Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • rs lok. 277-lok. 288
  • Lingomba

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Lingomba
  • Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Soki moto alobi​—
  • Losambo oyo Nzambe andimaka
    Biblia eteyaka mpenza nini?
  • Lingomba ya solo​—Osili komona yango?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Tosalela losambo na solo mpo na lobiko na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • Ndenge ya malamu ya kosambela Nzambe
    Makambo oyo Biblia eteyaka
Makambo mosusu
Ndenge ya kosolola na bato na Makomami
rs lok. 277-lok. 288

Lingomba

Ndimbola: Lolenge moko boye ya kosambela. Esangisi makanisi, bindimeli, mpe misala oyo eyokani na makambo ya losambo; makambo yango ekoki kouta na moto ye moko to na lisangá moko boye. Mbala mingi, lingomba etindaka bato bándimela Nzambe to banzambe; to mpe etindaka bango bátalela bato, biloko, bamposa to nguya ete ezali biloko oyo basengeli kosambela. Mangomba mingi eutaka na makanisi ya bato nsima ya koyekola biloko oyo Nzambe akelá; mosusu eutaka na bato oyo balobaka ete Nzambe amonisá bango makambo. Lingomba ya solo ezali, ya lokuta mpe ezali.

Mpo na nini mangomba ezali mingi boye?

Ankɛti moko ya mikolo oyo emonisi ete mangomba ya minene ezali 19 mpe mwa mangomba ya mikemike 10 000. Na Afrika bazwaki mwa mangomba mikemike soki 6 000, na États-Unis soki 1 200, bankama mosusu na mikili mosusu.

Makambo mingi esali ete ebele ya mangomba ya sika ebima. Bato mosusu balobaka ete mangomba nyonso ezali kaka banzela ndenge na ndenge mpo na komonisa solo ya Nzambe. Kasi soki okokanisi mateya mpe misala na yango na oyo Biblia elobi, okomona ete mangomba ezali mingi mpo bato bazali kolanda makanisi ya bato na esika ya koyokela Nzambe. Simbá ete mateya oyo bato ya mangomba yango bandimaka, kasi oyo eyokani te na Biblia euti mingimingi na Babilone ya kala. (Talá nkasa 36, 37, na motó ya likambo “Babilone Monene.”)

Nani azali mobandisi ya mobulungano oyo ezali na mangomba? Biblia emonisi ete ezali Satana Zabolo oyo azali “nzambe ya makambo ya ntango oyo.” (2 Ko. 4:4) Eyebisi biso ete “biloko oyo bikólo bapesaka mbeka, bapesaka yango mbeka na bademo, kasi na Nzambe te.” (1 Ko. 10:20) Na yango, ezali na ntina mpenza tóyeba soki tozali kosambela Nzambe ya solo, Mozalisi ya likoló ná mabele, mpe soki tozali kosambela ye na ndenge oyo alingi!

Nzambe andimaka mangomba nyonso?

Bas. 10:6, 7: “Bana ya Yisraele bakómaki lisusu kosala oyo ezali mabe na miso ya Yehova, mpe babandaki kosalela Babaala mpe bikeko ya Ashitorete, banzambe ya Siri, banzambe ya Sidone, banzambe ya Moabe, banzambe ya bana ya Amone ná banzambe ya Bafilistia. Bongo batikaki Yehova mpe basalelaki ye te. Na yango, nkanda ya Yehova epelelaki Yisraele.” (Soki moto azali kosambela eloko moko boye to moto moko boye na esika ya kosambela Nzambe ya solo, Mozalisi ya likoló ná mabele, emonani polele ete Yehova andimaka losambo ya moto yango te.)

Mrk. 7:6, 7: “[Yesu] alobaki na bango [Bafarisai ná bakomeli] ete: ‘Yisaya asakolaki malamu mpo na bino, bakosi, se ndenge ekomamá: “Bato oyo bazali kokumisa ngai na mbɛbu na bango, kasi mitema na bango ezali mosika na ngai. Bazali kokoba kosambela ngai kaka mpamba, mpo mateya oyo bazali koteya ezali nde mibeko ya bato.”’” (Ata soki bato ya lingomba bazali kotuta ntolo ete basambelaka, soki bakangami kaka na mateya ya bato na esika ya Liloba ya Nzambe oyo ekomami na litambwisi ya elimo na ye, bazali kosambela Nzambe kaka mpamba.)

Rom. 10:2, 3: “Nazali kotatwela bango ete bazali na molende mpo na Nzambe; kasi nde na boyebi ya solosolo te; mpo lokola bayebi boyengebene ya Nzambe te kasi bazali koluka kotya oyo ya bango moko, batosaki boyengebene ya Nzambe te.” (Bato bakoki kozala na Liloba ya Nzambe kasi bazangi boyebi ya solosolo ya Liloba yango mpo bateyamaki malamu te. Bakoki kokanisa ete bazali kosambela Nzambe na molende, kasi ekoki kozala ete bazali kosala te oyo azali kosɛnga; yango wana losambo na bango ekosepelisa Nzambe te, boye te?)

Ezali solo ete lingomba nyonso ezalaka na makambo ya malamu?

Mangomba mingi eteyaka ete moto asengeli kobuka lokuta te, koyiba te mpe bongo na bongo. Kasi yango ekoki? Okosepela komɛla mai oyo ezali na pwazɔ mpo bayebisi yo ete mai yango ezali kaka na mwa pwazɔ moke?

2 Ko. 11:14, 15: “Satana ye moko azali kokoba komimonisa lokola anzelu ya pole. Bongo ezali likambo monene te soki basali na ye mpe bazali kokoba komimonisa lokola basali ya boyengebene.” (Vɛrsɛ oyo ekebisi biso ete, eloko oyo euti na Satana, mbala mosusu ekoki komonana mpenza mabe te. Moko ya mayele na ye ya kokosa bato ezali nde mangomba ya lokuta ya lolenge nyonso oyo ezali komonana ete ezali malamu.)

2 Tim. 3:2, 5: ‘Bato . . . bakomonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango; mpe yo kimá bato wana.’ (Soki bato oyo ozali na bango lingomba moko bazali kotosa Liloba ya Nzambe te na bomoi na bango, ata soki batutaka ntolo ete balingaka Nzambe, Biblia esɛngi yo okabwana na bango.)

Ezali mabe kotika lingomba ya baboti?

Soki makambo oyo baboti bateyaki biso euti na Biblia, tosengeli kokangama na yango. Ata soki toyebi ete makambo oyo baboti na biso basalaka mpe bandimaka eyokani na Liloba ya Nzambe te, tosengeli kaka kotosa bango. Kasi okosala nini soki oyekoli ete bizaleli mosusu ya baboti na yo ezali likama mpo na kolɔngɔnɔ ya nzoto na bango mpe ekoki koboma bango noki? Okomekola bango mpe okolendisa bana na yo bámekola bango, to okoyebisa nde bango na limemya makambo oyo oyekoli? Ndenge moko mpe, koyeba solo oyo ezali na kati ya Biblia epesaka moto mokumba ya koyebisa yango basusu. Soki likoki ezali, tosengeli koyebisa bandeko ya libota na biso makambo oyo toyekoli. Tosengeli kopona: Tolingi mpenza Nzambe? Tolingi mpenza kotosa Mwana ya Nzambe? Mbala mosusu yango ekotinda biso tótika lingomba ya baboti mpo na kokɔta na losambo ya solo. Ebongi te ete botosi na biso epai ya baboti eleka bolingo oyo tozali na yango epai ya Nzambe mpe Kristo, boye te? Yesu alobaki ete: “Moto oyo alingi tata to mama koleka ngai abongi na ngai te; mpe moto oyo alingi mwana mobali to mwana mwasi koleka ngai abongi na ngai te.”​—Mat. 10:37.

