Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • dg eteni 6 nk. 13-14
  • Mpo na nini Nzambe apesaki nzela na mpasi

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mpo na nini Nzambe apesaki nzela na mpasi
  • Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • Likambo litali boyangeli ya molóngó mobimba
  • Botomboki ya bikelamu ya elimo
  • Makambo mibale
  • Bampasi ya bato: Mpo na nini Nzambe atikelaki yango nzela?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1994
  • Likambo oyo etali biso nyonso
    Tósambela Nzambe kaka moko ya solo
  • Ntina oyo mabe ezali tii lelo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2007
  • Ntango oyo Nzambe atiki nzela na bampasi elingi kosuka
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2001
Makambo mosusu
Nzambe azali mpenza komibanzabanza mpo na biso?
dg eteni 6 nk. 13-14

Eteni 6

Mpo na nini Nzambe apesaki nzela na mpasi

1, 2. Lolenge nini baboti na biso ya liboso babebisaki makambo kitoko oyo Nzambe asalelaki bango na ebandeli?

MPO na nini makambo mabebaki? Nini eyaki kobebisa makambo kitoko oyo Nzambe asalaki na ebandeli mpo na baboti na biso ya liboso, kati na Paradis na Edene? Mpo na nini mabe mpe mpasi ezali sé kokóla uta bikeke mingi, na esika na kimya mpe boyokani oyo ezalaki na Paradis?

2 Ezali mpo ete Adam na Eva basalelaki lotómo na bango ya kopona oyo balingi na lolenge mabe. Bobosanaki ete bazalisamaki te mpo na kozala na bomoi malamu kozanga Nzambe mpe mibeko na ye. Bazwaki ekateli ya kozala na lipandá longwa na Nzambe, na likanisi ete bomoi na bango ekokóma malamu mingi. Na yango, bakatisaki ndelo oyo Nzambe atyelaki lotómo na bango ya kopona oyo balingi.​—Genese, mokapo 3.

Likambo litali boyangeli ya molóngó mobimba

3-5. Mpo na nini Nzambe abomaki Adam na Eva te mpo ete abandela makambo ya sika?

3 Mpo na nini Nzambe abomaki Adam na Eva te mpo na kosala mobali mpe mwasi mosusu? Mpo ete boyangeli na ye na molóngó mobimba, elingi koloba lotómo na ye ya koyangela, ebɛtɛlamaki ntembe.

4 Motuna ezalaki oyo ete: Nani azali na lotómo ya koyangela, mpe boyangeli ya nani ezali mpenza sembo? Lokola azali Mozwi-na-Nguya-Nyonso mpe Mozalisi ya bikelamu nyonso, Nzambe azali na lotómo ya koyangela likoló na bango. Lokola aleki na mayele, boyangeli na ye ezali malamu mpo na bikelamu nyonso. Kasi boyangeli ya Nzambe bobɛtɛlamaki ntembe. Lisusu, mabe euti na moto oyo azalaki ekelamu na ye, boye te? Na nsima, tokomona likambo oyo bosembo ya bato etalelami kati yango.

5 Wana moto azwaki lipandá longwa na Nzambe, motuna mosusu mobimaki, ete: Bato bakozala na bomoi malamu kozanga ete bayangelama na Nzambe? Na ntembe te, Mozalisi ayebaki eyano, kasi mpo na komema bato na kozwa eyano yango, ebongaki kopesa bango bonsomi kati na makambo nyonso. Lokola basalaki yango na lotómo na bango ya kopona oyo balingi, Nzambe apesaki nzela mpo na yango.

6, 7. Mpo na nini Nzambe apesi bato bonsomi kati na makambo nyonso na boumeli ya ntango molai boye?

6 Na kotikeláká bato ntango molai mpo ete bazala na bonsomi kati na makambo nyonso, Nzambe alingaki komonisa mbala moko mpo na libela, soki bato bakokaki kozala na bomoi malamu na nsé na boyangeli na Nzambe to na komitambwisa bango moko. Ntango oyo epesamelaki bango esengelaki mpenza kozala molai mpo na kopesa bato nzela ete bakokisa oyo bazalaki kotalela ete eleki malamu, lokola politike na bango, bamasini, sianse mpe mosala ya monganga.

7 Bongo, Nzambe apesaki bato bonsomi kati na makambo nyonso kino lelo oyo, ete bamonisa mpenza soki bakoki kolónga komitambwisa bango moko kozanga Nzambe to mpe te. Na bongo, bato bakokaki kopona kati na malamu mpe mabe, kati na bolingo mpe koyina, kati na boyengebene mpe bokesene. Kasi bato basili komona makambo oyo mauti na liponi na bango: kimya oyo euti na malamu, to mpasi oyo euti na mabe.

Botomboki ya bikelamu ya elimo

8, 9. (a) Lolenge nini botomboki ebimaki na bifandelo bizangi komonana? (b) Longola Adam na Eva, nani Satana apusaki lisusu na botomboki?

8 Wana ezali likambo mosusu lisengeli kotalelama. Baboti na biso ya liboso, bazalaki bobele bango moko te oyo batombokelaki boyangeli ya Nzambe. Kasi banani mosusu bazalaki na bomoi na eleko wana? Bikelamu ya elimo. Liboso na kozalisa bato, Nzambe azalisaki motindo na bomoi boleki bato, ntalo monene ya baanzelu oyo bazalisamaki mpo na kofanda na makoló. Bango bazalisamaki mpe na lotómo ya kopona oyo balingi mpe na mposa ya kotósa boyangeli ya Nzambe.​—Yobo 38:7; Nzembo 104:4; Emoniseli 5:11.

9 Biblia emonisi ete botomboki bobimaki liboso na bifandelo bizangi komonana. Ekelamu moko ya elimo alingaki kozala na bonsomi kati na makambo nyonso. Alingaki lisusu ete bato basambela ye. (Matai 4:8, 9) Elimo wana atombokaki apusaki mpe Adam na Eva na botomboki na kolobáká na lokutá nyonso ete Nzambe apimelaki bango eloko moko malamu. (Genese 3:1-5) Na bongo, abéngamaki Diable (Motóngi) mpe Satana (Motɛmɛli). Na nsima, apusaki bikelamu mosusu ya elimo na botomboki. Babéngami bilimu mabe.​—Deteronome 32:17; Emoniseli 12:9; 16:14.

10. Makambo nini mabimaki mpo na botomboki ya bato mpe ya bikelamu ya elimo?

10 Mpo na botomboki na bango epai na Nzambe, bato bamityaki bango moko na nsé na bopusi ya Satana mpe bilimu mabe na ye. Yango wana Biblia ebéngi Satana ete “nzambe na biloko ya ntango oyo,” oyo “azimbisi miso ya makanisi na bango baboyi kondima.” Liloba na Nzambe liyebisi lisusu ete “mokili mobimba mozali na nsé na nguya na ye oyo mabe.” Yesu ye moko abéngaki Satana ete, “mokonzi ya mokili oyo.”​—2 Bakolinti 4:4, MN; 1 Yoane 5:19, MN; Yoane 12:31, MN.

Makambo mibale

11. Satana abɛtɛlaki Nzambe ntembe na ntina na likambo nini mosusu?

11 Satana abimisaki likambo mosusu libɛtɛlaki Nzambe ntembe. Ya solo, afundaki Nzambe ete amikosaki na lolenge oyo azalisaki bato mpe ete moto moko te akolinga kosala malamu soki akutani na mikakatano. Na bongo, amonisaki ete, kati na mimekamo, bato bakoki kino kolakela Nzambe mabe. (Yobo 2:1-5) Na motindo wana, Satana abɛtaki ntembe mpo na bosembo ya bato.

12-14. Lolenge nini ntango oyo ezali koleka, esengelaki komonisa bosolo na makambo mibale oyo mabimisamaki na Satana?

12 Yango wana Nzambe atikaki ntango molai mpo na bikelamu nyonso ya mayele ete bamona lolenge nini likambo oyo mpe likambo litali boyangeli monene ya Nzambe na molóngó mobimba, ekosilisama. (Tala Exode 9:16.) Makambo mosusu masengelaki kobima nsima kati na lisoló na bato, mamonisaki bosolo ya makambo oyo mibale.

13 Likoló na lotómo ya boyangeli ya Nzambe, ntango esili komonisa nini mpo na likambo litali boyangeli monene ya molóngó mobimba? Bato bakoki nde komitambwisa bango moko, koleka oyo Nzambe akokaki kosala? Ebongiseli esalemi na bato mpo na koyangela kozanga Nzambe, ekoki nde kosala mokili moko ya esengo, epai bitumba bizali te, na mabe mpe bokesene ezali te? Ekolónga kosilisa bobólá mpe kopesa bozwi na bato nyonso? Ekolónga kosilisa maladi, bonunu mpe liwa? Ezali yango nde esengelaki kokokisama na boyangeli na Nzambe.​—Genese 1:26-31.

14 Ntango oyo ezali koleka, ekomonisa nini mpo na likambo ya mibale na ntina na ezaleli ya bato? Nzambe asalaki libungá mpo na motindo oyo azalisaki moto? Bato mosusu bakoki nde kosala malamu atako mimekamo? Bato bakomonisa ete balingi boyangeli ya Nzambe koleka oyo na bato?

[Elilingi na lokasa 13]

Nzambe atikeli bato ntango ete bakóma na nsuka ya misala na bango

[Eutelo ya bafɔtɔ]

Longwa na nzangá: Fɔtɔ́ NASA

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto