Bikeko
Ndimbola: Mbala mingi bikeko ezalaka bililingi oyo emonisaka bato to biloko. Elilingi to ekeko nyonso oyo bazali kosambela ekómaka nzambe. Mbala mingi baoyo basambelaka bikeko balobaka ete bazali nde kosambela elimo oyo ekeko yango ezali komonisa. Mangomba mingi oyo ezali ya bokristo te esalelaka bikeko. Buku moko (New Catholic Encyclopedia, 1967, Vol. VII, lok. 372) elobi boye mpo na Lingomba ya Katolike: “Lokola kosambela ekeko ezali kosambela moto oyo ekeko yango ezali komonisa, ndenge moko mpe losambo oyo epesami na moto yango ekoki kopesama na ekeko oyo ezali komonisa ye.” Biblia eteyaka bongo te.
Liloba ya Nzambe elobi nini na oyo etali kosala bikeko mpo na losambo?
Kob. 20:4, 5, LNz: ‘Osala ekeko ata yoko te, osala mpe elili te ya binso bizali o likolo, awa o nse mpe o bozindo bwa mai. Okumbamela byango te, osalela byango mpe te, [“okumbamela yango to okosambela yango te,” NAB], zambi ngai Yawe Nzambe wa yo, nazali Nzambe wa zuwa.’ (Simbá ete bapekisaki nde kosala ekeko mpe kokumbamela yango.)
Lev. 26:1, hf: “Bokomisalela bikeko te, mpe bokotɛmisa elilingi oyo ekatami to likonzí [“likonzí ya losambo,” NW] te, mpe bokotɛmisa libanga eyemami na mokili na bino te ete bokumbama liboso na yango, mpo ete ngai nazali Yawe Nzambe na bino.” (Esengelaki kotɛlɛmisa ekeko te mpo bato báfukamela yango mpo na kosambela.)
2 Ko. 6:16, LNz: “Tempelo ya Nzambe ekoki nde kozala esika yoko na bikeko biye bakokumisaka? Kasi biso tozali tempelo ya Nzambe wa bomoi.”
1 Yoa. 5:21, LNz: “Bana ba ngai, bokeba na likambo lya kokumisa bikeko [“bikeko,” hf; “banzambe ya bikeko,” LL].”
Bikeko ekoki kosalisa biso mpo na kosambela Nzambe ya solo?
Yoa. 4:23, 24, hf: “Basambeli ya solo bakosambela Tata na bisambeli na [elimo] mpe na solo. Mpo ete Tata azali koluka motindo oyo mpo na kosambela ye. Nzambe azali [Elimo] mpe ekoki na basambeli na ye kosambela ye na [elimo] mpe na solo.” (Baoyo basalelaka bikeko mpo na kosambela Nzambe bazali kosambela Nzambe “na elimo” te kasi batyaka motema na oyo bazali komona na miso na bango.)
2 Ko. 5:7, hf: “Mpo tokotambolaka na kondima nde na komona te.”
Yis. 40:18, LL: “Bokoki kokokisa Nzambe na nani? Ekeko nini ezali lokola ye, mpe ekokani na ye?”
Bik. [Mis.] 17:29, LNz: “Kasi soko tozali bato ba libota lya Nzambe, tókanisa te ’te Nzambe azali lokola wolo to ebende to libanga biye bisalemi na maboko mpe na mayele ma bato.”
Yis. 42:8, LNz: “Nkombo ya ngai nde Yawe! Nakotikela moto mosusu nkembo ya ngai te, nakopesa banzambe mosusu [“bikeko,” hf] lokumu la ngai te.”
Tosengeli nde kosambela “basantu” mpo bálobela biso epai ya Nzambe, mpe mbala mosusu kosambela bikeko na bango?
Bik. [Mis.] 10:25, 26, LNz: “Ntango Petro akoti, Kornelio akei kokutana na ye, akumbameli ye elongi o nse. Kasi Petro atelemisi ye, alobi: ‘Teleme, ngai mpe nazali se moto.’” (Lokola Petro andimaki te ete básambela ye, akoki nde kolendisa biso tófukamela ekeko na ye? Talá mpe Emoniseli 19:10.)
Yoa. 14:6, 14, hf: “Yesu alobi na ye ete, Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto akokoma epai na Tata te soko na nzela na ngai te. Soko bokolɔmba likambo nini na nkombo na ngai, ngai nakosala yango.” (Awa Yesu amonisi polele ete tokoki kobɛlɛma epai ya Tata kaka na nzela na ye mpe mabondeli na biso esengeli kosalema na nkombo ya Yesu.)
1 Tim. 2:5, LNz: “Nzambe azali se moko, mpe mobembisi [“moyokanisi,” NW] kati ya Nzambe na bato azali se moko, ye Kristu Yezu oyo azali moto lokola biso.” (Longola Yesu, moto mosusu te akoki kozala moyokanisi na kati ya Nzambe ná bakristo.)
Talá mpe nkasa 73, 74, na motó ya likambo “Basantu.”
Bato oyo basambelaka bikeko bakanisaka nde libosoliboso moto oyo ekeko ezali komonisa, to bamonaka ete bikeko mosusu ezali na valɛrɛ koleka bikeko mosusu?
Ezali na ntina mingi kotalela makanisi ya bato oyo bazali kosambela. Mpo na nini? Mpo lolenge oyo bato batalelaka “ekeko” to “elilingi” moko boye nde ekomonisa soki bazali kosambela yango to te.
Na makanisi ya moto oyo azali kosambela, ekeko to elilingi moko boye ya moto ezali na valɛrɛ koleka ekeko to elilingi mosusu ya moto yango? Soki bongo, bato oyo bazali kosambela bazali kokanisa liboso nde ekeko to elilingi ya moto yango kasi moto ye moko te. Mpo na nini bato bakendaka mobembo na bisika mosantu mpo na kosambela? Bakanisaka ete ekeko ezali na nguya moko boye ya kosala “makamwisi,” boye te? Na ndakisa, mpo na bikeko ya Maria oyo ezali na katedrale ya engumba Chartres na France, sango-mokonzi Yves Delaporte alobi boye na buku na ye (Les Trois Notre-Dame de la cathédrale de Chartres): “Bikeko yango, oyo eyemami, oyo ebongisami na langi to oyo ezali komonana na talatala ya maninisa, ezali na valɛrɛ moko te. . . . Basambelaka kaka bikeko misato mpamba: Notre-Dame de la crypte, Notre-Dame du pilier mpe Notre-Dame de la ‘belle verrière.’” Kasi soki bato oyo basambelaka na bisika yango bakanisaka liboso nde moto oyo amonisami na ekeko yango, bikeko nyonso elingaki kozala na valɛrɛ moko, boye te?
Ndenge nini Nzambe atalelaka bikeko oyo bato basambelaka?
Yir. 10:14, 15, LNz: “Motuli wa bikeko akoyoka nsoni mpo ya ekeko ya ye, bikeko bya ye bizali se biloko bya lokuta, bizali ata na mpema ya bomoi te. Bizali biloko mpamba, bya koseke.”
Yis. 44:13-19, LNz: “Oyo akokata ekeko ya nzete, akotia nsinga, akoyema elili na mpembe, akopapola yango na mbeli mpe akobongisa yango na bisaleli bya ye; akoluka kosala ekeko kitoko ya moto mpo ya kotia yango o ndako. Mpo ya yango, akokata nzete ya sedere. Na nsima akokamata nzete ya wenge mpe ya kambala, alingi nzete yango ikoma makasi mpe ileka inso ya zamba; akolona mpe nzete ya sipresi mpe mbula ekokolisa yango. Biloko bina binso bikosalisa bato mpo ya kozwa nkoni, bongo bakamati yango mpo ya koyoto moto mpe kotumba yango mpo ya kolamba mampa. Kasi basusu bakokamata yango mpo ya komisalela nzambe oyo balingi kokumisa; bakosala ekeko mpo ya kogumbamela yango. Moto oyo akobwaka ndambo ya nkoni o moto, akokalinga wana monsuni, akolia mwango mpe akotonda; akoyoto moto mpe akoloba: ‘Nayoti moto, nayoki malamu mpe namoni mololi!’ Mpe na ndambo ya nkoni etikali, akosala ekeko, nzambe wa ye, mpe akogumbamela yango, akokumisa yango mpe akobondela yango mpe akoloba: ‘Bikisa ngai, zambi yo ozali nzambe wa ngai!’ Solo, bayebi eloko te, bazali na mayele te, mpo bakufi miso, bakomono eloko te mpe mitema mya bango [mizangi] makanisi. Moko te akanisa to azala na mayele ma koloba: ‘Natumbi ndambo ya nkoni o moto, nalambi wana mampa, nakalingi monsuni mpe nalei mwango; na ndambo ya nkoni etikali nakosala ekeko mbindo mpe nakofukamela ndambo ya nkoni boye!’”
Ezk. 14:6, LL: “Nkolo Yawe alobi bózongela ye, bóbwaka banzambe na bino ya bikeko [“bikeko ya bosɔtɔ,” NW], pe bótika mimesano na bino ya mabe mpe ya soni.”
Ezk. 7:20, hf: “Mpo na kitoko na yango na kokembisa, balataki yango mpo na lolendo, mpe basalaki bikeko na bosɔtɔ mpe biloko biboyami na bango na yango; yango wana nakozalisa yango eloko na mbindo [“bosɔtɔ,” NAB] mpo na bango.”
Ndenge nini tosengeli kotalela bikeko oyo tozalaki kosambela?
Mib. 7:25, 26, LNz: “Botumba bikeko bya banzambe ba bango; bolula wolo to palata ya bikeko te. Soko bokamati yango, bokoti o motambo, zambi ezali likambo lya nsomo o miso ma Yawe Nzambe wa bino. Bokotisa o ndako ya bino eloko ya nsomo te, mpo ’te bino moko bozwa bobe te lokola eloko ena. Botala biloko bina lokola biloko bya mbindo mpe bya nsomo [“okoyoka yango mpenza mpii mpe okoyina yango mpenza,” NW].” (Atako lelo Yehova asɛngi basaleli na ye te ete bábebisa bikeko ya bato mosusu, mobeko oyo apesaki Yisraele emonisi ndenge oyo basaleli na ye basengeli kotalela bikeko oyo bazalaki kosambela. Talá Misala 19:19.)
1 Yoa. 5:21, LNz: “Bana ba ngai, bókeba na likambo lya kokumisa bikeko [“banzambe ya lokuta,” JB].”
Ezk. 37:23, hf: “Bakomibebisa lisusu te na bikeko na bango . . . ; boye bango bakozala bato na ngai, mpe ngai nakozala Nzambe na bango.”
Nini ekokómela biso soki tozali kosambela bikeko?
Mib. 4:25, 26, LNz: “Soko bokomi kosala masumu mpe bosali ekeko to elili ya eloko ata nini [“ekeko moko,” Kx] soko bosali mabe o miso ma Yawe Nzambe wa bino mpe bongo boyokisi ye nkanda, ba-likolo na ba-nse bazali banzeneneke ba ngai, bokolimwa noki o mokili.” (Makanisi ya Nzambe ebongwani te. Talá Malaki 3:5, 6.)
1 Ko. 10:14, 20, hf: “Boye balingami na ngai, bokima losambo na bikeko. . . . Ekokaba bango mbeka, bakokabela [bilimo] mabe yango, bakokabela Nzambe te. Nalingi te ete bozala na lisangana na [bilimo] mabe.”
Em. 21:8, hf: “Mpo na bagɔigɔi, na bato na ntembe, bato babebi na bosɔtɔ, na babomi na bato, na bato na pite, na bato na soloka, na basambeli na bikeko, na bato na lokuta, nyonso, likabo na bango ekozala kati na libeke likopelaka na mɔtɔ na sufulu, oyo ezali kufa na mibale [msl., “kufa ya libela,” JB].”
Nz. 115:4-8, LNz: “Bikeko bya bango, se palata na wolo, bisalemi na maboko ma bato. Bizali na monoko, kasi bikolobaka te, bizali na miso, kasi bikomonoko te, bizali na matoi, kasi bikoyokaka te, bizali na zolo, kasi bikolumbutaka te. Bizali na maboko, kasi bikosimbaka eloko te, bizali na makolo, kasi bikoki kotambola te, bizali na mongongo, kasi bikoyokisaka lolaka te. Bato basali byango bakokoma lokola byango na baye bakotiaka mitema na byango.”