Yos. 24:14: “Mpe sikoyo, bóbanga Yehova mpe bósalela ye na bosembo mpe na bosolo, mpe bólongola banzambe oyo bankɔkɔ na bino basalelaki na ngámbo mosusu ya Ebale mpe na Ezipito, mpe bósalela Yehova.” (Yango elimboli ete basengelaki kotika lingomba ya bankɔkɔ na bango, boye te? Mpo básambela Yehova malamu, basengelaki kolongola bikeko nyonso oyo basalelaki na lingomba na bango ya kala mpe kolongola na mitema na bango mposa nyonso ya biloko yango.)

1 Pe. 1:18, 19: “Boyebi ete ezalaki te na biloko oyo epɔlaka, na palata to na wolo, nde bosikolamaki na etamboli na bino oyo ebotaka mbuma te oyo bozwaki na mimeseno oyo eutaki na bankɔkɔ na bino. Kasi ezalaki nde na makila moko ya motuya, lokola oyo ya mwana-mpate ezangi mbeba mpe ezangi litɔnɔ, ɛɛ oyo ya Kristo.” (Na yango, bakristo ya liboso batikaki makambo ya bankɔkɔ na bango, oyo ekokaki kopesa bango bomoi ya seko te. Botɔndi mpo na mbeka ya Kristo etindaki bango bálongola eloko nyonso oyo esalaki ete bábota mbuma te na bomoi na bango, oyo esalaki ete bomoi na bango ezala na ntina te mpo bazalaki kokumisa Nzambe te. Tosengeli komekola bango, boye te?)

Ndenge nini Biblia etalelaka likambo ya kosangisa losambo?

Ndenge nini Yesu azalaki kotalela bakonzi ya mangomba oyo bazalaki kotuta ntolo ete bazali sembo nzokande bazalaki kotosa Nzambe te? “Yesu alobaki na bango ete: ‘Soki Nzambe azalaka Tata na bino, mbɛlɛ bolingi ngai, mpo uta na Nzambe nde ngai nabimi mpe nazali awa. Nayaki mpe na ndenge na ngai moko te, kasi Moto wana nde atindaki ngai. . . . Bino bouti na tata na bino Zabolo, mpe bolingi kokokisa bamposa ya tata na bino. Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki, mpe akangamaki makasi te na solo, mpo solo ezali na kati na ye te. Ntango alobaka lokuta, alobaka na kolanda makanisi na ye moko, mpo azali moto ya lokuta mpe tata ya lokuta. Kasi ngai, lokola nalobaka solo, bozali kondima ngai te. . . . Yango wana bino bozali koyoka te, mpo bouti na Nzambe te.’”​—Yoa. 8:42-47.

Basaleli ya Nzambe bakomonisa ete bazali sembo epai ya Nzambe mpe bazali kotosa mitinda na ye ya sembo soki basangani na bato ya mangomba mosusu oyo bazali kosala makambo oyo Nzambe aboyi to soki bandimi na lingomba na bango makambo oyo Nzambe aboyi? “Bótika kosangana na moto nyonso oyo abengami ndeko, oyo azali moto ya pite to moto ya lokoso to mosambeli ya bikeko to mofingi to molangwi-masanga to mobɔtɔli, bólya kutu esika moko na moto ya ndenge wana te. . . . Ezala bato ya pite, basambeli ya bikeko, bato ya ekobo, mibali oyo bazwamá mpo na kosangisaka na bango nzoto na ndenge oyo ebongisamá te, mibali oyo balalaka na mibali, miyibi, bato ya lokoso, balangwi-masanga, bafingi, mpe babɔtɔli bakozwa libula ya bokonzi ya Nzambe te.” (1 Ko. 5:11; 6:9, 10) “Moto nyonso oyo alingi kozala moninga ya mokili azali komikómisa monguna ya Nzambe.” (Yak. 4:4) “Ee bino baoyo bolingaka Yehova, bóyina oyo ezali mabe. Ye abatelaka milimo ya bato na ye ya sembo; abikisaka bango na lobɔkɔ ya bato mabe.”​—Nz. 97:10.

