Molimo
Ndimbola: Na Biblia, liloba ya Ebre nephesh ná liloba ya Grɛki psukhe ebongolami na liloba “molimo.” Biblia emonisi ete molimo ezali moto to nyama to bomoi ya moto to ya nyama. Nzokande, bato mingi bakanisaka ete “molimo” ezali eloko moko oyo moto azalaka na yango oyo emonanaka te to ezali elimo, oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi. Bato mosusu balobaka ete ezali eloko oyo esimbi bomoi. Kasi Biblia eteyaka bongo te.
Biblia elobi nini mpo na kosalisa biso tóyeba mpenza ndimbola ya molimo?
Eba. 2:7: “Mpe Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” (Simbá ete vɛrsɛ yango elobi te ete moto azwaki molimo kasi akómaki nde molimo, elingi koloba moto ya bomoi.) (Liloba ya Ebre oyo ebongolami na “molimo” ezali nephesh. Hf ebongoli mpe liloba yango ndenge wana. AS, JB, NAB esaleli liloba “moto.” NE elobi “ekelamu.” Uele esaleli liloba “motu.”)
1 Ko. 15:45: “Ekomamá kutu ete: ‘Moto ya liboso Adama akómaki molimo ya bomoi.’ Adama ya nsuka akómaki elimo oyo apesaka bomoi.” (Na yango Makomami ya Grɛki ya bokristo mpe Makomami ya Ebre elimboli molimo ndenge moko.) (Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “molimo” ezali psukhe mpe yango elimbolaka moto. KJ, AS, Dy, JB, NAB, mpe Kx esaleli liloba “molimo.” RS, NE, mpe TEV esaleli liloba “moto.”)
1 Pe. 3:20: “Na mikolo ya Noa . . . bato moke, elingi koloba, milimo mwambe, babikaki na mai.” (Na vɛrsɛ oyo, liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “milimo” ezali psukhai, oyo ezali boike ya liloba psukhe. KJ, AS, Dy, mpe Kx esaleli mpe liloba “milimo.” LNz ná hf elobi “bato”; RS, NE, mpe NAB esaleli liloba “bato.”)
Eba. 9:5: “Lisusu, nakosɛnga makila na bino ya milimo [to, “bomoi”; na Ebre, nephesh] na bino.” (Vɛrsɛ oyo emonisi ete molimo ezalaka na makila.)
Yos. 11:11: “Babɛtaki molimo [Ebre, nephesh] nyonso oyo ezalaki na kati na yango na mopanga.” (Vɛrsɛ oyo emonisi ete molimo ezali eloko oyo ekoki kobomama na mopanga; na yango, milimo yango ezalaki bikelamu ya elimo te.)
Bavɛrsɛ nini ya Biblia elobi ete banyama bazali milimo?
Eba. 1:20, 21, 24, 25: “Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Mai etondana mpenza kotondana na milimo* . . . ’ Mpe Nzambe abandaki kozalisa banyama ya nsɔmɔ ya mineneminene ya mbu mpe molimo nyonso ya bomoi oyo etambolaka, oyo mai etondanaki na yango na mitindo na yango, mpe ekelamu nyonso oyo epumbwaka oyo ezali na mapapu na motindo na yango. . . . Mpe Nzambe alobaki lisusu ete: ‘Mabele ebimisa milimo ya bomoi na mitindo na yango . . . ’ Mpe Nzambe abandaki kosala nyama ya zamba oyo ezali na mabele na motindo na yango mpe nyama ya mboka na motindo na yango mpe nyama mikemike nyonso ya nse na motindo na yango.” (*Liloba ya Ebre oyo esalelami na vɛrsɛ oyo ezali nephesh. Ro esaleli liloba “molimo.” Babiblia mosusu esaleli liloba “ekelamu to bikelamu.”)
Lev. 24:17, 18: “Soki moto abomi molimo [Ebre, nephesh] moko kati na bato, asengeli mpenza kobomama. Mpe moto oyo abomi molimo [Ebre, nephesh] kati na banyama ya mboka, akofuta mpo na yango, molimo mpo na molimo.” (Simbá ete liloba yango ya Ebre oyo ebongolami na molimo esalelami mpo na bato ná banyama.)
