Paradiso
Ndimbola: Bato oyo babongolaki Biblia ya Septante na monɔkɔ ya Grɛki babongolaki malamu mpenza liloba “paradiso” (paradeisos) mpo na kolobela elanga ya Edene, mpamba te emonani ete ezalaki parke. Nsima ya lisolo ya mokanda ya Ebandeli, bavɛrsɛ ya Biblia oyo etángi paradiso elobeli (1) elanga ya Edene, to (2) mabele mobimba ntango ekokóma ndenge oyo elanga ya Edene ezalaki, to (3) mapamboli ya elimo oyo basaleli ya Nzambe bazali na yango awa na mabele, to (4) bibongiseli oyo ezali na likoló oyo ezali kokundola bibongiseli oyo ezalaki na Edene.
Kaka “Kondimana ya Kala” nde elobi ete mabele ekokóma paradiso to “Kondimana ya Sika” mpe elobi yango?
Likanisi ya kokabola Biblia na biteni mibale, mpe kopesa valɛrɛ na maloba soki ezali na eteni ya “Kala” to ya “Sika” endimami na Makomami te. Mokanda ya 2 Timote 3:16 eyebisi biso ete: “Makomami nyonso ekomami na litambwisi ya elimo ya Nzambe mpe ezali na litomba mpo na koteya, kopamela, kosembola makambo.” Baroma 15:4 elobeli Makomami ya kala oyo ekomamaki na litambwisi ya elimo ya Nzambe ntango elobi ete: “Makambo nyonso oyo ekomamaki kala ekomamaki mpo eteya biso.” Na yango, tosengeli kotalela Biblia mobimba mpo na koyanola na motuna yango.
Ebandeli 2:8 elobi ete: “Yehova Nzambe alonaki elanga [“parke,” Mo; “paradiso,” Dy; paradeison, LXX] na Edene, epai ya ɛsti, mpe kuna atyaki moto [Adama] oyo ye asalaki.” Banzete kitoko mpe banyama ndenge na ndenge ezalaki na kati ya elanga yango. Yehova apambolaki mwasi ná mobali ya liboso mpe alobaki na bango ete: “Bóbota mpe bókóma mingi mpe bótondisa mabele mpe bótya yango na nse na bino, mpe bózala na bokonzi likoló ya mbisi ya mbu mpe likoló ya bikelamu oyo epumbwaka na likoló mpe likoló ya ekelamu nyonso oyo ezali na bomoi, oyo ezali kolanda na mabele.” (Eba. 1:28) Mokano ya Nzambe ya ebandeli oyo ezalaki ete mabele mobimba ezala paradiso mpe bato oyo basepelaka kotosa mibeko na ye báfanda na kati na yango ekozanga te kokokisama. (Yis. 45:18; 55:10, 11) Yango wana Yesu alobaki: “Esengo na bato ya ezaleli ya boboto, mpo bakozwa libula ya mabele.” Yango wana mpe ateyaki bayekoli na ye bábondelaka ete: “Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele.” (Mat. 5:5; 6:9, 10) Na boyokani na likambo yango, Baefese 1:9-11 elobi ete mokano ya Nzambe ezali ya “koyanganisa lisusu biloko nyonso esika moko na nse ya bokonzi ya Kristo, biloko oyo ezali na likoló mpe biloko oyo ezali na mabele.” Baebre 2:5 elobeli “mabele oyo ekoya.” Emoniseli 5:10 elobi ete bazwi-ya-libula elongo na Kristo “bakoyangela mabele.” Emoniseli 21:1-5 mpe 22:1, 2 ebakisi makambo ya malamu oyo ekozala na “mabele ya sika” mpe ekundweli biso makambo oyo ezalaki na Paradiso ya Edene ná nzete na yango ya bomoi.—Eba. 2:9.
Lisusu, Yesu alobelaki Paradiso oyo ekoya na mabele (Grɛki, paradeisos) ntango asololaki na mosali-mabe oyo abakamaki na nzete pene na ye, oyo andimelaki bokonzi ya Yesu oyo ekoya. “Ye alobaki na ye ete: ‘Ya solo nazali koyebisa yo lelo: Okozala na ngai na Paradiso.’”—Luka 23:43.
Ndenge nini tokoki mpenza koyeba ndimbola ya Paradiso oyo Yesu alobelaki na Luka 23:43 ntango asololaki na mosali-mabe?
Alingaki nde kolobela esika moko boye epai ‘milimo ya basembwi oyo bakufá’ ekendaka kopema mwa moke, esika moko boye na Nkunda?
Likanisi yango eutá wapi? Diksionɛrɛ moko (The New International Dictionary of New Testament Theology) elobi ete: “Ntango liteya ya Bagrɛki oyo elobaka ete molimo ekufaka te ekɔtaki, paradiso ekómaki esika oyo milimo ya basembwi epemaka ntango ezali kozela.” (Grand Rapids, Mich.; 1976, ekomami na Colin Brown, Vol. 2, lok. 761) Ntango Yesu azalaki awa na mabele, Bayuda mingi bayebaki likanisi yango oyo eyokani na Biblia te? Diksionɛrɛ ya Hastings (Dictionary of the Bible) emonisi ete ntango mosusu ezalaki bongo te.—(Edinburgh, 1905), Vol. III, nk. 669, 670.
Ata soki Bayuda mingi na siɛklɛ ya liboso bayebaki likanisi yango, Yesu alingaki nde komonisa ete ye mpe andimi yango na ntango apesaki elaka na mosali-mabe oyo abongolaki motema? Yesu apamelaki makasi Bafarisai ná bakomeli mpo bazalaki koteya mimeseno oyo eyokanaki te na Liloba ya Nzambe.—Mat. 15:3-9; talá mpe motó ya likambo “Molimo.”
Misala 2:30, 31 emonisi ete ntango Yesu akufaki akendaki na Nkunda. (Ntango ntoma Petro atángi Nzembo 16:10, asaleli liloba Nkunda [na Grɛki Hadesi oyo ekokani na liloba Sheole na Ebre].) Nzokande, Biblia elobi esika moko te ete Nkunda (Sheole to Hadesi) to esika moko boye ya Nkunda ezali paradiso esika oyo bakufi basepelaka. Yango wana Mosakoli 9:5, 10 elobi ete baoyo bazali na Nkunda “bayebi ata eloko moko te.”
Paradiso oyo Luka 23:43 elobeli ezali na likoló to esika moko boye na likoló?
Biblia elobi te ete Yesu ná mosali-mabe bakendaki na likoló kaka na mokolo oyo Yesu asololaki na ye. Yesu asakolaki ete akosekwa na mokolo ya misato nsima ya kobomama na ye. (Luka 9:22) Na boumeli ya mikolo yango misato, Yesu azalaki na likoló te, mpo nsima ya lisekwa na ye, ayebisaki Maria Magadalena ete: “Namati naino epai ya Tata te.” (Yoa. 20:17) Mikolo 40 nsima ya lisekwa ya Yesu, bayekoli na ye bamonaki ye azali kotika mabele mpe alimwe na miso na bango wana azalaki komata na likoló.—Mis. 1:3, 6-11.
Mosali-mabe yango akokisaki masɛngami ya kokende na likoló te, ata mwa moke na nsima. ‘Abotamaki lisusu’ te, elingi koloba, azwaki batisimo ya mai te mpe abotamaki na elimo ya Nzambe te. Elimo santu ekitelaki bayekoli ya Yesu mikolo koleka 50 nsima ya liwa ya mosali-mabe yango. (Yoa. 3:3, 5; Mis. 2:1-4) Na mokolo oyo Yesu akufaki, asalaki kondimana mpo na bokonzi ya likoló elongo na baoyo ‘bakangamaki na ye makasi na komekama na ye.’ Mosali-mabe wana amonisaki bosembo ya ndenge wana te mpe akɔtaki na kati ya kondimana yango te.—Luka 22:28-30.
Nini emonisi ete Paradiso yango ekozala na mabele?
Makomami ya Ebre epesaki Bayuda oyo bazali sembo elikya ya kozwa mbano ya bomoi na likoló te. Makomami yango ezalaki kolobela kozongisama ya Paradiso awa na mabele. Danyele 7:13, 14 esakolaki ete ntango bakopesa Masiya “boyangeli, lokumu ná bokonzi,” ‘bato ya bikólo, bituluku ya bato ya bikólo mpe minɔkɔ nyonso bakosalela ye.’ Bato oyo bakoyangelama na Bokonzi yango bakozala awa na mabele. Maloba oyo mosali-mabe ayebisaki Yesu emonisi ete azalaki mpenza na elikya ete Yesu akokanisa ye na ntango wana.
Kasi, na ndenge nini Yesu akozala na mosali-mabe yango na paradiso? Akosekwisa ye, akozwa bibongiseli mpo na kokokisa bamposa na ye nyonso, mpe akopesa ye libaku ya koyekola mpe kotosa masɛngami ya Yehova mpo azwa bomoi ya seko. (Yoa. 5:28, 29) Yesu amonaki ete mosali-mabe yango abongoli motema mpe azali na limemya; yango wana akozala na kati ya bamiliare ya bato oyo bakosekwa mpo na kozala na bomoi awa na mabele mpe bakozwa libaku ya komonisa ete babongi kozala na Paradiso libela.
Ntango nini mosali-mabe yango akozala na paradiso?
Ndimbola ya Luka 23:43 etalelaka mingi esika oyo mobongoli atyá bilembo ya bopemi. Bamaniskri ya Biblia ya liboso na monɔkɔ ya Grɛki ezalaki na bilembo ya bopemi te. Buku moko (The Encyclopedia Americana, 1956, Vol. XXIII, lok. 16) elobi ete: “Bamaniskri ya liboso mpe makomi ya Grɛki ezalaki na bilembo ya bopemi te.” Ezali na siɛklɛ ya libwa T.B. nde babandaki kosalela bilembo ya bopemi. Luka 23:43 esengeli kotángama: “Ya solo, nalobi na yo, lelo okozala na ngai elongo kati na paladiso,” (RS) to esengeli kotángama nde boye: ‘Ya solo nalobi na yo lelo, okozala na ngai elongo kati na Paradiso’? Mpo na kokata likambo yango, esengeli kotalela mateya ya Kristo mpe bavɛrsɛ mosusu ya Biblia, kasi te koma (,) oyo bakɔtisaki na vɛrsɛ yango basiɛklɛ mingi nsima ya ntango oyo Yesu alobaki maloba yango.
Biblia (The Emphasised Bible), oyo ebongolamaki na J. B. Rotherham, etyá elembo ya bopemi esika oyo Libongoli ya Mokili ya Sika etye. Na maloba na nse ya lokasa na Luka 23:43, L. Reinhardt, mobongoli moko ya Biblia na monɔkɔ ya Allemand, alobi: “Esika oyo [babongoli mingi] batyaka elembo ya bopemi na vɛrsɛ oyo ezali mabe mpe eyokani te na makanisi ya Kristo mpe ya mosali-mabe. . . . Na ntembe te, [Kristo] akanisaki te ete Paradiso ezali esika moko boye na mokili ya bakufi, kasi akanisaki nde kozongisama ya Paradiso na mabele.”
Ntango nini Yesu ‘akokɔta na bokonzi na ye’ mpe akokokisa mokano ya Tata na ye ya kokómisa mabele paradiso? Mokanda ya Emoniseli, oyo ekomamaki mbula soki 63 nsima ya ntango oyo Yesu alobaki maloba oyo ezali na Luka 23:42, 43, emonisi ete makambo yango ekosalema na mikolo oyo ezali koya. (Talá nkasa 41-44, na motó ya likambo “Badati,” talá mpe motó ya likambo “Mikolo ya nsuka.”)