2 Ko. 6:14-17: “Bókangana te na ekanganeli ya mabe esika moko na bato oyo bazali bandimi te. Mpo boninga nini ezali na kati ya boyengebene mpe kobuka mibeko? To pole ná molili esanganaka na nini? Lisusu, boyokani nini ezali kati na Kristo mpe Beliale? To eloko nini moto ya sembo azali na yango elongo na moto oyo azali mondimi te? Mpe boyokani nini ezali kati na tempelo ya Nzambe mpe bikeko? . . . ‘“Yango wana bóbima na kati na bango, mpe bókabwana,” Yehova alobi bongo, “mpe bótika kosimba eloko ya mbindo”’; ‘“mpe ngai nakoyamba bino.”’”

Em. 18:4, 5: “Nayokaki mongongo mosusu euti na likoló elobi ete: ‘Bóbima kati na ye, bato na ngai, soki bolingi te kosangana na ye na masumu na ye, mpe soki bolingi te kozwa ndambo ya malɔzi na ye. Mpo masumu na ye etondi tii na likoló, mpe Nzambe akanisi lisusu misala na ye oyo ezangi bosembo.’” (Mpo na koyeba makambo mosusu, talá motó ya likambo “Babilone Monene.”)

Kozala mondimi ya lingomba moko boye ezali na ntina?

Mangomba mingi ebimisi mbuma mabe. Ezali mabe te kosangana esika moko mpo na kosambela. Kasi mangomba mingi eteyaka mateya ya lokuta mpe elendisaka losambo oyo esimbami na milulu ndenge na ndenge na esika ya kopesa litambwisi ya elimo oyo bato basengeli na yango; mangomba yango ezali kokosa bato mpo na koluka matomba na yango moko; balukaka libosoliboso nde mbongo mpe batyaka likebi mingi nde na bandako-nzambe na bango ya mineneminene na esika ya makambo ya elimo. Mbala mingi bandimi na bango bazali na bokosi. Ezali solo ete moto nyonso oyo alingaka bosembo akosepela te kokɔta na mangomba ya ndenge wana. Kasi lingomba ya solo ekeseni mpenza na mangomba yango. Atako bongo, mpo lingomba ya solo ekokisa masɛngami ya Biblia, esengeli kobongisama malamu.

Ebr. 10:24, 25: “Tótyelanaka likebi mpo tólendisana mpo tózala na bolingo mpe tósala misala ya malamu, tótika koyanganaka na makita na biso te, ndenge bamosusu bamesaná kosala, kasi tólendisanaka, mpe tósalaka bongo mingi koleka awa tozali komona mokolo yango ezali kobɛlɛma.” (Mpo na kotosa mobeko yango ya Biblia, bakristo basengeli koyanganaka na makita ntango nyonso. Ebongiseli yango etindaka biso tólinganaka, na esika ya kotalela kaka makambo na biso.)

1 Ko. 1:10: “Nzokande nazali kolendisa bino, bandeko, na nkombo ya Nkolo na biso Yesu Kristo ete bólobaka bino nyonso na boyokani, mpe ete bokabwani ezala te na kati na bino, kasi bózala nde liboke moko mpenza na makanisi kaka moko mpe na motindo ya kokanisa kaka moko.” (Bomoko ya ndenge wana ekoki kozala te soki bato bazali koyangana esika moko te, soki bazali kolanda programɛ moko ya mateya te, mpe soki bazali kotosa te bato oyo Nzambe aponi mpo na kopesa mateya yango. Talá mpe Yoane 17:20, 21.)

1 Pe. 2:17: “Bólinga lisangá mobimba ya bandeko.” (Bandeko yango ezali kaka baoyo bazali koyangana na ndako ya moto moko boye mpo na kosambela? Te, ezali lisangá ya bandeko ya mokili mobimba, ndenge Bagalatia 2:8, 9 mpe 1 Bakorinti 16:19 emonisi yango.)

