MOKAPO 8
Bato oyo baleki biso
NAYEBI ete ondimaka ete ezali na bato oyo baleki ngai ná yo, bato ya minene mpe ya makasi koleka ngai ná yo. Okanisi nani aleki biso nyonso?— Yehova Nzambe. Bongo Moteyi Monene, Mwana na ye, ye mpe aleki biso?— Ɛɛ, ye mpe aleki biso.
Yesu azalaki esika moko na Nzambe kuna na likoló. Azalaki Mwana na ye ya elimo, to anzelu. Nzambe asalaki mpe baanzelu to bana mosusu ya elimo?— Ɛɛ, asalaki bamilio na bamilio ya baanzelu. Baanzelu yango mpe baleki biso, bazali na nguya mingi koleka biso.—Nzembo 104:4; Danyele 7:10.
Oyebi lisusu nkombo ya anzelu oyo asololaki na Malia?— Nkombo na ye Gabiliele. Ayebisaki Malia ete mwana oyo akobota akozala Mwana ya Nzambe. Na nsima, Nzambe atyaki bomoi ya Mwana na ye ya elimo na libumu ya Malia, yango wana Yesu abotamaki lokola mwana moke awa na mabelé.—Luka 1:26, 27.
Na ntembe te, Malia ná Yozefe bayebisaki Yesu nini?
Ondimaka likamwisi yango? Ondimaka ete Yesu azalaki elongo na Nzambe kuna na likoló?— Yesu alobaki ete azalaki esika moko na Nzambe na likoló. Ndenge nini Yesu ayebaki makambo yango? Ntembe ezali te ete ntango azalaki mwana, Malia ayebisaki ye makambo oyo Gabiliele alobaki. Na ntembe te, Yozefe mpe ayebisaki Yesu ete Nzambe nde azali mpenza Tata na ye.
Ntango Yesu azwaki batisimo, Nzambe alobaki na likoló boye: “Oyo azali Mwana na ngai.” (Matai 3:17) Na butu liboso ete akufa, Yesu abondelaki boye: “Tata, pesá ngai nkembo penepene na yo moko na nkembo oyo nazalaki na yango penepene na yo liboso ete mokili ezala.” (Yoane 17:5) Ɛɛ, Yesu asɛngaki azonga lisusu kofanda esika moko na Nzambe, na likoló. Ndenge nini akokaki lisusu kozala na bomoi kuna?— Kaka soki Yehova Nzambe akómisi ye lisusu moto ya elimo, to anzelu.
Sikoyo nalingi kotuna yo motuna moko ya ntina. Baanzelu nyonso bazalaka malamu? Okanisi nini?— Liboso, bango nyonso bazalaki malamu, mpamba te Yehova nde asalaki bango mpe biloko nyonso oyo asalaka ezalaka malamu. Kasi na nsima, anzelu moko akómaki mabe. Ebandaki ndenge nini ete ye akóma mabe?
Mpo oyeba yango, tózonga naino ntango Nzambe asalaki Adama ná Eva, mobali ná mwasi ya liboso. Bato mosusu balobaka ete lisolo ya Adama ná Eva ezali kaka lisapo mpamba. Kasi Moteyi Monene ayebaki ete yango ezali likambo ya solo.
Ntango Nzambe asalaki Adama ná Eva, atyaki bango na kati ya elanga moko ya kitoko, nkombo na yango Edene. Ezalaki esika moko kitoko, paladiso. Bazalaki na likoki ya kobota bana mingi, ya kozala na libota monene mpe ya kofanda libela na libela na Paladiso. Kasi basengelaki koyeba likambo moko ya ntina mingi. Tosili kolobela likambo yango. Tótala soki okoyeba yango lisusu.
Adama ná Eva basengelaki kosala nini mpo báumela libela na libela na Paladiso?
Yehova ayebisaki Adama ná Eva ete bakoki kolya mbuma ya nzete nyonso ya elanga oyo balingi. Kasi ezalaki na nzete moko oyo basengelaki kolya mbuma na yango te. Nzambe ayebisaki bango oyo ekokómela bango soki balei mbuma ya nzete yango. Alobaki boye: ‘Bokokufa solo.’ (Genese 2:17) Bongo, likambo nini Adama ná Eva basengelaki koyeba?—
Basengelaki kozala na botosi. Ya solo, mpo na kozala na bomoi, esengeli kotosa Yehova Nzambe! Adama ná Eva basengelaki kaka te koloba ete batosaka Nzambe. Basengelaki komonisa yango na makambo oyo bazali kosala. Soki bátosaka Nzambe, mbɛlɛ bamonisaki ete balingaka ye mpe basepelaka ete azala Mokonzi na bango. Mbɛlɛ baumelaki libela na libela na Paladiso. Kasi soki balei mbuma ya nzete wana, yango ekomonisa nini?—
Yango ekomonisa ete basepeli mpenza te na biloko oyo Nzambe apesaki bango. Soki ezalaka yo, olingaki mpenza kotosa Yehova?— Na ebandeli, Adama ná Eva batosaki. Kasi na nsima, moto moko oyo alekaki bango ayaki kokosa Eva. Atindaki ye azanga botosi epai ya Yehova. Ezali nani?—
Nani asalelaki nyoka mpo na kosolola na Eva?
Biblia elobi ete nyoka moko esololaki na Eva. Kasi oyebi ete nyoka elobaka te. Bongo ndenge nini nyoka wana elobaki?— Anzelu moko asalaki ete Eva akanisa ete nyoka nde ezalaki koloba. Kasi ezalaki anzelu wana ye moko nde azalaki koloba. Anzelu yango akómaki na makanisi mabe. Alingaki Adama ná Eva básambelaka ye. Alingaki básala makambo oyo ye akoloba. Alingaki kozwa esika ya Nzambe.
Anzelu wana ya mabe akɔtisaki makanisi ya mabe na motó ya Eva. Asalelaki nyoka mpo na koloba na Eva boye: ‘Nzambe akosaki bino. Bokokufa te soki bolei mbuma ya nzete yango. Bokokóma na mayele lokola Nzambe.’ Soki ozalaki wana, olingaki kondima makambo oyo mongongo wana elobaki?—
Eva abandaki kolula eloko oyo Nzambe apesaki ye te. Alyaki mbuma ya nzete oyo Nzambe apekisaki bango. Na nsima, apesaki yango na Adama. Adama andimaki te makambo oyo nyoka alobaki. Kasi alingaki Eva mingi koleka Nzambe. Yango wana alyaki mpe mbuma ya nzete wana.—Genese 3:1-6; 1 Timote 2:14.
Nini esalemaki?— Adama ná Eva bazalaki lisusu bato ya kokoka te, banunaki mpe bakufaki. Lokola bazalaki lisusu bato ya kokoka te, bana nyonso oyo babotaki bazalaki mpe bato ya kokoka te; nsukansuka bango mpe banunaki mpe bakufaki. Nzambe akosaki te! Mpo na kozala na bomoi esengeli mpenza kotosa ye. (Baloma 5:12) Biblia eyebisi biso ete anzelu oyo akosaki Eva, nkombo na ye Satana Zabolo mpe baanzelu mosusu oyo bakómaki mabe babengaka bango bademo.—Yakobo 2:19; Emoniseli 12:9.
Nini ekómelaki Adama ná Eva ntango bazangaki botosi epai ya Nzambe?
Omoni sikoyo mpo na nini anzelu yango akómaki mabe nzokande Nzambe asalaki ye malamu?— Akómaki mabe mpamba te akómaki kokanisa makambo ya mabe. Alingaki kozala likoló ya bato nyonso. Ayebaki ete Nzambe ayebisaki Adama ná Eva ete bábota bana, mpe alingaki bana wana nyonso básambelaka ye. Zabolo alingi kotinda moto nyonso azanga botosi epai ya Yehova. Yango wana, alukaka kokɔtisa makanisi ya mabe na mitema na biso.—Yakobo 1:13-15.
Zabolo alobaka ete moto moko te alingaka mpenza Yehova. Alobaka ete ngai ná yo tolingaka Nzambe te mpe tolingaka mpenza te kosala makambo oyo Nzambe alobaka. Alobaka ete biso totosaka Yehova kaka ntango makambo ezali kotambola ndenge tolingi. Zabolo alobaka solo? Tozali mpenza ndenge wana?
Moteyi Monene alobaki ete Zabolo azali moto ya lokuta! Yesu amonisaki polele ete alingaka mpenza Yehova na ndenge atosaki Ye. Mpe Yesu atosaki Nzambe kaka na ntango ya bisengo te. Atosaki Nzambe ntango nyonso, ata ntango bato mosusu bazalaki koluka kopekisa ye. Azalaki sembo epai ya Yehova tii na liwa. Yango wana Nzambe asekwisaki ye mpe akokufa lisusu te.
Sikoyo mpo na yo, nani azali monguna na biso ya liboso?— Ezali Satana Zabolo. Okoki komona ye?— Te, ata moke te! Kasi toyebi ete azali mpe aleki biso na nguya. Kasi nani aleki Zabolo?— Yehova Nzambe. Yango wana, toyebi ete Nzambe akoki kobatela biso.
Tángá bavɛrsɛ oyo elobeli Moto moko kaka oyo tosengeli kosambela ye: Deteronome 30:19, 20; Yosua 24:14, 15; Masese 27:11; mpe Matai 4:10.