Libondeli
Ndimbola: Kosolola na limemya mpenza na Nzambe ya solo to na banzambe ya lokuta, na mongongo makasi to na kati ya motema.
Okanisaka lokola bato mosusu ete Nzambe ayokaka mabondeli na yo te?
Nzambe asepelaka koyoka mabondeli ya nani?
Nz. 65:2; Mis. 10:34, 35: “Ee Moyoki ya libondeli, ɛɛ bato ya lolenge nyonso bakoya epai na yo.” “Nzambe aponaka bilongi te, kasi na ekólo nyonso moto oyo azali kobanga ye mpe azali kosala makambo ya boyengebene andimami na ye.” (Ezali te ekólo ya moto, loposo ya nzoto, kozala mozwi to mobola nde esalaka ete Nzambe ayoka mabondeli ya moto. Nzambe atalaka nde mposa ya motema ya moto mpe etamboli na ye.)
Luka 11:2: “Ntango bozali kobondela, bóloba: ‘Tata, nkombo na yo esantisama.’” (Obondelaka Tata, oyo Biblia elobi ete nkombo na ye ezali Yehova? To, obondelaka nde “basantu”?)
Yoa. 14:6, 14: “Yesu alobaki na ye ete: ‘Ngai nazali nzela mpe solo mpe bomoi. Moto moko te azali koya epai ya Tata soki na nzela na ngai te. Soki bosɛngi eloko na nkombo na ngai, nakosala yango.’” (Obondelaka na nkombo ya Yesu Kristo, mpo ondimaka ete lokola ozali moto ya masumu, ozali na mposa ete alobela yo epai ya Tata?)
1 Yoa. 5:14: “Kotya motema oyo totyelaka ye yango oyo: ete, ezala eloko nini biso tokosɛnga na boyokani na mokano na ye, akoyoka biso.” (Kasi, mpo moto atya motema ndenge wana, asengeli liboso koyeba mokano ya Nzambe. Na nsima asengeli kosala mabondeli oyo eyokani na mokano yango.)
1 Pe. 3:12: “Mpo miso ya Yehova ezali kotala bayengebene, mpe matoi na ye ezali koyoka lilɔmbɔ na bango; kasi elongi ya Yehova ezali kotɛmɛla baoyo basalaka makambo ya mabe.” (Osilá koyekola oyo Yehova alobi na kati ya Liloba na ye mpo na koyeba nini ezali malamu mpe nini ezali mabe?)
1 Yoa. 3:22: “Nyonso oyo tosɛngaka, tozwaka yango epai na ye, mpo tozali kotosa mibeko na ye mpe tozali kosala makambo oyo esepelisaka ye.” (Ozali mpenza na mposa ya kosepelisa Nzambe, mpe ozali mpenza kosala makasi otosa mibeko na ye oyo osilá koyeba?)
Yis. 55:6, 7: “Bóluka Yehova na ntango oyo akoki komonana. Bóbenga ye na ntango oyo azali pene. Moto mabe atika nzela na ye, mpe moto oyo alukaka kosalela bato mabe atika makanisi na ye; mpe azongela Yehova mpe akoyokela ye mawa, azongela Nzambe na biso, mpo akolimbisa mpenza.” (Yehova, na motema mawa na ye, azali kobenga ata bato oyo basalaki makambo ya mabe ete bábondela ye. Kasi, mpo Nzambe andima bango, basengeli mpenza kobongola motema mpo na etamboli mpe makanisi na bango ya mabe mpe kobongwana.)
Nini ekoki kosala ete Nzambe aboya mabondeli ya moto?
Mat. 6:5: “Ntango bozali kobondela, bosengeli te kozala lokola bakosi; mpamba te balingaka kobondela batɛlɛmi na basinagoga mpe na bisika oyo banzela minene ekutani mpo bato bámona bango. Ya solo nalobi na bino: Bazwi mbano na bango mobimba.” (Talá mpe Luka 18:9-14.)
Mat. 6:7: “Ntango ozali kobondela, kozongela kaka maloba wana mbala na mbala te, ndenge bato ya bikólo basalaka, mpo bakanisaka ete Nzambe akoyoka bango mpo bazali koloba mingi.”
Mas. 28:9: “Ye oyo alongoli litoi na ye ete ayoka mobeko [ya Nzambe] te—ata libondeli na ye ezali eloko moko oyo eyinamá.”
Mika 3:4: “Na ntango yango, bakobelela Yehova mpo na kosɛnga lisalisi, kasi akoyanola bango te. Mpe akobombela bango elongi na ye na ntango wana, na kolanda mabe oyo basalaki na misala na bango.”
Yak. 4:3: “Bosɛngaka, kasi bozwaka te, mpo bozali kosɛnga na mokano ya mabe, mpo bóbebisa yango na bamposa makasi na bino ya bisengo ya nzoto.”
Yis. 42:8, hf; Mat. 4:10, LL: “Ngai nazali Yawe, yango nkombo na ngai, nakopesa nkembo na ngai epai na mosusu te, kosanzola na ngai epai na bikeko te.” “Fukamela Nkolo Nzambe na yo [“Yehova Nzambe na yo,” NW], pe salela bobele ye.” (Talá Nzembo 115:4-8.) (Libondeli ezali lolenge moko ya losambo. Soki ozali kobondela liboso ya bikeko, to bililingi, yango ekosepelisa Nzambe?)
Yis. 8:19: “Soki balobi na bino: ‘Bótuna bato oyo basololaka na bilimo to baoyo bazali na elimo ya koyebisa makambo oyo ekoya, baoyo bazali koloba swiswiswi mpe na mingongo ya nse,’ bato na bato basengeli nde kotuna Nzambe na bango te? Basengeli nde kotunela bato ya bomoi makambo epai na bakufi?”
Yak. 1:6, 7: “Akoba kosɛnga na kondima, abɛta ntembe ata moke te, mpo moto oyo azali kobɛta ntembe azali lokola mbonge ya mbu oyo mopɛpɛ ezali komema mpe kotindika epai na epai. Ya solo, moto wana akanisa te ete akozwa eloko epai ya Yehova.”
Tosengeli kobondela mpo na makambo nini?
Mat. 6:9-13: “Yango wana, bosengeli kobondela boye: ‘[1] Tata na biso na likoló, nkombo na yo esantisama. [2] Bokonzi na yo eya. [3] Mokano na yo esalema, lokola na likoló, ndenge moko mpe na mabele. [4] Pesá biso lelo bilei na biso mpo na mokolo oyo; mpe [5] limbisá biso banyongo na biso, ndenge biso mpe tolimbisi bato oyo bazali na nyongo na biso. Mpe [6] salisá biso tókwea na komekama te, kasi bikisá biso na moto mabe.’” (Simbá ete na mabondeli na biso, nkombo ya Nzambe mpe mokano na ye nde esengeli kozala na esika ya liboso.)
Nz. 25:4, 5: “Salá ete nayeba banzela na yo, Ee Yehova; teyá ngai banzela na yo. Tambwisá ngai na solo na yo mpe teyá ngai, mpo yo ozali Nzambe ya elikya na ngai.”
Luka 11:13: “Soki bino, atako bozali bato mabe, boyebi kopesa bana na bino makabo ya malamu, bongo Tata na likoló akopesa te baoyo bazali kosɛnga ye elimo santu koleka?”
1 Tes. 5:17, 18: “Bóbondelaka ntango nyonso. Na makambo nyonso bópesaka matɔndi.”
Mat. 14:19, 20: “[Yesu] akamataki mampa yango mitano ná mbisi yango mibale, mpe atalaki likoló, abondelaki mpe, nsima ya kobuka mampa yango, akabolelaki yango bayekoli, bayekoli mpe bakabolelaki ebele ya bato yango. Bongo bango nyonso balyaki mpe batondaki.”
Yak. 5:16: “Bóbondelanaka.”
Mat. 26:41: “Bósɛnzɛlaka mpe bóbondelaka ntango nyonso, mpo bókwea na komekama te.”
Flp. 4:6: “Bómitungisa ata na likambo moko te, kasi na makambo nyonso na libondeli mpe na lilɔmbɔ ná matɔndi, kosɛnga na bino eyebana epai ya Nzambe.”
Soki moto alobi—
‘Tóbondela liboso, nsima okoyebisa ngai nsango oyo oyeli ngai’
Okoki koyanola: ‘Nasepeli koyeba ete osepelaka mingi na libondeli. Batatoli ya Yehova mpe babondelaka mingi. Kasi mbala mosusu oyebi te oyo Yesu alobaki mpo na ntango mpe ndenge oyo tosengeli kobondela. Oyebi ete ayebisaki bayekoli na ye bábondelaka te na miso ya bato nyonso mpo na komonisa ete bango nde babondelaka mingi? . . . (Mat. 6:5)’ Okoki kobakisa: ‘Talá makambo oyo alobaki lisusu ete esengeli kozala na esika ya liboso na mabondeli na biso. Yango nde nsango oyo namemeli yo. (Mat. 6:9, 10)’
To okoki koloba: ‘Nayebi ete bato ya mangomba mosusu basalaka bongo. Kasi Batatoli ya Yehova basalaka bongo te, mpo Yesu ayebisaki bayekoli na ye likambo oyo basengeli kosala ntango bakei kosakola. Alobaki te ete: “Ntango bokɔti na ndako, bóbondela liboso,” kasi talá oyo alobaki awa na Matai 10:12, 13. . . . Mpe talá likambo oyo basengelaki kolobela awa na vɛrsɛ 7. . . . Ndenge nini Bokonzi yango ekoki kosalisa bato lokola ngai ná yo? (Em. 21:4)’