Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 30-lok. 34
  • Armagedone

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Armagedone
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Masolo mosusu
  • Armagedon ekoya ntango nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1990
  • Armagedona: Ebandeli ya mokili moko ya esengo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Armagedone ekobanda nde na Israël?​—Biblia elobi nini?
    Makambo mosusu
  • Mituna ya batángi
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 30-lok. 34

Armagedone

Ndimbola: Liloba ya Grɛki Har Magedon, euti na Ebre. Bato mingi babongoli yango “Armagedone,” mpe yango elimboli “Ngomba ya Megido,” to “Ngomba oyo Mampinga eyangani.” Biblia esaleli nkombo yango mpo na kolobela etumba ya nikleere te, kasi nde mpo na kolobela “etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso” oyo ekoyela mokili mobimba. (Em. 16:14, 16) Liloba yango elobeli mpenza nde “esika [na Grɛki, topon; elingi koloba, ezaleli to lolenge moko boye]” oyo bakonzi ya politiki ya mokili bayangani mpo na kotɛmɛla Yehova mpe Bokonzi na ye oyo etambwisami na Yesu Kristo. Botɛmɛli yango ekomonana ntango bango nyonso bakoluka kobundisa basaleli ya Yehova oyo bazali bamonisi ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele.

Nzambe akotika bato bábebisa mabele na etumba oyo bato mosusu babengaka “etumba ya nikleere ya Armagedone”?

Nz. 96:10: “Yehova ye moko akómi mokonzi. Mabele oyo ebotaka [na Ebre, tevel; mabele oyo ebotaka mpe esika bato bafandi, mokili esika bato bakoki kofanda] epikami mpe makasi, boye ekoki kotengatenga te.”

Nz. 37:29: “Bayengebene bakozwa mabele, mpe bakofanda wana seko.”

Em. 11:18: “Bikólo basilikaki, mpe nkanda na yo [ya Yehova] eyaki, ná ntango oyo etyamá mpo . . . obebisa baoyo bazali kobebisa mabele.”

Armagedone oyo Biblia elobeli ezali nini?

Em. 16:14, 16: “Ya solo, yango ezali maloba oyo euti na bademo mpe ezali kosala bilembo, mpe ezali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso. Mpe bayanganisaki bango na esika oyo babengi na Ebre ete Har–Magedone [Armagedone].”

Etumba ya Armagedone ekosalema kaka na Moyen-Orient?

Bakonzi mpe mampinga ya bikólo nyonso bakoyangana mpo na kotɛmɛla Nzambe

Em. 16:14: “Ezali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”

Em. 19:19: “Namonaki nyama mabe [boyangeli ya politiki ya mokili mobimba] mpe bakonzi ya mabele mpe mampinga na bango bayangani mpo na kobunda etumba na moto oyo afandi likoló ya mpunda mpe na limpinga na ye.”

Yir. 25:33: “Baoyo babomami na Yehova bakozala na mokolo yango uta nsuka moko ya mabele tii na nsuka mosusu ya mabele.”

Nkombo Armagedone (Har–Magedone) emonisi te ete etumba yango ekosalema mpenza na Ngomba ya Megido

Ngomba Megido ezali te, kasi esika engumba Megido ezalaká, ezali na mwa ngomba moke ya bolai ya mɛtrɛ 21, esika okokuta mabondo ya bandako oyo ebukaná.

Bakonzi ná mampinga ya basoda ya “mabele mobimba esika bato bafandi” bazali mingi, bakoki kokoka te na mokili patatalu ya Esdrelon, oyo ezali na nse ya Megido. Mokili patatalu yango ezali triangle, ezali na bolai ya kilomɛtrɛ 32 mpamba mpe bonene na yango na nsuka ya ɛsti ezali kaka kilomɛtrɛ 29.​—The Geography of the Bible (New York, 1957), Denis Baly, lok. 148.

Nkombo yango ebongi mpenza soki totaleli makambo oyo esalemaki na Megido; bazalaki kobunda bitumba minene na lobwaku oyo ezalaki na nse ya Megido

Ezali kuna nde Yehova asalisaki mosambisi Barake alonga Sisera, mokonzi ya mampinga ya Bakanana.​—Bas. 5:19, 20; 4:12-24.

Thoutmès III, Farao ya Ezipito, alobaki ete: “Kozwa Megido ezali lokola kozwa bingumba nkóto!”​—Ancient Near Eastern Texts Relating to the Old Testament (Princeton, N.J.; 1969), ya James Pritchard, lok. 237.

Nkombo Megido (oyo elimboli “Mampinga eyangani”) ebongi mpenza, mpo Armagedone ezali likambo oyo ekosalema na mokili mobimba ntango mampinga ná bato oyo bazali kopesa bakonzi ya mokili mobimba mabɔkɔ bakoyangana mpo na kotɛmɛla Yehova mpe Bokonzi na ye oyo apesi Yesu Kristo.

Na Armagedone, nini ekobomama to nani akobomama?

Dan. 2:44: “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko . . . Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”

Em. 19:17, 18: “Namonaki mpe anzelu moko atɛlɛmi na kati ya moi, mpe agangaki na mongongo makasi mpe alobaki na bandɛkɛ nyonso oyo ezali kopumbwa na katikati ya likoló ete: ‘Bóya awa, bóyangana na fɛti monene ya mpokwa oyo Nzambe asali, mpo bólya misuni ya bakonzi mpe misuni ya bakomanda ya basoda mpe misuni ya bato ya makasi mpe misuni ya bampunda mpe ya baoyo bafandi likoló na yango, mpe misuni ya bato nyonso, ya bato ya bonsomi mpe ya baombo mpe ya bato mike mpe ya bato minene.’”

1 Yoa. 2:16, 17: “Eloko nyonso oyo ezali na mokili​—mposa ya nzoto mpe mposa ya miso mpe kolakisa na lolendo biloko ya kobikela—​euti na Tata te, kasi euti na mokili. Lisusu, mokili ezali koleka ndenge moko mpe mposa na yango, kasi moto oyo azali kosala mokano ya Nzambe azali kotikala libela na libela.”

Em. 21:8: “Bato ya bibangabanga ná baoyo bazangi kondima ná baoyo bazali na bosɔtɔ mpe na mbindo ná babomi-bato ná bato ya pite ná baoyo basalaka misala ya bilimo mabe ná basambeli ya bikeko ná bato nyonso ya lokuta, likabo na bango ekozala na kati ya laki oyo ezali kopela na mɔtɔ mpe na sufulu. Yango elakisi liwa ya mibale.”

Kobomama yango ekozala kobomama ya libela?

Mat. 25:46: “Bango [baoyo baboyaki kosalisa “bandeko” ya Kristo] bakokufa liwa ya seko.”

2 Tes. 1:8, 9: “Baoyo bayebi Nzambe te mpe baoyo bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu . . . bakozwa etumbu ya lisambisi ya libebi ya seko.”

Ezali na bato oyo bakobika?

Sef. 2:3: “Bóluka Yehova, bino nyonso bato ya komikitisa ya mabele, oyo botosi ekateli na Ye ya lisambisi. Bóluka boyengebene, bóluka komikitisa. Ntango mosusu bokobombama na mokolo ya nkanda ya Yehova.”

Rom. 10:13: “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”

Nz. 37:34: “Tyelá Yehova elikya mpe batelá nzela na ye, mpe ye akotombola yo mpo na kozwa mabele. Ntango bato mabe bakobomama, yo okomona yango.”

Yoa. 3:16: “Nzambe . . . apesaki Mwana na ye se moko oyo abotamaki, mpo moto nyonso oyo azali kondimela ye abomama te kasi azwa bomoi ya seko.”

