MITUNA MPO NA BAOYO BALINGI KOZWA BATISIMO
Eteni 1: Bindimeli ya Bakristo
Boyekoli na yo ya Biblia na Batatoli ya Yehova esalisi yo oyeba mateya ya solo. Na ntembe te, makambo oyo oyekoli esalisi yo okóma na boyokani malamu na Nzambe mpe epesi yo elikya ya kozala na bomoi na mikolo ezali koya mpe ya kozwa mapamboli na paradiso awa na mabele, ntango Bokonzi ya Nzambe ekoyangela yango. Okómi kondimela Liloba ya Nzambe mingi, mpe lokola ozali kosangana na lisangá ya bokristo, osili kozwa ebele ya mapamboli. Oyebi sikoyo ndenge oyo Yehova azali kosalela basaleli na ye na mikolo na biso.—Zek. 8:23.
Lokola ozali sikoyo komilɛngɛla mpo na batisimo, ekozala malamu bankulutu ya lisangá bátalela elongo na yo bindimeli ya moboko ya bakristo. (Ebr. 6:1-3) Tiká ete Yehova akoba kopambola yo na milende nyonso oyo ozali kosala mpo na koyeba ye, mpe apesa yo mbano oyo alaki.—Yoa. 17:3.
1. Mpo na nini olingi kozwa batisimo?
2. Yehova azali nani?
• “Yehova azali Nzambe ya solo kuna na likoló mpe awa na mabele. Mosusu azali te.”—Mib. 4:39.
• “Yo, oyo nkombo na yo ezali Yehova, Yo moko nde Oyo-Aleki-Likoló na mabele mobimba.”—Nz. 83:18.
3. Mpo na nini ezali na ntina osalelaka nkombo ya Nzambe?
• “Bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama.’”—Mat. 6:9.
• “Moto nyonso oyo akobelela nkombo ya Yehova akobika.”—Rom. 10:13.
4. Maloba nini Biblia esaleli mpo na kolobela Yehova?
• “Yehova, Mozalisi ya mabele nsuka tii nsuka, azali Nzambe mpo na libela.”—Yis. 40:28.
• “Tata na biso na likoló.”—Mat. 6:9.
• “Nzambe azali bolingo.”—1 Yoa. 4:8.
5. Eloko nini okoki kopesa Yehova Nzambe?
• “Osengeli kolinga Yehova Nzambe na yo na motema na yo mobimba mpe na molimo na yo mobimba mpe na makanisi na yo nyonso mpe na makasi na yo nyonso.”—Mrk. 12:30.
• “Osengeli kosambela nde Yehova Nzambe na yo, mpe kaka ye moko nde osengeli kosalela mosala mosantu.”—Luka 4:8.
6. Mpo na nini olingi kotikala sembo epai ya Yehova?
• “Zalá na bwanya, mwana na ngai, mpe sepelisá motema na ngai, mpo nazongisa monɔkɔ na ye oyo azali kotumola ngai.”—Mas. 27:11.
7. Obondelaka nani, mpe obondelaka ye na nkombo ya nani?
• “Ya solosolo mpenza, ngai [Yesu] nalobi na bino ete: Soki bosɛngi Tata eloko akopesa bino yango na nkombo na ngai.”—Yoa. 16:23.
8. Okoki kobondela mpo na makambo nini?
• “Bosengeli kobondela boye: ‘Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. Bokonzi na yo eya. Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele. Pesá biso lelo bilei na biso mpo na mokolo oyo; mpe limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo bazali na nyongo na biso. Mpe salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na moto mabe.’”—Mat. 6:9-13.
• “Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.”—1 Yoa. 5:14.
9. Nini ekoki kosala ete Yehova ayoka te libondeli oyo moto asali?
• “Bakobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, kasi akoyanola bango te . . . na kolanda mabe oyo basalaki na misala na bango.”—Mika 3:4.
• “Miso ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango; kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka makambo ya mabe.”—1 Pe. 3:12.
10. Yesu Kristo azali nani?
• “Simo Petro ayanolaki ye ete: ‘Ozali Kristo, Mwana ya Nzambe ya bomoi.’”—Mat. 16:16.
11. Mpo na nini Yesu ayaki awa na mabele?
• “Mwana ya moto ayaki, mpo básalela ye te, kasi mpo na kosalela mpe kopesa molimo na ye lisiko na esika ya bato mingi.”—Mat. 20:28.
• “Nasengeli mpe kosakola nsango malamu ya bokonzi ya Nzambe na bingumba mosusu, mpamba te natindamaki mpo na yango.”—Luka 4:43.
12. Ndenge nini okoki komonisa botɔndi mpo na mbeka ya Yesu?
• “Akufelaki bato nyonso mpo baoyo bazali na bomoi bázala na bomoi mpo na bango moko lisusu te, kasi mpo na moto oyo akufelaki bango mpe alamwisamaki.”—2 Ko. 5:15.
13. Bokonzi nini Yesu azali na yango?
• “Bapesi ngai bokonzi nyonso na likoló mpe na mabele.”—Mat. 28:18.
• “Nzambe atombolaki ye likoló koleka mpe na boboto mpenza apesaki ye nkombo oyo eleki nkombo mosusu nyonso.”—Flp. 2:9.
14. Ondimaka ete Lisangani ya Mikóló-Bakambi ya Batatoli ya Yehova nde “moombo ya sembo mpe ya mayele” oyo Yesu atye?
• “Nani azali mpenza moombo ya sembo mpe ya mayele oyo nkolo na ye atye abatela basali ya ndako na ye, mpo na kopesa bango bilei na bango na ntango oyo ebongi?”—Mat. 24:45.
15. Elimo santu ezali moto?
• “Anzelu azongiselaki ye ete: ‘Elimo santu ekoyela yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.’”—Luka 1:35.
• “Yango wana, soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?”—Luka 11:13.
16. Ndenge nini Yehova asalelaki elimo santu na ye?
• “Likoló esalemaki na liloba ya Yehova, mpe limpinga na yango mobimba na elimo ya monɔkɔ na ye.”—Nz. 33:6.
• “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino, mpe bokozala batatoli na ngai . . . tii na esika eleki mpenza mosika na mabele.”—Mis. 1:8.
• “Esakweli moko te ya Likomami euti na ndimbola moko boye ya moto. Mpo esakweli eyá ata mbala moko te na mokano ya moto, kasi bato balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”—2 Pe. 1:20, 21.
17. Bokonzi ya Nzambe ezali nini?
• “Nzambe ya likoló akotya bokonzi moko oyo ekobebisama te. Mpe bokonzi yango ekoleka na ekólo mosusu te. Ekotuta mpe ekosukisa makonzi oyo nyonso, mpe ekotikala seko.”—Dan. 2:44.
18. Bokonzi ya Nzambe ekosala nini mpo na yo?
• “Akopangwisa mpisoli nyonso na miso na bango, mpe liwa ekozala lisusu te, ná lilaka ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala eleki.”—Em. 21:4.
19. Ndenge nini oyebi ete mosika te tokozwa mapamboli ya Bokonzi ya Nzambe awa na mabele?
• “Bayekoli bapusanaki epai na ye kaka bango moko mpe balobaki ete: ‘Yebisá biso: Makambo yango ekosalema ntango nini, mpe elembo nini ekomonisa kozala na yo mpe bosukisi ya makambo ya ntango oyo?’ Mpe Yesu azongiselaki bango ete: ‘. . . ekólo ekobunda na ekólo mpe bokonzi ekobunda na bokonzi, mpe nzala ekozala mpe mabele ekoningana na bisika ndenge na ndenge. Mpe nsango malamu oyo ya bokonzi ekosakolama na mabele mobimba esika bato bafandi mpo ezala litatoli na bikólo nyonso; bongo nsuka ekoya.’”—Mat. 24:3, 4, 7, 14.