Em. 16:3: “Ekómaki makila lokola oyo ya moto oyo akufi, mpe milimo* nyonso ya bomoi ekufaki, ɛɛ, biloko oyo ezalaki na mbu.” (Na yango, Makomami ya Grɛki ya bokristo emonisi mpe ete banyama bazali milimo.) (*Liloba ya Grɛki oyo esalelami awa ezali psukhe. KJ, AS, mpe Dy ebongoli yango “molimo.” Babiblia mosusu ebongoli yango “ekelamu” to “eloko.”)
Banganga-mayele mosusu oyo bazali Batatoli ya Yehova te bandimaka ndimbola oyo Biblia epesi mpo na molimo?
“Na K[ondimana] ya K[ala], bokabwani ezali te na kati ya nzoto ná molimo. Moyisraele azalaki kotalela likambo mobimba, ndenge mpenza ezali, mpe na yango azalaki kotalela moto ete azali mobimba, kasi azali bitenibiteni te. Liloba nepeš [nephesh] oyo tobongoli na molimo, elimboli ata moke te eloko moko oyo ekeseni na nzoto to na moto. . . . Liloba [psukhe] oyo ezali na K[ondimana] ya S[ika] ezali na ndimbola moko na liloba nepeš. Ekoki kolimbola eloko oyo esimbi bomoi, bomoi, to ekelamu ya bomoi.”—New Catholic Encyclopedia (1967), Vol. XIII, nk. 449, 450.
“Liloba ya Ebre oyo ebongolami na ‘molimo’ (nefesh, elimboli oyo ezali kopema), oyo Moize asalelaki . . . , elimboli ‘eloko ya bomoi’ mpe liloba yango ekoki kosalelama ata mpo na biloko. . . . Liloba psuchē (‘molimo’) oyo Kondimana ya Sika esaleli ezali ndenge moko na liloba nefesh.”—The New Encyclopædia Britannica (1976), Macropædia, Vol. 15, lok. 152.
“Liteya oyo elobi ete molimo etikalaka na bomoi nsima ya kobeba ya nzoto euti nde na mateya ya filozofi ná ya teoloji kasi na mateya ya bokristo te, mpe vɛrsɛ moko te ya Biblia eteyi likambo yango.”—The Jewish Encyclopedia (1910), Vol. VI, lok. 564.
Molimo ya moto ekoki kokufa?
Ezk. 18:4: “Talá! Milimo nyonso—ezali ya ngai. Molimo ya tata ndenge moko mpe molimo ya mwana—ezali ya ngai. Molimo* oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.” (*Na Ebre “nephesh.” Hf ebongoli yango “molimo.” Babiblia mosusu ebongoli yango “oyo,” “molimo,” “motu” to “moto.”)
Mat. 10:28: “Bóbanga te baoyo bakoki koboma nzoto kasi bakoki koboma molimo [to, “bomoi”] te; nzokande bóbanga nde moto oyo akoki koboma ná molimo* ná nzoto na Gehena.” (*Na makomi ya Grɛki, basaleli liloba psukhe. Hf, LL, Uele, KSN, ná BSN, yango nyonso esaleli liloba “molimo.”)
Mis. 3:23: “Ya solo, molimo [Grɛki, psukhe] nyonso oyo akoyoka Mosakoli wana te akobomama mpenza na kati ya bato.”
Milimo ya bato ekoki kotikala na bomoi libela na libela?
Talá nkasa 124-127, na motó ya likambo “Bomoi.”
Molimo ná elimo ezali eloko moko?
Mos. 12:7: “Bongo putulu ezali kozonga na mabele ndenge ezalaki mpe elimo [to, nguya ya bomoi; na Ebre, ruah] ezali kozonga epai ya Nzambe ya solo oyo apesaki yango.” (Simbá ete liloba ya Ebre oyo ebongolami na liloba elimo ezali ruah; kasi liloba oyo ebongolami na molimo ezali nephesh. Vɛrsɛ oyo elimboli te ete ntango moto akufi elimo ekendaka tii epai ya Nzambe; kasi elimboli nde ete elikya ya moto yango ya kozonga na bomoi ezali na mabɔkɔ ya Nzambe. Ndenge moko mpe, soki moto asombi eloko kasi azali na likoki ya kopesa mbongo te, eloko yango ‘ekozonga’ epai ya nkolo na yango.) (KJ, AS, RS, NE, mpe Dy yango nyonso ebongoli liloba ruah na “elimo.” LL esaleli maloba ‘pema ya bomoi.’)
Mos. 3:19: “Bana ya bato bazali na nsuka mpe nyama ezali na nsuka, mpe bakosuka ndenge moko. Ndenge oyo akufaka, oyo mosusu mpe akufaka; mpe bango nyonso bazali na elimo [na Ebre, ruah] kaka moko.” (Na yango, vɛrsɛ oyo emonisi ete ezala bato to banyama bazali kaka na ruah moko to na elimo moko. Mpo na kozwa makanisi mosusu ya vɛrsɛ 20, 21, talá nkasa 180, 181.)
Ebr. 4:12: “Liloba ya Nzambe ezali na bomoi mpe ezali na nguya mpe epeli makasi koleka mopanga nyonso ya mino mibale mpe ekɔtaka tii kokabola molimo [Grɛki, psukhes; “bomoi,” NE] ná elimo [Grɛki, pneumatos], mpe matonga ná mafuta na yango, mpe ekoki kososola makanisi mpe mikano ya motema.” (Simbá ete na Grɛki “elimo” ná “molimo” ezali liloba moko te.)
Nini esalemaka ntango elimo etiki nzoto?
Nz. 146:4: “Elimo [na Ebre ruah] na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Ntango elimo ya moto etiki nzoto, makanisi na ye nyonso esilaka. Na yango, elimo ezali te eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi. Talá mpe Nzembo 104:29.)
Liteya ya mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba oyo elobaka ete molimo ezali eloko oyo emonanaka te mpe ekufaka te eutá wapi?
“Liteya ya bokristo oyo elobaka ete molimo ezali eloko oyo emonanaka te oyo Nzambe asalaki mpe akɔtisaki yango na nzoto ya moto ntango akelaki ye mpo azala na bomoi, euti na filozofi ya bokristo oyo ekolaki mokemoke. Ezali Origène [akufaki soki na 254 T.B.] oyo azalaki na Azia mpe Saint Augustin [akufaki na 430 T.B.] oyo azalaki na Mpoto nde babimisaki likanisi ete molimo ezali eloko oyo emonanaka te, mpe bango nde bakɔtisaki liteya yango na filozofi ya lingomba . . . Liteya na ye [Augustin] . . . eutaki mingimingi (ná mwa mabunga na yango) na makanisi ya bato oyo bazalaki kolanda mateya ya Platon.”—New Catholic Encyclopedia (1967), Vol. XIII, nk. 452, 454.
“Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te euti na makanisi ya Bagrɛki, nzokande elikya ya lisekwa euti na makanisi ya Bayuda. . . . Ntango Alezandre alongaki mikili mosusu, mateya ya Bagrɛki ekɔtaki mokemoke na Lingomba ya Bayuda.”—Dictionnaire Encyclopédique de la Bible (Valence, France; 1935), ebimisami na Alexandre Westphal, Vol. 2, lok. 557.
“Liteya oyo elobaka ete molimo ekufaka te ezali liteya ya Bagrɛki oyo eutaki na mangomba ya kobombana ya kala mpe Platon, moto ya filozofi, abongisaki liteya yango malamumalamu.”—Presbyterian Life, 1 Mai 1970, lok. 35.
“Tondimaka ete liwa ezali? . . . Ezali kokabwana ya molimo ná nzoto, boye te? Soki esalemi bongo moto akufi; ntango molimo ezali yango moko, mpe elongwe na nzoto mpe nzoto ekabwani na molimo, yango nde liwa, boye te? . . . Molimo ekoki kokufa? Te. Na yango molimo ekufaka te? Ɛɛ.”—“Phédon” ya Platon, eteni 64, 105, ndenge ebimisami na buku Great Books of the Western World (1952), ebimisami na R. M. Hutchins, Vol. 7, nk. 223, 245, 246.
“Tomoni ete likanisi ya kozanga kokufa ezalaki kobenda mpenza likebi ya bato ya teoloji ya Babilone. . . . Ezala bandimi to bakambi ya mangomba bazalaki kondima te ete eloko oyo ezali na bomoi ekoki kokufa libela. Mpo na bango liwa ezali nde nzela ya kozwa bomoi ya ndenge mosusu.”—The Religion of Babylonia and Assyria (Boston, 1898), M. Jastrow, Jr., lok. 556.