Mat. 24:14: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Mpo bato ya mabota nyonso bázwa libaku ya koyoka nsango malamu yango, mosala ya kosakola esengeli kosalema na molɔngɔ, mpe kotambwisama malamu. Kolinga Nzambe mpe bazalani nde etindaka bandeko na mabele mobimba básala milende mpo na kokokisa mosala yango.)

Talá mpe motó ya likambo “Ebongiseli.”

Kolinga mozalani ekoki?

Ntembe ezali te, bolingo ya ndenge wana ezali mpenza na ntina. (Rom. 13:8-10) Kasi kozala mokristo ezali kosɛnga makambo mingi, esuki kaka te na koyeba kofanda na bato. Yesu alobaki ete bayekoli na ye bakoyebana polele na bolingo, na ndenge bakolinga bandeko na bango bandimi. (Yoa. 13:35) Biblia ezali kolobela likambo yango mbala na mbala mpo na komonisa ete ezali na ntina mingi. (Gal. 6:10; 1 Pe. 4:8; 1 Yoa. 3:14, 16, 17) Nzokande, Yesu amonisaki ete likambo oyo eleki ezali nde kolinga Nzambe, yango emonanaka na kotosa mibeko na ye. (Mat. 22:35-38; 1 Yoa. 5:3) Mpo tómonisa bolingo ya lolenge wana, tosengeli koyekola Liloba ya Nzambe mpe kotosa yango na bomoi na biso mpe koyangana na bandeko na biso mpo na kosambela Nzambe.

Kozala na boyokani malamu na Nzambe ekoki?

Yango ezali likambo ya ntina mpenza. Boyokani oyo moto asengeli kozala na yango na Nzambe ezali na ntina mingi koleka momeseno ya kokende na milulu ya lingomba. Kasi tosengeli kokeba. Mpo na nini? Na siɛklɛ ya liboso, ezalaki na bato oyo bakanisaki ete bazali na boyokani malamu na Nzambe kasi Yesu alobaki ete bamikosaki mpenza. (Yoa. 8:41-44) Ntoma Paulo akomaki ete bato mosusu bazalaki na molende na makambo ya lingomba na bango mpe bakanisaki mpenza ete bazali na boyokani malamu na Nzambe, kasi bayebaki te oyo Nzambe azalaki kosɛnga mpo andima bango.​—Rom. 10:2-4.

Moto akoki nde kozala na boyokani malamu na Nzambe soki azali kotyola mibeko na ye? Moko na mibeko yango ezali ya koyangana ntango nyonso na bakristo mosusu.​—Ebr. 10:24, 25.

Kotánga Biblia yo moko ekoki?

Ezali solo ete bato mingi bakoki koyekola makambo ebele soki bango moko bazali kotánga Biblia. Soki mpenza balingi koyekola solo oyo etali Nzambe mpe mokano na ye, ezali malamu. (Mis. 17:11) Kasi, soki tokanisi malamu, biso moko tokoki mpenza koyeba ndimbola ya Biblia soki moto asalisi biso te? Biblia elobeli mobali moko ya lokumu, oyo na komikitisa mpenza, asɛngaki básalisa ye mpo akanga ntina ya esakweli moko ya Biblia. Ndeko moko ya lisangá ya bokristo nde asalisaki ye.​—Mis. 8:26-38; kokanisá yango na makambo Filipi asalaki oyo ezali na Misala 6:1-6; 8:5-17.

Ya solo, soki moto azali kotánga Biblia kasi azali kotosa te makambo oyo azali kotánga, akozwa litomba te. Soki andimi oyo Biblia ezali koloba mpe azali kotosa yango, akosangana na basaleli ya Nzambe na makita oyo basalaka mbala na mbala. (Ebr. 10:24, 25) Lisusu, akosangana na bango na mosala ya kosakola “nsango malamu.”​—1 Ko. 9:16; Mrk. 13:10; Mat. 28:19, 20.

