Eteni 4
Nzambe azali kolakisa biso mikano na ye
1, 2. Ndenge nini toyebi ete Nzambe azali kopesa biyano epai na baoyo bazali komituna mituna na sembo nyonso?
NZAMBE ya bolingo azali mpenza koyebisa mikano na ye epai na baoyo bazali koluka ye na motema moko. Azali kopesa biyano na bato oyo bakotunaka kati na makambo mosusu ete, mpo na nini ye apesi nzela na mpasi.
2 Biblia elobi ete: “Soki okoluka ye [Nzambe], akozwana na yo.” “Nzambe azali kati na makoló, Ye Momonisi na makambo mabómbami.” “Nkolo Jéhovah akosala likambo te bobele ete akoyebisa mwango na ye epai na baombo na ye, bango basakoli.”—1 Ntango 28:9; Danyele 2:28; Amosa 3:7.
Epai wapi biyano bikozwama?
3. Epai wapi tokoki kokuta ntina oyo Nzambe apesi nzela na mpasi?
3 Biyano na mituna lokola oyo etali ntina oyo Nzambe apesi nzela na mpasi mpe lolenge oyo akosilisa yango, ezwami kati na lisoló lipemami oyo ye apesaki mpo na bolamu na biso. Lisoló yango ezali Liloba na ye, Biblia Mosantu. “Makomami nyonso mapemami na Nzambe mpe mabongi mpo na koteya, mpo na kopamela, mpo na kosembola, mpo na kobɔkɔlo kati na boyengebene, ete moto na Nzambe azala na makoki, aselingwa mpo na misala nyonso malamu.”—2 Timoté 3:16, 17, MN.
4, 5. Makambo nini makesenisi Biblia na mikanda nyonso mosusu?
4 Biblia ezali mpenza mokanda moleki mikanda nyonso mosusu. Eyebisi makambo ya solo mpo na lisoló na bato, kobanda kozalisama na bato mpe ata liboso na yango. Ezali mpe kotalelama lelo, mpamba te bisakweli na yango bitali makambo ya eleko na biso mpe ya mikolo mizali koya.
5 Mokanda mosusu te mozali kolobela makambo na kala na sikisiki nyonso boye. Na ndakisa, ezali bobele na ntalo moke ya makomi ya bakomi na ntango na kala. Nzokande, tozali na makomi mingi ya Biblia, mosusu ezali ndambo, mosusu ezali mobimba: pene na mikanda 6 000 ya Makomami na Liebele (mikanda 39 ya “Kondimana na Kala”) mpe pene na mikanda 13 000 ya Makomami na Greke na boklisto (mikanda 27 ya “Kondimana na Sika”).
6. Mpo na nini tokoki kondimisama ete Biblia ya lelo ekokani mpenza na makomi mapemamaki na Nzambe?
6 Nzambe Mozwi-na-Nguya-Nyonso, oyo Biblia epemamaki na ye, asɛnzelaki ete bakopi ya makomi wana ebongwana te. Biblia oyo tozali na yango lelo ekokani mpenza na makomami ya ebandeli oyo mapemamaki. Likambo mosusu lizali kondimisa biso ezali ete, bakopi mosusu ya makomi ya Makomami ya Greke na boklisto makokisi mbula monkámá uta yango ekomamaki longwa na makomi ya ebandeli. Mwa bakopi ya bakomi ya ntango na kala oyo tozali na yango, mbala mingi ekomamaki bikeke mingi nsima na bakomi na yango.
Likabo liuti na Nzambe
7. Biblia boni esili kokabolama?
7 Biblia ezali mokanda mokabolami mingi na boumeli ya Lisoló na bato. Soko bamiliare misato na yango enyatámaki. Mokanda moko te mobɛlɛmi na yango na motuya wana. Lisusu, Biblia ebongolami soko na minoko 2 000, na mobimba to na ndambo na yango. Ekanisami bongo ete, 98 % ya bafandi na mokili bazali na yango.
8-10. Yebisa mwa bantina malamu oyo ebongi mpenza ete totalelaka Biblia?
8 Mokanda oyo mozali koloba ete mouti na Nzambe mpe mozali kopesa bilembeteli mpo na makambo ya libandá mpe oyo ya kati, ebongi mpenza ete totalela yango.a Biblia ezali kolimbola ntina ya bomoi, ndimbola ya makambo mazali kosalema na mokili mpe oyo ebómbami mpo na biso na mikolo mizali koya. Mokanda mosusu te mokoki koloba bongo.
9 Ee, Biblia ezali nsango oyo Nzambe atindelaki libota na bato. Ye akambaki kokomama na yango na nzela ya bokasi na ye bokosalaka mosala, elimo na ye, mpe bato soko ntuku minei bakomaki yango. Nzambe azali koloba na biso na nzela na Liloba na ye, Biblia Mosantu. Ntóma Paulo akomaki ete: “Wana boyambaki liloba na Nzambe oyo boyokaki yango epai na biso, bondimaki yango lokola liloba na bato te, kasi, lokola liloba na Nzambe.”—1 Batesaloniki 2:13, MN.
10 Na ntina na Biblia, Abraham Lincoln, prezidá wa zomi na motoba na Etats-Unis alobaki ete, “ezali mpenza likabo lileki oyo Nzambe apesaki epai na bato. . . . Soki yango te, mbɛlɛ toyebi te kokesenisa mabe na malamu.” Na bongo, totalela engebene likabo yango lileki malamu, lolenge nini mpasi ekɔtaki, mpo na nini Nzambe apesi nzela na yango mpe nini ye akosala mpo na kosilisa yango.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Okozwa bandimbola mingi mosusu likoló na bosolo ya Biblia kati na mokanda La Bible: Parole de Dieu ou des hommes? oyo ebimisamaki na 1989, na la Société Watchtower.
[Elilingi na lokasa 10]
Biblia, oyo epemamaki na Nzambe, ezali nsango oyo ye atindelaki libota na bato