• “Mikolo ya nsuka ekozala ntango moko ya mpasi mpenza mpe ya mikakatano. Mpo bato bakozala bato oyo bamilingaka, bato balingá mbongo, bato ya lofundo, bato ya lolendo, bato oyo bafingaka, oyo batosaka baboti te, oyo bazangi botɔndi, oyo bazangi bosembo, oyo balinganaka te na kati ya libota, oyo balingaka kosala boyokani te, oyo bakoselaka bato makambo, oyo bazangi komipekisa, bato ya nko, oyo balingaka makambo ya malamu te, oyo batɛkaka bamosusu, bato ya motó makasi, oyo bavimbi na lolendo, oyo balingá bisengo na esika ya kolinga Nzambe, bazali komonisa ete bazali na ezaleli ya kokangama na Nzambe nzokande bazali kowangana nguya ya ezaleli yango.”—2 Tim. 3:1-5.
20. Ndenge nini okoki komonisa ete Bokonzi ya Nzambe ezali na ntina mpo na yo?
• “Bókoba koluka liboso bokonzi mpe boyengebene na ye, mpe bakobakisela bino biloko nyonso wana mosusu.”—Mat. 6:33.
• “Yesu alobaki na bayekoli na ye ete: ‘Soki moto alingi kolanda ngai, amiboya mpe amema nzete na ye ya mpasi mpe alanda ngai ntango nyonso.’”—Mat. 16:24.
21. Satana ná bademo bazali banani?
• “Bino bouti na tata na bino Zabolo . . . Ye azalaki mobomi-bato ntango abandaki.”—Yoa. 8:44.
• “Dragɔ yango ya monene ebwakamaki na nse, yango nyoka ya ebandeli, oyo babengi Zabolo mpe Satana, oyo azali kokosa mabele mobimba esika bato bafandi; abwakami na mabele, mpe baanzelu na ye babwakami na nse elongo na ye.”—Em. 12:9.
22. Makambo nini ya lokuta Satana akoselaki Yehova, mpe bato oyo basambelaka Yehova?
• “Mwasi alobaki na nyoka ete: ‘Tokoki kolya mbuma ya banzete ya elanga. Kasi na oyo etali kolya mbuma ya nzete oyo ezali na katikati ya elanga, Nzambe alobaki ete: “Bosengeli kolya yango te, ɛɛ, bosengeli kosimba yango te mpo bókufa te.”’ Bongo nyoka alobaki na mwasi ete: ‘Bokokufa soki moke te. Mpo Nzambe ayebi ete mokolo kaka bokolya yango miso na bino ekofungwama mpenza mpe bokokóma mpenza lokola Nzambe, bokoyeba malamu ná mabe.’”—Eba. 3:2-5.
• “Satana apesaki Yehova eyano mpe alobaki: ‘Loposo mpo na loposo, mpe eloko nyonso oyo moto azali na yango akopesa mpo na molimo na ye.’”—Yobo 2:4.
23. Ndenge nini okoki komonisa ete makambo oyo Satana alobaki ezali lokuta?
• “Salelá [Nzambe] na motema mobimba.”—1 Nt. 28:9.
• “Kino nakokufa, nakotika bosembo na ngai te!”—Yobo 27:5.
24. Mpo na nini bato bakufaka?
• “Kaka ndenge lisumu ekɔtaki na mokili mpo na moto moko mpe liwa mpo na lisumu, ndenge moko mpe liwa epalangani epai ya bato nyonso mpo bango nyonso basalaki lisumu.”—Rom. 5:12.
25. Moto akómaka ndenge nini soki akufi?
• “Bato ya bomoi bayebi ete bakokufa; kasi bakufi bayebi ata eloko moko te.”—Mos. 9:5.
26. Elikya nini ezali mpo na moto oyo akufi?
• “Lisekwa ekozala, ya bayengebene mpe ya bato oyo bazangi boyengebene.”—Mis. 24:15.
27. Bato boni bakokende likoló mpo na koyangela ná Yesu?
• “Talá! Mwana-Mpate atɛlɛmi likoló ya Ngomba Siona, mpe elongo na ye bato nkóto nkama moko na ntuku minei na minei (144 000) oyo nkombo na ye mpe nkombo ya Tata na ye ekomamá na bilongi na bango.”—Em. 14:1.