Ndenge nini moto akoki koyeba lingomba ya solo?

(1) Mateya na yango eutaka wapi? Mateya na yango eutaka na Nzambe, to eutaka mpenza na bato? (2 Tim. 3:16; Mrk. 7:7) Na ndakisa omituna: Vɛrsɛ nini na Biblia elobi ete Nzambe azali Bosato? Vɛrsɛ nini elobi ete molimo ekufaka te?

(2) Eyebisaka bato nkombo ya Nzambe? Yesu abondelaki Nzambe boye: “Namonisi nkombo na yo polele na bato oyo ozwi na mokili mpe opesi ngai.” (Yoa. 17:6) Alobaki ete: “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.” (Mat. 4:10) Lingomba na yo eteyaka yo ete ‘osengeli kosambela nde Yehova Nzambe’? Oyebi mpenza nkolo nkombo yango​—mikano na ye, misala na ye, bizaleli na ye—​na ndenge oyo ekoki kotinda yo opusana penepene na ye na motema moko?

(3) Bandimi na yango bamonisaka mpenza ete bandimelaka Yesu Kristo? Yango esɛngi mpe komonisa botɔndi mpo na motuya ya mbeka ya bomoi oyo Yesu apesaki mpe mokumba ya Bokonzi oyo azali na yango kuna na likoló. (Yoa. 3:36; Nz. 2:6-8) Mpo na komonisa ete bazali kotɔnda Yesu mpe kotosa ye, basengeli komipesa na molende na mosala oyo Yesu apesaki bayekoli na ye. Bato ya lingomba ya solo bazalaka na kondima ya ndenge wana oyo emonanaka na misala.—Yak. 2:26.

(4) Bato basepelaka na lingomba yango kaka mpo na milulu ya losambo, to nde mpo ebongolaka mpenza bomoi ya bato? Nzambe asepelaka ata moke te na losambo ya milulu mpamba. (Yis. 1:15-17) Lingomba ya solo etosaka mitinda ya Biblia oyo esɛngi kozala na etamboli malamu mpe maloba ya pɛto na esika ya kolanda makambo oyo bato mingi basalaka. (1 Ko. 5:9-13; Ef. 5:3-5) Bandimi na yango bamonisaka mbuma ya elimo ya Nzambe na bomoi na bango. (Gal. 5:22, 23) Na yango, bato oyo basambelaka na lingomba ya solo bakoki koyebana mpo basalaka mpenza makasi ya kotosa mitinda ya Biblia na bomoi na bango, ezala na makita, na libota, na mosala, na kelasi, mpe ntango bazali na bisika ya kominanola.

(5) Bandimi na yango balinganaka mpenza? Yesu alobaki ete: “Na ndenge yango bato nyonso bakoyeba ete bozali bayekoli na ngai, soki bozali na bolingo na kati na bino.” (Yoa. 13:35) Bolingo yango eponi loposo te, ekólo te, mobola to mozwi te, mpe esangisaka bato na bondeko ya solosolo. Lokola bolingo yango ezali makasi, ekesenisaka bango mpenza na bato mosusu. Na ntango ya bitumba, banani balingaka mpenza bandeko na bango bakristo ya bikólo mosusu mpe baboyaka kozwa mandoki mpo na koboma bango? Bakristo ya liboso bazalaki na bolingo ya ndenge wana.

(6) Ekabwani mpenza na mokili? Yesu alobaki ete bayekoli na ye ya solo bakozala “bato ya mokili te.” (Yoa. 15:19) Mpo na kosambela Nzambe ndenge alingaka, tosengeli komibatela mpo ‘tózala te na litɔnɔ ya mokili.’ (Yak. 1:27) Bakonzi ya mangomba mpe bandimi na bango bakɔtaka na makambo ya politiki te? Bamipesaka na koluka biloko ya mokili mpe na bamposa ya nzoto te?​—1 Yoa. 2:15-17.

(7) Bandimi na yango basakolaka Bokonzi ya Nzambe na molende? Yesu asakolaki ete: “Nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.” (Mat. 24:14) Lingomba nini esakolaka mpenza ete Bokonzi ya Nzambe ezali elikya ya bato na esika ya kolendisa bato bátya elikya na bakonzi ya mokili mpo na kosilisa mikakatano na bango? Lingomba na yo esilá kobongisa yo mpo osangana na mosala yango mpe osala yango ndako na ndako ndenge Yesu ayebisaki bantoma na ye básala?​—Mat. 10:7, 11-13; Mis. 5:42; 20:20.

Batatoli ya Yehova bandimaka ete lingomba na bango nde lingomba kaka moko ya solo?

Talá lokasa 85, na motó ya likambo “Batatoli ya Yehova.”

Mpo na nini bato mosusu bazali na kondima nzokande basusu bazali na yango te?

Talá motó ya likambo “Kondima.”

Soki moto alobi​—

‘Nasepelaka na mangomba te’

Okoki koyanola: ‘Ezali kokamwisa ngai te, mpo bato mingi balobaka bongo. Kasi tiká natuna yo naino: Osepelaka na lingomba te banda kala?’ Okoki kobakisa: ‘Likambo moko oyo ekamwisaka ngai ezali ete mateya mingi ya minene oyo eteyamaka lelo na bandako-nzambe euti na Biblia te. (Okoki mbala mosusu kosalela makambo oyo ezali na nkasa 85, 86, na motó ya likambo “Batatoli ya Yehova,” lobelá mingi Bokonzi. Mpo na komonisa bokeseni, lobelá mateya ya Batatoli ya Yehova ndenge emonisami na nkasa 81, 82.)’

Talá mpe nkasa 16, 17.

‘Mangomba ezali na bokosi mingi’

Okoki koyanola: ‘Makambo olobi ezali solo. Bomoi ya bato mingi eyokanaka te na makambo oyo bango moko bateyaka. Kasi yebisá ngai: Ndenge nini omonaka Biblia? (Nz. 19:7-10)’

‘Nazali moto malamu. Nasalaka bato mabe te. Mpo na ngai, yango nde likambo ya ntina’

Okoki koyanola: ‘Lokola olobi ete ozali moto malamu, yango emonisi ete osepelaka na bomoi, boye te? . . . Okosepela kozala na bomoi oyo Emoniseli 21:4 elobeli? . . . Talá likambo oyo Yoane 17:3 elobi ete moto asengeli kosala mpo na kozwa bomoi yango.’

Talá mpe lokasa 282.

‘Nasepelaka na mangomba te. Mpo na ngai likambo ya ntina nde kozala na boyokani malamu na Nzambe’

Okoki koyanola: ‘Likanisi na yo esepelisi ngai. Okanisaka bongo banda kala? . . . Ozalaki mondimi ya lingomba moko kala? . . . (Okoki mbala mosusu kosalela mpe makambo oyo ezali na nkasa 281, 282.)’

‘Nayebi ete makambo mosusu oyo bateyaka na lingomba na biso ezali solo te, kasi namonaka ntina ya kokɔta na lingomba mosusu te. Esengeli kaka kobongisa makambo oyo ezali malamu te’

Okoki koyanola: ‘Nasepeli ndenge oyebisi ngai likambo yango. Kasi omoni te ete kondimama na Nzambe nde likambo eleki ntina?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Na Emoniseli 18:4, 5, Nzambe alobi likambo moko ya ntina oyo tosengeli kokanisa. . . . Ata soki tosalaka makambo mabe te, Biblia emonisi ete tokozala na ngambo soki tozali kopesa mangomba yango mabɔkɔ. (Talá mpe motó ya likambo “Babilone Monene.”)’ (2) (Okoki mbala mosusu mpe kosalela makambo oyo ezali na nkasa 283-285.) (3) ‘Nzambe alukaka bato oyo balingaka solo, mpe azali kosangisa bango mpo básambela ye na bomoko. (Yoa. 4:23, 24)’

‘Mangomba nyonso ezali malamu; yo ozali na oyo ya yo, ngai mpe nazali na oyo ya ngai’

Okoki koyanola: ‘Emonani mpenza ete ondimaka mpe makanisi ya bato mosusu. Kasi oyebi mpe ete tozali na mposa ete Liloba ya Nzambe etambwisa biso, mpe yango wana ozali na lingomba na yo, boye te?’ Okoki kobakisa: ‘Awa na Matai 7:13, 14, Biblia emonisi likambo moko ya ntina mingi oyo Yesu alobaki. (Tángá yango.) . . . Mpo na nini esengeli kozala bongo?’

Talá mpe nkasa 277, 278.

‘Ata soki ozali na lingomba nini, likambo ya ntina nde kondimela Yesu’

Okoki koyanola: ‘Ntembe ezali te, kondimela Yesu ezali likambo ya ntina. Mpe nakanisi olingi koloba ete tosengeli kondima makambo nyonso oyo ateyaki. Kasi mbala mosusu ozali komona ete bato mingi oyo batutaka ntolo ete bazali bakristo bamitambwisaka te lokola bakristo.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Yoká oyo Yesu alobaki awa na Matai 7:21-23.’ (2) ‘Baoyo bazali kosala makasi mpo na koyeba mokano ya Nzambe mpe kosala yango bakozala na bomoi moko ya malamu na mikolo ezali koya. (Nz. 37:10, 11; Em. 21:4)’

‘Mpo na nini bolobaka ete lingomba ya solo ezali kaka moko?’

Okoki koyanola: ‘Ezali solo ete na lingomba nyonso bato ya malamu bazangaka te. Kasi likambo ya ntina ezali oyo Liloba ya Nzambe ezali koloba. Elobi ete mangomba ya solo ezali boni? Talá oyo ekomami na Baefese 4:4, 5.’ Okoki kobakisa: (1) ‘Yango eyokani na oyo bavɛrsɛ mosusu elobi. (Mat. 7:13, 14, 21; Yoa. 10:16; 17:20, 21)’ (2) ‘Kasi, koyeba lingomba yango ya solo ezali pɛtɛɛ te. Tosengeli kosala nini mpo na koyeba yango? (Okoki mbala mosusu kosalela makambo oyo ezali na nkasa 283-285.)’ (3) (Talá mpe makambo oyo ezali na nkasa 81, 82, na motó ya likambo “Batatoli ya Yehova.”)

‘Natángaka Biblia ngai moko mpe nasɛngaka Nzambe asalisaka ngai nayeba yango malamu’

Okoki koyanola: ‘Osilá kotánga Biblia mobimba?’ Okoki kobakisa: ‘Awa ozali kosala milende mpo na kotánga yango, okokuta likanisi moko ya ntina na Matai 28:19, 20. . . . Likambo yango ezali na ntina mpo emonisi ete Kristo azali kosalela bato mosusu mpo na kosalisa biso tóyeba soki kozala mokristo ya solo elimboli nini. Yango wana, Batatoli ya Yehova bakendaka kotala bato na bandako na bango ata ngonga moko pɔsɔ na pɔsɔ mpo na koyekola na bango Biblia ofele. Okosepela kopesa ngai mwa miniti mpo nalakisa yo ndenge toyekolaka na bato?’

Talá lokasa 283.

‘Namoni ete lingomba ezali likambo ya moto na moto’

Okoki koyanola: ‘Lelo oyo bato mingi bakanisaka bongo, mpe soki moto asepeli na nsango ya Biblia te, totikaka ye mpe tokendaka kotala bato mosusu. Kasi oyebi ete soki nayei kotala yo ezali mpo na kotosa oyo Yesu atindaki bayekoli na ye básala? . . . (Mat. 24:14; 28:19, 20; 10:40)’

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto