Satana Zabolo
Ndimbola: Ekelamu ya elimo oyo azali monguna monene ya Yehova Nzambe ya solo mpe ya baoyo nyonso basambelaka Yehova. Bapesaki ye nkombo Satana mpo atɛmɛlaki Yehova. Satana abengami mpe Zabolo, mpo ye nde moto ya liboso oyo akoselaki Nzambe makambo. Satana abengami lisusu nyoka ya ebandeli mpo asalelaki nyoka mpo na kokosa Eva; yango wana liloba “nyoka” ekomaki mpe kolimbola “mokosi.” Na mokanda ya Emoniseli, Satana amonisami na elilingi ya dragɔ oyo azali kobebisa.
Ndenge nini toyebi ete ekelamu yango ya elimo azalaka mpenza?
Biblia emonisi ete Satana azali mpenza. Mbala mingi etángaka ye na nkombo (Satana, mbala 52; Zabolo, mbala 33). Biblia ezali na masolo ya moto oyo amonaki mpenza Satana. Moto yango nani? Yesu Kristo, oyo azalaki na likoló liboso aya awa na mabele, azalaki mbala na mbala kotánga ekelamu yango ya mabe na nkombo na ye.—Luka 22:31; 10:18; Mat. 25:41.
Makambo oyo Biblia elobaka mpo na Satana Zabolo ezali mpenza solo. Moto akoki kosala mabe, kasi mabe oyo ezali kosalema na mokili eleki mpenza mabe oyo moto ye moko akoki kosala. Makambo oyo Biblia ezali koloba mpo na ebandeli ya Satana mpe misala na ye, ezali kosalisa biso tóyeba mpo na nini mabe eleki. Atako bato mingi balingaka kofanda na kimya, kasi banda bankóto ya bambula, mokili etondi na koyinana, mobulu, mpe bitumba. Na yango toyebi mpo na nini mabe ezali se kobakisama mpe sikoyo ekómi likama mpo na bato nyonso.
Soki ezalaki solo ete Satana azali te, kondima makambo oyo Biblia elobi mpo na ye ezali nde kolekisa ntango mpamba. Nzokande, bato mingi oyo liboso bamikɔtisaki na makambo ya maji to bazalaki na kati ya bituluku ya bato oyo basalaka misala ya bilimo mabe, balobaka ete batungisamaki mingi mpo bazalaki koyoka “mingongo” kasi bazalaki komona te moto oyo azalaki koloba na bango, bazalaki kotungisama na “bademo,” mpe bongo na bongo. Bamiyokaki malamu mpenza ntango bayekolaki oyo Biblia ezali koloba mpo na Satana mpe bademo na ye, basalelaki toli ya Biblia ya kobwaka misala ya bilimo mabe mpe babondelaki Yehova asalisa bango.—Talá nkasa 377-382, na motó ya likambo “Misala ya bilimo mabe.”
Soki tondimi ete Satana azali mpenza, yango elimboli te ete tondimi liteya oyo elobaka ete Satana azali na maseke, na mokila molai, asimbi kanya mpe azali kotumba bato na lifelo ya mɔtɔ. Biblia elobi te ete Satana azali ndenge wana. Likanisi yango euti na bato ya kala oyo bazalaki kosala mayemi, oyo balandaki masapo ya Bagrɛki oyo ezalaki kolobela nzambe Pan mpe makambo oyo mokomi ya makambo ya ntɔki ya Italie Dante Alighieri alobelaki na buku na ye Inferno. Biblia eteyaka lifelo ya mɔtɔ te, kasi elobi polele ete “bakufi bayebi ata eloko moko te.”—Mos. 9:5.
Mabe oyo ezalaka na kati ya motema ya moto, yango nde Satana?
Yobo 1:6-12 mpe 2:1-7 eyebisi biso masolo oyo elekaki kati na Yehova Nzambe ná Satana. Soki mabe oyo ezalaka na kati ya motema ya moto nde Satana, mabe yango elingaki kozala na kati ya motema ya Yehova. Kasi likanisi yango eyokani ata moke te na oyo Biblia eyebisi biso mpo na Yehova ete “epai na ye kozanga boyengebene ezali te.” (Nz. 92:15; Em. 4:8) Simbá ete makomi ya Ebre etye artikle liboso ya liloba Satana (has·Satan) na lisolo ya Yobo, mpo na komonisa ete azali moto mpenza oyo azali kotɛmɛla Nzambe.—Talá mpe Zekaria 3:1, 2, maloba na nse ya lokasa na Rbi8-F.