Em. 7:9, 10, 14: “Namonaki, mpe talá! ebele mpenza ya bato, oyo ata moto moko te akokaki kotánga, bauti na bikólo nyonso mpe na mabota nyonso mpe na bato ya mikili nyonso mpe na minɔkɔ nyonso, batɛlɛmi liboso ya kiti ya bokonzi mpe liboso ya Mwana-Mpate, balati bazambala ya mpɛmbɛ; mpe basimbi mandalala na mabɔkɔ. Mpe bazali kokoba koganga na mongongo makasi ete: ‘Lobiko na biso euti na Nzambe na biso, oyo afandi na kiti ya bokonzi, mpe na Mwana-Mpate.’ . . . ‘Bango bazali bato oyo bauti na bolɔzi monene.’”

Bana mike bakokufa na Armagedone to te?

Biblia epesi eyano ya polele te na motuna yango, mpe biso bato tokokata likambo yango te. Atako bongo, Biblia emonisi ete Nzambe amonaka ete bana ya bakristo ya solo bazali “basantu.” (1 Ko. 7:14) Biblia emonisi mpe ete kala, ntango Nzambe abomaki bato mabe abomaki mpe bana na bango. (Mit. 16:27, 32; Ezk. 9:6) Nzambe alingi te ete moto moko abomama, yango wana lelo oyo azali kokebisa baboti ná bana bango mpo bábika. Soki baboti balandi nzela oyo ekosala ete Nzambe andima bana na bango lelo oyo mpe ntango Armagedone ekoya, yango ekomonisa ete bazali na bwanya, boye te?

Lokola Nzambe azali mpenza bolingo, mpo na nini akoboma bato mabe?

2 Pe. 3:9: “Yehova . . . azali nde komonisela bino motema molai mpo alingi moto ata moko te abomama kasi alingi nde bato nyonso bábongola motema.”

Luka 18:7, 8: “Akosala te ete likambo ya bato na ye oyo aponaki, oyo babelelaka ye butu moi, ekatama na bosembo atako azali komonisela bango motema molai? Nazali koyebisa bino ete: Akosala ete likambo na bango ekatama na bosembo nokinoki.”

2 Tes. 1:6: “Ezali likambo ya boyengebene mpo na Nzambe kozongisa bolɔzi na baoyo bazali kobimisela bino [basaleli na ye] bolɔzi.”

Ekoki kosalema ete moto azala na ngámbo ya Nzambe te mpe na ngámbo ya mokili te?

2 Tes. 1:8: ‘Akozongisa mabe na baoyo baboyi koyeba Nzambe [na nko] mpe baoyo bazali kotosa te nsango malamu oyo etali Nkolo na biso Yesu.’

Mat. 24:37-39: “Ndenge ezalaki na mikolo ya Noa . . . batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso, kozala ya Mwana ya moto ekozala mpe bongo.”

Mat. 12:30: “Moto oyo azali na ngámbo na ngai te azali monguna na ngai, mpe moto oyo azali kosangisa elongo na ngai te azali kopanza.”

Talá Kolimbola Mibeko 30:19, 20.

Nani azali kopesa bikólo ya mokili mobimba makanisi ya kobundisa Nzambe?

Em. 16:13, 14: “Mpe namonaki maloba misato ya elimo ya mbindo oyo ezalaki lokola mbemba ezali kobima na monɔkɔ ya dragɔ [Satana Zabolo; Em. 12:9] mpe na monɔkɔ ya nyama mabe mpe na monɔkɔ ya mosakoli ya lokuta. Ya solo, yango ezali maloba oyo euti na bademo mpe ezali kosala bilembo, mpe ezali kokende epai ya bakonzi ya mabele mobimba esika bato bafandi, mpo na koyanganisa bango mpo na etumba ya mokolo monene ya Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso.”

Talá Luka 4:5, 6; 1 Yoane 5:19; talá mpe Misala 5:38, 39; 2 Ntango 32:1, 16, 17.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto