaka makasi tóboya kosomba biloko ya sika oyo ebimi.—Jeffrey, ÉTATS-UNIS.

“Nasalelaka mbongo mingi te mpo nalonaka bandunda mpe nabɔkolaka bansoso. Nakabelaka mpe bato mosusu bandunda oyo nalonaka.”—Hono, Myanmar

Mobali moko azali kobuka bandunda ndenge na ndenge na mwa elanga na ye.
    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto