Liwa
Ndimbola: Ntango enama nyonso ya nzoto etiki kosala. Ntango mpema ekati, motema etiki kobɛta, mpe bɔɔngɔ etiki kosala, nguya ya bomoi etikaka baselile ya nzoto malɛmbɛmalɛmbɛ. Liwa ezali nde kozanga bomoi.
Nzambe asalaki moto mpo akufa?
Ezali bongo te, kutu Yehova akebisaki Adama ete soki atosi te akokufa. (Eba. 2:17) Na nsima, Nzambe akebisaki Bayisraele mpo na etamboli oyo ekokaki komema bango na liwa ya mobesu. (Ezk. 18:31) Nsukansuka, atindaki Mwana na ye akufela bato mpo ete baoyo bakondimela ebongiseli yango bákoka kozwa bomoi ya seko.—Yoa. 3:16, 36.
Nzembo 90:10 elobi ete bomoi ya moto eumelaka mbula 70 to 80. Yango ezalaki bongo ntango Moize akomaki maloba yango, kasi na ebandeli ezalaki bongo te. (Talá Ebandeli 5:3-32.) Baebre 9:27 elobi ete, “Bato bazelaka kokufa mbala moko mpo na libela.” Yango mpe ezalaki bongo ntango Paulo akomaki maloba yango. Kasi ezalaki bongo te liboso Nzambe akatela Adama etumbu ntango asalaki lisumu.
Mpo na nini bato banunaka mpe bakufaka?
Yehova azalisaki mobali ná mwasi ya liboso bato ya kokoka, bazalaki na likoki ya kozala na bomoi libela. Akelaki bango na bonsomi ya kopona. Adama ná Eva balingaki nde kotosa Mozalisi na bango mpo balingi ye mpe mpo na komonisa botɔndi na makambo nyonso oyo asalelaki bango? Bazalaki mpenza na likoki ya kosala bongo. Nzambe alobaki na Adama ete: “Nzete ya koyeba malamu ná mabe osengeli kolya yango te, mpo mokolo okolya yango okokufa solo.” Satana asalelaki nyoka mpo na koloba na Eva mpe na mayele mabe atindaki ye abuka mobeko ya Yehova. Adama apamelaki mwasi na ye te, kasi ayokelaki ye mpe alyaki mbuma oyo Nzambe apekisaki. Yehova akatelaki Adama etumbu ya liwa kaka ndenge alobaki, kasi Yehova, na motema mawa na ye, atikaki basumuki yango bábota naino bana liboso bákufa.—Eba. 2:17; 3:1-19; 5:3-5; talá Kolimbola Mibeko 32:4 mpe Emoniseli 12:9.
Rom. 5:12, 17, 19: “Lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko [Adama] mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu—. . . . Na libunga ya moto kaka moko liwa eyangelaki na nzela ya moto yango . . . Kozanga botosi ya moto kaka moko ekómisaki ebele ya bato basumuki.”
1 Ko. 15:22: “Bato nyonso bazali kokufa na kati ya Adama.”
Talá mpe motó ya likambo “Makambo nyonso etángamá.”
Mpo na nini bana mike bakufaka?
Nz. 51:7, LNz (vɛrsɛ 5 na NW): “Ut’o mokolo babotaki ngai nazali moto mabe. Ut’o libumu lya mama, nazali mosumuki.” (Talá mpe Yobo 14:4; Ebandeli 8:21.)
Rom. 3:23; 6:23: “Bato nyonso basali lisumu mpe bakómaka na nkembo ya Nzambe te . . . Lifuti oyo lisumu ezali kofuta ezali liwa.”
Nzambe “abɔtɔlaka” baboti bana na bango te, ndenge bato mosusu balobaka. Atako mabele ebimisaka bilei ebele, mbala mingi bato ya politiki mpe ya mombongo oyo balukaka matomba na bango moko basalaka ete bato oyo basengeli na bilei yango bázwa yango te; yango wana bana bakufaka mpo na kozanga bilei. Bana mosusu bakufaka na makama, ndenge moko ná mikóló. Kasi biso nyonso tobotamá na lisumu; biso nyonso tozali bato ya kozanga kokoka. Tobotamá na mokili oyo moto nyonso—ezala moto malamu to moto mabe—nsukansuka akufaka. (Mos. 9:5) Kasi Yehova azali na ‘mposa makasi’ ya kosangisa lisusu bana ná baboti na bango na nzela ya lisekwa, mpe azwi bibongiseli ya bolingo mpo na yango.—Yoa. 5:28, 29; Yobo 14:14, 15; talá Yirimia 31:15, 16; Marko 5:40-42.
