Kobotama mbala na mbala
Ndimbola na yango: Liteya oyo elobaka ete moto abotamaka lisusu moto to nyama mbala ya mibale to mpe koleka. Ndenge bakanisaka, “molimo” moko boye oyo emonanaka te nde ebotamaka lisusu na kati ya nzoto ya sika. Biblia eteyaka bongo te.
Soki omoni bisika to bato oyo omoná naino te, oyoki lokola oyebi bango malamu, yango nde emonisi ete moto abotamaka mbala na mbala?
Naino ekómelá yo te omona Songolo mpe okanisi ete ye nde Pakala, nzokande bango mibale bazali naino na bomoi? Yango ekómelaka bato mingi. Mpo na nini? Mpo bato mosusu bakokanaka na bizaleli, ata mpe na bilongi. Na yango, soki oyoki lokola oyebi moto atako okutaná na ye liboso te, yango elakisi mpenza te ete oyebaki moto yango mpo ozalaki na bomoi kala, boye te?
Mpo na nini okoki komona ndako to mboka moko boye oyo omoná naino te lokola nde omoná yango liboso? Ezali mpo ozalaki kofanda kuna ntango ozalaki na bomoi liboso obotama? Bandako mingi etongamaka ndenge moko. Mbala mosusu, bamesa ná bakiti oyo basalelaka na bingumba ndenge na ndenge esalemaka kaka ndenge moko. Mpe bisika mosusu na mokili ekokanaka, atako ezali mosika, lokuta? Na yango, soki oyoki lokola oyebi malamu esika moko boye, yango emonisi te ete obotamaki mbala na mbala.
Soki moto amikundoli makambo oyo azalaki na yango kala na esika moko boye, ndenge esalemaka ntango balalisaka moto mpɔngi mpo na kotambwisa makanisi na ye, yango elakisi ete moto abotamaka mbala na mbala?
Ntango balalisi moto mpɔngi mpo na kotambwisa makanisi na ye, makambo mingi oyo ezali na bɔɔngɔ na ye ekoki kobima. Bato oyo basalaka bato ndenge wana balukaka kobimisa makanisi oyo ebatamá na bɔɔngɔ ya moto, atako moto ayebi makanisi yango lisusu te. Sikoyo, makanisi yango ekɔtaka kuna ndenge nini? Ekoki kozala ete otángaki buku moko boye, otalaki filme moko to mpe olandaki na televizyo masolo oyo elobeli bato mosusu. Soki omityaki na esika ya bato oyo ozalaki kotala, mbala mosusu makambo yango esimbaki yo makasi mpe okómaki komona lokola yo nde moto ozali kosala yango. Ekoki kozala ete makambo yango otalá yango kala mpe obosaná kutu yango, kasi soki balalisi yo mpɔngi mpo na kotambwisa makanisi na yo, okoki kokanisa yango lisusu mpe komona yango lokola makambo oyo osalaki na “bomoi mosusu.” Nzokande, soki moto abotamaka solo mbala na mbala, mbɛlɛ bato nyonso mpe bamikundolaka bomoi na bango liboso bábotama, boye te? Kasi, ezali bongo te. Yango wana, kutu Batribinale ya minene ya bitúká mwa mingi ya États-Unis ekómá koboya kondima litatoli oyo euti na moto oyo balalisi mpɔngi mpo na kotambwisa makanisi na ye. Na mobu 1980, Tribinale monene ya etúká ya Minnesota elobaki ete “ndenge makambo ezali komonana mpenza elakisi nde ete nganga-mayele moko te akoki koyeba sikisiki soki makanisi, to mpe kaka ndambo ya makanisi oyo moto abimisi ntango balalisi ye mpɔngi mpo na kotambwisa makanisi na ye ezali solo, lokuta to kaka bilobaloba—kosala bongo ezali kaka komeka kozipa bisika oyo bɔɔngɔ ezali na likanisi te. Soki totali yango na ndenge ya siansi, tokoki kotyela makambo yango motema te ete ezali solo.” (State v. Mack, 292 N.W.2d 764) Ebongi te kotyela makambo ya ndenge wana motema mpamba te, mbala mingi, moto oyo balalisi mpɔngi mpo na kotambwisa makanisi na ye asalaka makambo kaka ndenge moto oyo azali kolalisa ye mpɔngi alingi.
Biblia emonisi ete bato babotamaka mbala na mbala?
Matai 17:12, 13 endimisi liteya oyo elobaka ete bato babotamaka mbala na mbala?
Mat. 17:12, 13: “[Yesu alobaki boye:] ‘Eliya asilá koya mpe bayebaki ye te kasi basalaki ye makambo oyo balingaki. Ndenge moko mpe Mwana ya moto asengeli komona mpasi na mabɔkɔ na bango.’ Bongo bayekoli basosolaki ete alobaki na bango mpo na Yoane Mobatisi.”
Elingi koloba ete Yoane Mobatisi azalaki nde Eliya oyo abotamaki lisusu? Ntango banganga-nzambe ya Bayuda batunaki Yoane ete: “Ozali Eliya?” ye ayanolaki boye: “Nazali ye te.” (Yoa. 1:21) Bongo Yesu alingaki koloba nini? Kaka ndenge anzelu ya Yehova asakolaki yango, Yoane ayaki liboso ya Masiya ya Yehova “na elimo mpe na nguya ya Eliya, mpo na kozongisa mitema ya batata epai ya bana mpe bato oyo bazangá botosi epai ya mayele ya bayengebene, mpo na kolɛngɛlɛla Yehova bato oyo babongisami.” (Luka 1:17) Na yango, Yoane Mobatisi azalaki kokokisa esakweli mpo azalaki kosala mosala lokola oyo mosakoli Eliya asalaki.—Mal. 4:5, 6.
Lisolo oyo ezali na Yoane 9:1, 2 emonisi ete bato babotamaka mbala na mbala?
Yoa. 9:1, 2: “Nzokande ntango [Yesu] azalaki koleka amonaki moto moko oyo akufá miso banda kobotama. Mpe bayekoli na ye batunaki ye ete: ‘Rabi, nani asalaki lisumu, moto oyo to baboti na ye, mpo abotama moto akufá miso?’”
Ekoki kozala ete bayekoli yango balandaki nde makanisi ya Bafarisai ndenge bazalaki koloba ete “kaka milimo ya bato malamu nde ebimaka mpe ekɔtaka na nzoto mosusu”? (La guerre des Juifs ya Josèphe, libongoli ya Arnauld d’Andilly, buku II, mok. XII, par. 24) Ezali mwa mpasi koloba bongo, mpo motuna na bango elakisi te ete bazalaki kokanisa ete mobali yango azali ‘moto malamu.’ Lokola bazalaki bayekoli ya Yesu, ntembe ezali te ete bazalaki kondima Makomami mpe bayebaki ete molimo ekufaka. Kasi lokola ata mwana oyo azali na kati ya libumu azalaka na bomoi mpe mama azwaka zemi na ye na kati ya lisumu, mbala mosusu bayekoli bazalaki komituna soki moto yango asalaki lisumu liboso abotama, yango wana abotamaki miso ekufá. Atako boni, eyano oyo Yesu apesaki emonisaki te ete moto abotamaka mbala na mbala to mpe ete mwana akoki kosala lisumu na kati ya libumu ya mama. Yesu ye moko ayanolaki boye: “Moto oyo asalaki lisumu te, baboti na ye mpe te.” (Yoa. 9:3) Yesu ayebaki ete lokola tozali bakitani ya Adama, tobotamaka na mbeba mpe kozanga kokoka. Yesu akumisaki Nzambe na libaku yango na ndenge abikisaki moto yango.
Mateya ya Biblia na ntina etali molimo mpe liwa endimi liteya oyo elobaka ete moto abotamaka mbala na mbala?
Ebandeli 2:7 elobi boye: “Yehova Nzambe asalaki moto na putulu ya mabele mpe apemaki na kati ya zolo na ye mpema ya bomoi, mpe moto akómaki molimo ya bomoi.” Simbá malamu ete moto ye moko nde azalaki molimo; molimo ezalaki te eloko moko oyo ezangi komonana, oyo ekabwanaka na nzoto mpe ekeseni na yango. “Molimo oyo esali lisumu—yango nde ekokufa.” (Ezk. 18:4, 20) Moto oyo akufi, Biblia ebengi ye “molimo oyo akufi.” (Mit. 6:6) Ntango moto akufi, “elimo na ye ekobima, akozonga na mabele; na mokolo yango makanisi na ye ekufi.” (Nz. 146:4) Na yango, ntango moto akufi, moto yango mobimba nde akufi; eloko moko te etikalaka na bomoi mpo ekende kokɔta na nzoto mosusu. (Mpo na koyeba ndimbola mosusu, talá mitó ya makambo “Molimo” mpe “Liwa.”)
Mos. 3:19: “Bana ya bato bazali na nsuka mpe nyama ezali na nsuka, mpe bakosuka ndenge moko. Ndenge oyo akufaka, oyo mosusu mpe akokufa.” (Kaka ndenge ezalaka mpo na bato, eloko moko te etikalaka na bomoi ntango nyama ekufi. Eloko moko te ekoki kobotama lisusu.)
Mos. 9:10: “Nyonso oyo lobɔkɔ na yo ezwi mpo na kosala, salá yango na makasi na yo mpenza, mpo mosala ezali te, mwango te, boyebi te, bwanya mpe te na Nkunda, esika ozali kokende.” (Mokufi akendaka kokɔta na nzoto mosusu te; akendaka nde na Nkunda, epai bakundaka bato nyonso.)
Bokeseni nini ezali kati na liteya oyo elobi ete moto abotamaka mbala na mbala ná elikya oyo Biblia epesi?
Kobotama mbala na mbala: Ndenge liteya yango elobaka, soki moto akufi, molimo na ye, elingi koloba “bomoto na ye ya solosolo,” ekómaka na bomoi ya malamu koleka soki moto yango azalaki na etamboli ya malamu, etamboli oyo ebongi; kasi soki moto asalaki mabe koleka malamu, mbala mosusu akokóma nyama. Ndenge liteya yango elobaka, kobotama oyo moto abotamaka lisusu ezongisaka ye kaka na bomoi oyo azalaki na yango, komona mpasi mpe nsukansuka kokufa. Kobotamabotama yango emonanaka ete ezali na nsuka te. Yango nde likambo oyo ezali kozela yo? Bato mosusu bakanisaka ete nzela kaka moko ya kokima likambo yango ezali nde koboma bamposa nyonso ya biloko oyo esepelisaka nzoto. Ndenge nini basalaka yango? Bamibwakaka na oyo bamosusu babengaka bomoi ya kozanga kokanisa.
Biblia: Biblia elobi ete molimo nde moto mobimba. Ata soki moto asalaki makambo ya mabe kala, soki abongoli motema mpe atiki mabe na ye, Yehova Nzambe akolimbisa ye. (Nz. 103:12, 13) Soki moto akufi, eloko moko te etikalaka na bomoi. Liwa ezali lokola mpɔngi, mpɔngi oyo ezangá ndɔtɔ. Bakufi bakosekwa. Lisekwa ezali te kobotama mbala na mbala, kasi ezali nde kozongisa na bomoi bomoto mobimba ya moto oyo akufá. (Mis. 24:15) Bato mingi bakosekwa mpo na kozala na bomoi na mabele. Liboso lisekwa yango esalema, Nzambe akolongola naino makambo mabe ya mokili oyo. Maladi, mpasi, ata mpe liwa oyo elɛmbaka te, ekokóma makambo ya kala. (Dan. 2:44; Em. 21:3, 4) Elikya ya ndenge wana, omoni yango ndenge nini? Ebongi te koluka koyeba soki ntina ya kotyela yango motema ezali?
Soki moto alobi—
‘Ngai nandimaka ete bato babotamaka mbala na mbala’
Okoki koyanola: ‘Ozali kolikya ete nsukansuka, bomoi ekokóma malamu, boye te? . . . Yebisá ngai naino, okolinga te kozala na bomoi na mokili lokola oyo balobeli awa na Emoniseli 21:1-5?’
To okoki koloba: ‘Nasepeli ndenge oyebisi ngai bongo. Tiká natuna yo naino: Ondimaka likambo yango banda kala? . . . Eloko nini etindaki yo otika bindimeli na yo ya liboso?’ (Na nsima, okoki kosalela makanisi oyo ezali na motó ya likambo moke oyo ezali na nse na lokasa 214.)
Ndenge mosusu ya koyanola: ‘Tosololaki malamu na bato mosusu oyo bandimaka liteya yango lokola yo. Tiká natuna yo naino: Mpo na nini okanisi ete esengeli kaka moto abotama mbala na mbala?’ Okoki kobakisa: (1) ‘Ozali koyeba lisusu makambo nyonso oyo osalaki liboso obotama na bomoi oyo? . . . Mpo moto atika mabunga na ye mpe asembola bomoi na ye, ekosɛnga amikundola mabunga oyo asalaki liboso abotama na bomoi oyo, boye te?’ (2) Soki moto yango alobi na yo ete malamu nde kobosana makambo ya bomoi ya kala, okoki kotuna ye boye: ‘Okanisi ete kobosanabosana makambo ezali malamu mpo na moto? Sikoyo, soki mbala nyonso nsima ya mbula 70, tobosani makambo nyonso oyo toyekolaki, okanisi ete tokoyeba kobongisa bomoi na biso?’ (3) Soki moto yango alobi ete kaka bato ya malamu nde babotamaka lisusu bato, okoki kotuna ye boye: ‘Bongo mpo na nini makambo na mokili ezali kobeba se kobeba? . . . Biblia elakisi ndenge makambo ekobonga mpenza kaka na mikolo na biso oyo. (Dan. 2:44)’