Kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu: Ezali nzela ya koyeba mabombami ya bomoi?
Ozaláká na bomoi kala?
Okozala lisusu na bomoi na lolenge moko to mosusu nsima ya liwa na yo?
Mituna oyo mikoki kokundwela yo liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu.
BÚKU Grand dictionnaire encyclopédique Larousse elimboli “réincarnation [kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu]” lokola boye: “Nsima ya liwa, molimo mokabwani na nzoto mokokamataka nzoto mosusu ya moto, ya nyama to ntango mosusu ya nzeté, kolandáká bongo kozala na bomoi na mitindo mikeseni.”
Kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu ezali na esika monene kati na mangomba ya mikili ya Ɛ́sti, mingi mpenza mangomba oyo mautá na Inde, lokola Bouddhisme, Hindouisme, Jaïnisme mpe Sikhisme. Na ndakisa, mpo na ba Hindous ya Inde, bomoi etalelami lokola zolongano ya seko ya kokufa mpe kobotama lisusu.
Kala mingi te, likanisi ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu esili kolengola bato mingi na mikili ya Mpótó, bilenge mpe bazali kati na bango. Engebene mokomi moko ya zulunalo Sunday Star ya Canada, ntina oyo bato mingi bamipesi na yango “ezali mpo na bopusi oyo makanisi ya mangomba ya Ɛ́sti ezalaki na yango likoló na bato ya Wɛ́sti ya eleko na biso, na bambula 1960.”
Ntina mosusu oyo bato bamipesi na liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu ezali ete bato mosusu ya lokumu balobaki na lisɛki te ete, mbala moko to mbala mingi, bazalaki na bomoi mosusu liboso. Lisusu, baradio, batelevizyo, bazulunalo mpe bipanzelo mosusu ya nsango ezali koloba mingi likoló na liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu, mpe bato minene lokola minganga mpe balakisi bazali kolobela yango.
Nyonso wana ebendaki likebi ya bato mingi. Na yango, engebene bolukiluki bosalemaki, soko ndambo moko kati na minei ya bato ya Canada mpe ya Etats-Unis bazali mpe kondima liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu.
Balobi ete bazalaki na bomoi mosusu liboso
Shirley MacLaine, mwasi mosani na masano, alobaki ntango Phyllis Battelle atunaki ye mituna na zulunalo Ladies’ Home Journal ete, azaláká kosala “mibembo” kati na ntango. Alobaki ete: “Nazali lisusu komikundola mitindo mingi ya bomoi oyo nazalaki na yango—bantango mosusu nazalaki mobali, bantango mosusu nazalaki mwasi.”
Kati na búku Voyages dans les vies antérieures (Mibembo kati na bomoi ya kala), monganga Raymond Moody ayebisaki makambo asalaki epai na bayekoli na ye mpe epai na bato mosusu. Na kolalisáká bango mpɔngi na nkisi, akokaki kozongisa makanisi na bango na ntango oyo babotamaki naino te, mpe bango bakokaki komikundola bomoi oyo bazalaki na yango liboso. Moto moko alobaki ete, azaláká liboso na bomoi lokola Eskimo (bafandi na mikili ya mpiɔ mingi) esika moko na ba Eskimo mosusu. Moto mosusu alobaki ete, esili koleka bankóto ya mibu mingi, azalaki na bomoi na eleko oyo babéngi ete ‘âge de la pierre.’
Monganga Moody, ye moko alobaki ete azalaki na bomoi mbala libwa na mitindo mikeseni. Na ndakisa, azalaki na bomoi na motindo na nzeté na “lolenge oyo moto ya kalakala azáláká” mpe azalaki lisusu na bomoi na nsé na Bokonzi ya Loma, epai abundisamaki mpe abomamaki na nkosi kati na moko na bisika oyo Baloma bazalaki kosala masano.
Bankisi mpo na kolalisa mpɔngi oyo basusu bazali kosalela bobele mpo na koluka koyeba ndenge bazaláká na bomoi mosusu, balobi ete ezali mpe kosalisa maladi mosusu. Minganga bazali kosalela yango mpo na kosalisa baoyo mayoki mabulungani. Elobami ete, bazali kokundola likambo moko lisalemaki na bomoi moko ya kala mpo na kokitisa nsɔ́mɔ oyo ekoki kolimbolama te. Lolenge nini tokoki kotalela likanisi wana?
Makambo malobamaki na baoyo babɛlɛmaki na kufa
Makambo oyo bato mosusu balobaki ntango balamukaki, nsima na kozala pene na kufa, ezali kosalelama mpo na kopalangisa likanisi ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu. Kati na búku La vie après la vie [Bomoi nsima ya bomoi], monganga Moody alobeli masoló soko ntuku mitano ya bato oyo bazalaki pene na kufa.
Atako makambo oyo bayebisaki makeseni, monganga Moody akanisi ete ezali na boyokani kati na likambo moko. Bato yango nyonso bazali na mayoki ya bato basalaki mobembo molai na nzela ya molili o kati ya mabelé (tunnel), bazali na mayoki ete bakabwanaki na nzoto mpe bazalaki kopumbwa na likoló na bonsomi nyonso. Bazalaki komiyoka ete bazalaki nokinoki kokatisa nzela o kati ya mabelé mpo na kokóma na pole monene, mpe na nsuka ya nzela o kati ya mabelé, bazalaki kokutana na basangani ya mabota na bango. Na nsuka, balamukaki kati na nzoto na bango mpenza. Kasi, bango nyonso balekaki te na moko na moko na matambe oyo.
Elobami ete makambo oyo mazali na bopusi malamu likoló na baoyo bazali kokutana na yango. Soki ézalaka bongo, mbɛlɛ esikolaki bango na bobangi ya liwa mpe mbɛlɛ endimisaki bango ete bomoi ezali na ntina. Kasi, mbala nyonso, ezalaka bongo te. Mingi bazali kolanda kobanga liwa mpe bazali kondima te ete bomoi ezali na ntina.
Baoyo bazali kokɔtɛla makasi liteya ya kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu balobi ete makambo motindo wana mazali kolóngisa likanisi oyo ete molimo ya moto mokobotamaka lisusu na mitindo mikeseni. Kasi liteya wana likoki kondimama? Kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu ezali nzela ya koyeba mabombami ya bomoi? Tokoki kozwa eyano na mituna lokola oyo ete, Ozaláká na bomoi kala? Okozala lisusu na bomoi? Bato bazali na molimo oyo ebimaka na nzoto na ntango ya kufa? Mituna oyo mikolimbolama na masoló malandi.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 4]
Kobotama mbala na mbala na nzoto mosusu ezwaki moboko na yango na mangomba ya Ɛ́sti
[Elilingi na lokasa 4]
Yíka ya bomoi ya ba Hindous