Bakufi bazali wapi?
Eba. 3:19: “Na motoki ya elongi na yo okolya limpa kino okozonga na mabele, mpo outaki na yango. Mpamba te ozali putulu mpe okozonga na putulu.”
Mos. 9:10: “Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda [“esika ya bakufi,” hf; “mboka ya bawa,” LNz], esika ozali kokende.”
Bakufi bazalaka ndenge nini?
Mos. 9:5: “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”
Nz. 146:4: “Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi [“kokanisa,” hf; “mikano,” LNz] na ye ekufi.”
Yoa. 11:11-14: “‘Lazare moninga na biso akei kopema, kasi nazali kokende kuna mpo na kolamwisa ye na mpɔngi.’ . . . Yesu alobaki na bango polelepolele ete: ‘Lazare akufi.’” (Talá mpe Nzembo 13:3.)
Moto azalaka na eloko moko oyo etikalaka na bomoi ntango ye akufi?
Ezk. 18:4: “Molimo [“molimo,” hf; “moto,” LL] oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.”
Yis. 53:12: “Asopaki molimo [“molimo,” hf; “amipesaki,” LL] na ye kino na liwa.” (Talá Matai 26:38.)
Talá mpe mitó ya makambo “Molimo” mpe “Elimo.”
Bakufi bakoki kosalisa bato oyo bazali na bomoi to kosala bango mabe?
Mos. 9:6: “Bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango esili, mpe bazali na likabo ata moko lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te na eloko nyonso oyo ekosalema na nse ya moi.”
Yis. 26:14: “Bazali bakufi, bakobika te. Bazangi makasi kati na liwa, bakotɛlɛma te.”
Tokoloba nini mpo na bato oyo balobaka ete bakufaki mpe balamuki, mpe balobaka ete bakendaki epai mosusu ntango bakufaki?
Mbala mingi, ntango mpema ekati mpe motema etiki kobɛta, miniti ebele elekaka liboso nguya ya bomoi etika baselile ya nzoto malɛmbɛmalɛmbɛ. Soki nzoto etyami esika ya malili makasi, bangonga mingi ekoki naino koleka liboso likambo yango ebanda kosalema. Mpo na yango, ntango mosusu bafulaka mopɛpɛ na zolo ya moto mpo mimpululu ná motema na ye ebanda lisusu kosala mpe moto alamukaka. Emonanaka lokola nde moto yango akufi mpo monganga alobi bongo, nzokande baselile ya nzoto na ye ezalaki naino na bomoi.
Bato oyo balamukaki nsima ya “liwa” ya ndenge wana bamikundolaka eloko moko te. Basusu balobaka ete bazalaki koyoka lokola nde bazali kotambola na mapata. Basusu balobaka ete bamonaki makambo ya kitoko to ya nsɔmɔ.
Minganga bakoki mpenza kolimbola makambo yango?
Moto moko oyo akomaka makambo ya minganga na zulunalo moko (The Arizona Republic) akomaki boye: “Ntango makasi ya nzoto ekiti mingi, mpo batye moto anesthésie, to mpo na maladi to mpasi moko makasi, makoki ya nzoto ya kotambwisa makambo na yango ekitaka mpe mingi. Na yango, nzoto ebimisaka baɔrmɔne ya baselile ya bɔɔngɔ mpe baɔrmɔne mosusu oyo babengi catecholamines ebele koleka. Yango nde esalaka ete moto amona bimonamona mpe ayoka makambo oyo ezalaka te, mpe ntango makanisi na ye ezongi, akanisa ete akufaki mpe azongi na bomoi.”—28 Mai 1977, lok. C-1; talá mpe zulunalo ya minganga ya Allemagne Fortschritte der Medizin, No. 41, 1979; Psychology Today, Yanuali 1981.
Lokola bato mosusu balobaka ete bandeko na bango oyo bakufá babimelaki bango mpe basololaki na bango, yango nde emonisi ete makambo oyo bato oyo balamuká balobaka ezali solo?
Tángá lisusu bavɛrsɛ oyo elobeli ndenge oyo bakufi bazalaka, oyo totalelaki na ebandeli ya lisolo oyo. Liloba ya solo ya Nzambe eyebisi biso ete bakufi bazalaka ndenge nini?
Nani alingaka te ete bato bándima oyo Biblia elobi mpo na bakufi? Ntango Yehova akebisaki baboti na biso ya liboso ete bakokufa soki batosi te, nani alobaki ete bakokufa te? “Nyoka [oyo Satana asalelaki; talá Emoniseli 12:9] alobaki na mwasi ete: ‘Bokokufa soki moke te.’” (Eba. 3:4) Ya solo, toyebi ete nsukansuka Adama ná Eva bakufaki. Na yango, nani abimisaki likanisi ete moto azali na eteni mosusu oyo emonanaka te, oyo etikalaka na bomoi ntango moto akufi? Ndenge tomonaki yango, Liloba ya Nzambe elobi bongo te. Mobeko oyo Nzambe apesaki Bayisraele epekisaki bango kosolola na bakufi mpe elobaki ete likambo yango ezali “mbindo” mpe ‘eyinamá.’ (Lev. 19:31; Mib. 18:10-12; Yis. 8:19) Nzambe ya bolingo alingaki nde kopekisa likambo yango soki ezali kaka lisolo mpamba kati na bato ya bomoi ná bandeko mpe baninga na bango oyo bakufá? Kasi, lokola bademo nde bazwaka mongongo ya bato oyo bakufá mpe bakosaka bato mpo bákoba kondima liteya wana ya lokuta, omoni te ete Nzambe azali mpenza na bolingo ndenge azali kobatela basaleli na ye mpo bákosama te?—Ef. 6:11, 12.
Mpo na nini Batatoli ya Yehova basanganaka te na milulu mosusu ya bonkɔkɔ oyo etali kolela ebembe?
Moto nyonso ayokaka mawa ntango ndeko to moninga na ye akufi, mpe ezali mabe te kolela na ndenge esengeli
Na liwa ya moninga na ye Lazare, “Yesu alelaki, abimisi mpisoli.” (Yoa. 11:35) Ntango mosusu, mawa oyo basaleli ya Nzambe bayokaka ntango moto akufi, ezalaka makasi mpenza.—2 Sa. 1:11, 12.
Kasi, lokola bakristo bazali na elikya ya lisekwa, bayebisi bango boye: “Tolingi bóyeba makambo oyo etali bato oyo bazali kolala na kati ya liwa; mpo bóyoka mawa te na ndenge bamosusu oyo bazali na elikya te bayokaka.”—1 Tes. 4:13.
Basaleli ya Yehova baboyaka makambo nyonso te oyo esalemaka ntango moto akufi
Eba. 50:2, 3: “Yozefe apesaki etinda na basaleli na ye, minganga, ete bátya tata na ye nkisi mpo apɔla te . . . mpe bazwaki mikolo ntuku minei (40) mobimba mpo na ye, mpo, na momeseno, bazwaka mikolo mingi boye mpo na kotya moto nkisi mpo apɔla te.”
Yoa. 19:40: “Bakamataki nzoto ya Yesu mpe bazingaki yango na biteni ya bilamba esika moko na matiti ya nsolo kitoko, kaka ndenge Bayuda bazalaki na momeseno ya kobongisa ndenge ya kokunda bato.”
Bato oyo balukaka kosepelisa Nzambe, baboyaka mimeseno oyo eyokani te na Liloba ya Nzambe
Mimeseno mosusu esɛngaka ete moto amonisa mawa na ye polele. Kasi Yesu alobaki ete: “Ntango bokili bilei [mpo na mawa], bótika kozala na bilongi ya mawa lokola bakosi, mpo babebisaka bilongi na bango mpo bato bámona ete bakili bilei. Ya solo mpenza nalobi na bino: Bazwi mbano na bango mobimba. Kasi yo, ntango okili bilei, pakolá motó na yo mafuta mpe sukolá elongi na yo, mpo bato bámona te ete okili bilei, kasi Tata na yo oyo azali na esika ya kobombana nde amona; bongo Tata na yo oyo atalaka uta na esika ya kobombana akofuta yo.”—Mat. 6:16-18.
Mimeseno mosusu ya kolela bawei eutá na liteya oyo elobi ete moto azali na molimo oyo ekufaka te, oyo etikaka nzoto ntango moto akufi mpe eyebaka makambo oyo bato ya bomoi basalaka. Kasi Biblia elobi ete: “Bakufi bayebi ata eloko moko te.” (Mos. 9:5) Elobi lisusu ete: “Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.”—Ezk. 18:4.
Mimeseno mingi eutá na liteya oyo elobi ete bakufi bazalaka na mposa ete bato ya bomoi básalisa bango, to euti na kobanga ete bakufi bakoki kosala bato ya bomoi mabe soki bakitisi bango motema te. Kasi Liloba ya Nzambe emonisi ete bakufi bayokaka mpasi te, esengo mpe te. “Elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Nz. 146:4; talá mpe 2 Samwele 12:22, 23.) “Bolingo na bango ná koyina na bango ná zuwa na bango esili, mpe bazali na likabo ata moko lisusu te mpo na ntango oyo etyami ndelo te na eloko nyonso oyo ekosalema na nse ya moi.”—Mos. 9:6.
Soki moto alobi—
‘Ezali mokano ya Nzambe’
Okoki koyanola: ‘Bato mingi balobaka bongo. Kasi namoni ezali malamu koluka koyeba oyo Nzambe ye moko alobi na likambo yango.’ Okoki kobakisa: (1) ‘(Tángá Ebandeli 2:17.) Soki tata moko akebisi mwana na ye ete soki asali likambo moko boye akokufa, yango elingi koloba ete tata yango alingi mwana na ye asala likambo yango?’ (2) ‘Bongo, mokano ya Nzambe mpo na bato ezali mpenza nini? Yesu alobaki: “Oyo ezali mokano ya Tata na ngai: ete moto nyonso oyo azali komona Mwana [elingi koloba, koyeba mpe kondima ete Yesu azali mpenza Mwana ya Nzambe] mpe azali kondimela ye azwa bomoi ya seko, mpe nakosekwisa ye na mokolo ya nsuka.” (Yoa. 6:40)’
‘Bato bakokoba kaka kokufa’
Okoki koyanola: ‘Yango nde ekómelaka bato banda kala tii lelo, boye te?’ Okoki kobakisa: ‘Kasi talá elaka ya malamu mpenza oyo Nzambe apesi na Emoniseli 21:3, 4 (to Yisaya 25:8).’
‘Moto akufaka soki ngonga na ye ebɛti’
Okoki koyanola: ‘Bato mingi bakanisaka lokola yo. Oyebi ete Bagrɛki mingi ya kala bazalaki mpe na likanisi yango? Bazalaki kondima ete ezali na banzambe misato ya basi oyo bazalaki kokatela bato bambula ya bomoi. Kasi likanisi ya Biblia mpo na bomoi ekeseni na oyo wana.’ Okoki kobakisa: (1) ‘(Tángá Mosakoli 9:11.) Na ndakisa: Briki moko ekoki kolongwa na ndako ya etaje mpe ekweli moleki nzela. Tokoki koloba ete Nzambe moto asali bongo? Soki ezali bongo, mpo na nini bapesaka nkolo ndako foti? . . . Mpo na moleki nzela yango, Biblia elobi ete, yango ezali likama mpe likambo oyo ekanami te.’ (2) ‘Biblia elobi ete tokobatela bomoi na biso soki toboyi etamboli ya mabe. (Mas. 16:17) Soki ozali na bana, nakanisi ete oteyaka bango likambo yango. Okebisaka bango mpo na makambo oyo ekoki kotya bomoi na bango na likama. Lelo oyo, Yehova azali kokebisa mpe bato ndenge wana.’ (3) ‘Yehova ayebi oyo ekoya lobi. Na nzela ya Biblia, Yehova azali koyebisa biso ndenge tokoki kosala mpo na kozala na bomoi molai koleka bato oyo bazali koboya koyoka Liloba na ye. (Yoa. 17:3; Mas. 12:28)’ (Talá mpe motó ya likambo “Makambo nyonso etángamá.”)