Luka 4:1-13 emonisi ete Zabolo asalaki nyonso mpo na kotinda Yesu asala oyo ye alingi. Lisolo yango elobeli makambo oyo Zabolo alobaki mpe eyano oyo Yesu apesaki ye. Tokoloba ete Yesu amekamaki na mabe oyo ezalaki na kati ya motema na ye moko? Likanisi wana eyokani te na oyo Biblia elobi mpo na Yesu, ete azalaki na lisumu te. (Ebr. 7:26; 1 Pe. 2:22) Atako Yoane 6:70 esaleli liloba ya Grɛki diabolos mpo na kolobela ezaleli mabe oyo ekolaki na motema ya Yudasi Mokeriota, Luka 4:3 esaleli artikle liboso ya liloba Zabolo (ho diabolos), mpo na komonisa ete azali moto mpenza.
Bato bapesaka Zabolo foti na makambo mabe oyo ezali kosalema na mokili kaka mpo na kokima ngambo?
Bato mosusu bapesaka Zabolo foti mpo na mabe oyo bango moko basalaka. Nzokande, Biblia emonisi polele ete mbala mingi bango moko nde bazalaka na foti mpo na makambo mabe oyo ekómelaka bango, oyo ekoki kouta na bato mosusu to na etamboli na bango moko. (Mos. 8:9; Gal. 6:7) Atako bongo, Biblia elobeli ekelamu moko oyo aleki biso na nguya mpe elobeli mayele mabe na ye; ekelamu yango nde abimiselaka bato bampasi. Emonisi mpe ndenge oyo tokoki kolongwa na boombo na ye.
Satana autá wapi?
Misala nyonso ya Yehova ezali ya kokoka; azali mobandisi ya makambo ya mabe te. Na yango ntango Nzambe akelaki, asalaki moto moko ya mabe te. (Mib. 32:4; Nz. 5:4) Na ebandeli, ekelamu ya elimo oyo akómaki Satana azalaki mwana ya Nzambe ya kokoka. Ntango Yesu alobaki ete Zabolo “akangamaki makasi te na solo,” amonisaki ete liboso azalaki na kati ya “solo.” (Yoa. 8:44) Kasi azalaki na bonsomi ya kopona, ndenge moko na bikelamu mosusu ya mayele ya Nzambe. Asalelaki bonsomi na ye mabe, mpe atikaki mposa ya komitombola ekola na motema na ye. Akómaki kolula losambo oyo esengeli kopesama kaka epai ya Nzambe, mpe abendaki Adama ná Eva báyokela ye na esika ete bátosa Nzambe. Na yango, na makambo oyo asalaki, amikómisaki ye moko Satana oyo elimboli “monguna.”—Yak. 1:14, 15; talá mpe nkasa 309, 310, na motó ya likambo “Lisumu.”
Ntango Satana atombokelaki Nzambe, mpo na nini Nzambe abomaki ye mbala moko te?
Ezali na ntembe oyo Satana abimisaki: (1) Abimisaki ntembe mpo na bosembo ya boyangeli ya Yehova mpe lotomo na ye ya kozala mokonzi. Yehova azalaki nde kopimela bato bonsomi oyo ekoki kopesa bango esengo? Bato bakokoka nde komitambwisa bango moko mpe bakokoba kozala na bomoi soki batosi Nzambe te? Yehova azangaki nde bosembo na ndenge apesaki bango mobeko oyo elobaki ete soki bazangi botosi bakokufa? (Eba. 2:16, 17; 3:3-5) Na yango, Yehova azali mpenza na lotomo ya koyangela? (2) Abimisaki ntembe mpo na bosembo ya bikelamu ya mayele epai ya Yehova. Kozanga botosi ya Adama ná Eva ebimisaki motuna oyo: Basaleli ya Yehova batosaka ye mpenza mpo balingi ye to bakoki bango nyonso kotika Nzambe mpe kolanda litambwisi ya Satana? Satana abimisaki ntembe yango polele na mikolo ya Yobo. (Eba. 3:6; Yobo 1:8-11; 2:3-5; talá mpe Luka 22:31.) Koboma batomboki yango mbala moko elingaki kosilisa ntembe yango te.
Ezali te ete Nzambe alingaki komilongisa. Kasi mpo ntembe yango ebima lisusu te mpe ebebisa kimya mpe bolamu ya bikelamu na ye na molɔ́ngɔ́ mobimba te, Yehova atikaki ntango oyo esengeli mpo na kosilisa ntembe ya Satana mpo na libela. Lokola Adama ná Eva bazangaki botosi epai ya Nzambe, bakufaki nsima ya mwa ntango. (Eba. 5:5) Atako bongo ntembe yango esilaki naino te. Nzambe atikaki Satana ná bato bámeka lolenge nyonso ya baguvɛrnema oyo bakokaki kosala. Kasi moko te ememeli bango bolamu ya ntango molai. Nzambe atikaki bato bálanda tii na nsuka nzela na bango moko kozanga ete bálanda mitinda na ye ya sembo. Mbuma na yango emonani polele. Biblia elobi solo ete: “Ezali te likambo ya moto oyo azali kotambola ete atambwisa lokolo na ye.” (Yir. 10:23) Kaka na ntango yango, Nzambe apesi basaleli na ye libaku ya komonisa na botosi na bango ete bazali sembo epai na ye mpo balingaka ye, mpe bazali kotikala sembo atako bazali kokutana na komekama mpe na minyoko oyo ezali kouta na Satana. Yehova alendisi basaleli na ye na maloba oyo: “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.” (Mas. 27:11) Baoyo bamonisaka bosembo bazwaka mapamboli ebele mpe bazali na elikya ya kozwa bomoi ya seko. Bomoi oyo bakozwa ekozala mpo na kosala mokano ya Yehova, Nzambe oyo balingaka bizaleli na ye mpe banzela na ye.
Satana azali mpenza kotambwisa mokili ya lelo?
Yesu Kristo alobaki ete Satana azali “mokonzi ya mokili oyo,” moto oyo bato mingi batosaka mpo atindaka bango bálanda makanisi na ye ya kotyola mibeko ya Nzambe. (Yoa. 14:30; Ef. 2:2) Lisusu, Biblia ebengi ye “nzambe ya makambo ya ntango oyo,” moto oyo bato mingi oyo balingaka mokili bakumisaka na nzela ya makambo ya losambo.—2 Ko. 4:4; 1 Ko. 10:20.
Ntango Zabolo amekaki Yesu Kristo, “amatisaki ye likoló mpe alakisaki ye na mwa ntango moke makonzi nyonso ya mabele esika bato bafandi; mpe Zabolo alobaki na ye ete: ‘Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpamba te bapesá ngai yango, mpe napesaka yango na moto oyo nalingi. Bongo yo, soki osaleli ngai likambo moko ya losambo, yango nyonso ekozala ya yo.’” (Luka 4:5-7) Emoniseli 13:1, 2 emonisi ete Satana apesaki ebongiseli ya politiki ya mokili mobimba ‘nguya, kiti ya bokonzi mpe bokonzi monene.’ Danyele 10:13, 20 emonisi polele ete Satana azali na bademo oyo atye bango bankumu ya makonzi minene ya mabele. Baefese 6:12 elobi ete bademo yango bazali ‘baguvɛrnema, bakonzi, bayangeli ya mokili ya molili, mampinga ya bilimo mabe na bisika ya likoló.’
Tokoki kokamwa te ndenge 1 Yoane 5:19 elobi ete: “Mokili mobimba ezali kolala na nguya ya moto mabe.” Kasi bokonzi na ye ezali kaka mpo na ntango moke mpe ezali mpo Yehova, Nzambe Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, apesi nzela ezala.
Kino ntango nini Nzambe akotika Satana akosa bato?
Mpo na koyeba bilembeteli oyo emonisi ete tozali kobika sikoyo na mikolo ya nsuka ya mokili mabe ya Satana, talá nkasa 41-44, motó ya likambo “Badati,” talá mpe “Mikolo ya nsuka.”
Ebongiseli oyo ezwami mpo na kosikola bato na nguya mabe ya Satana elobelami na ndenge ya elilingi na maloba oyo: “Namonaki anzelu moko auti na likoló azali kokita na fungola ya libulu mozindo mpe asimbi monyɔlɔlɔ moko monene na lobɔkɔ. Mpe asimbaki dragɔ, nyoka yango ya ebandeli, oyo azali Zabolo mpe Satana, mpe akangaki ye monyɔlɔlɔ mbula nkóto moko (1 000). Mpe abwakaki ye na libulu mozindo mpe akangaki ye na kati mpe atyaki elembo likoló na yango, mpo akosa lisusu bikólo te tii ntango mbula nkóto moko (1 000) yango ekosuka. Nsima ya makambo wana bakofungola ye mwa ntango moke.” (Em. 20:1-3) Bongo nini ekosalema na nsima? ‘Zabolo oyo azalaki kokosa bato akobwakama na kati ya laki ya mɔtɔ mpe ya sufulu.’ (Em. 20:10) Yango elimboli nini? Emoniseli 21:8 eyanoli boye: “Yango elakisi liwa ya mibale.” Satana akozala lisusu te libela na libela!
Lokola Satana ‘akobwakama na libulu mozindo,’ yango elingi koloba ete akotikala mbula nkóto (1 000) na mabele oyo ezangi bato mpo akosa bango te?
Bato mosusu basalelaka Emoniseli 20:3 (oyo touti kolobela) mpo na kondimisa likanisi yango. Balobaka ete “libulu mozindo,” to “libulu oyo ezali na nsuka te,” (KJ) emonisi mabele oyo ezali na bato te. Ezali nde bongo? Emoniseli 12:7-9, 12 emonisi ete mwa moke liboso ete Satana ‘abwakama’ na libulu mozindo, abwakami naino awa na mabele mpe abimiseli bato bampasi mingi. Na yango, ntango Emoniseli 20:3 (KJ) elobi ete Satana “abwakami na libulu oyo ezali na nsuka te,” yango elingi koloba te ete batiki ye esika oyo babwakaki ye liboso, elingi koloba na mabele, esika oyo azali kasi azali komonana te. Bakolongola ye nde na mabele, “mpo akosa lisusu bikólo te tii ntango mbula nkóto moko (1 000) ekosuka.” Simbá ete Emoniseli 20:3 elobi ete na nsuka ya mbula nkóto, bakofungola nde Satana na libulu mozindo, kasi bikólo te. Na ntango yango, Satana akokuta bato ya bikólo yango awa na mabele.
Bato mosusu basalelaka Yisaya 24:1-6 ná Yirimia 4:23-29 (hf) mpo na kondimisa likanisi yango. Bavɛrsɛ yango elobi: “Talá, Yawe akobebisa mokili, akoyeisa yango mpamba, akobulunganisa yango . . . Mokili ekobebisama nyɛɛ, ekozala mpamba solo, zambi Yawe asili koloba liloba oyo.” “Natali mokili mpe talá, ezali na mobulu . . . Natali mpe talá, moto azali te . . . Mpo ete Yawe alobi boye ete, Mokili mobimba ekozala mpamba . . . Mboka mobimba ekotikama mpamba, moto moko akofanda wana te.” Bisakweli yango elimboli nini? Ekokisamaki mpo na mbala ya liboso na Yerusaleme mpe na mokili ya Yuda. Mpo na kopesa bango etumbu, Yehova atindaki bato ya Babilone bábebisa mokili yango. Nsukansuka mokili yango etikalaki mpamba mpe ezalaki lisusu na bato te. (Talá Yirimia 36:29.) Kasi na ntango wana Nzambe atikaki mabele mobimba mpamba te, akosala mpe bongo te lelo oyo. (Talá nkasa 328-331, na motó ya likambo “Mabele,” talá mpe motó ya likambo monene “Likoló.”) Nzokande, Nzambe akotika mpamba mangomba ya bokristo ya nkombo mpamba oyo ezali elilingi ya Yerusaleme ya kala oyo ezangaki bosembo, mpo bazali kosambwisa nkombo na ye na etamboli na bango ya mbindo; akoboma mpe bibongiseli nyonso ya Satana oyo ezali komonana.
Na boumeli ya boyangeli ya mbula nkóto ya Kristo mpe ntango Satana akozala na libulu mozindo, mabele mobimba ekotikala mpamba te, kasi ekokóma paradiso. (Talá “Paradiso.”)