Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 41 lok. 100-lok. 101 par. 2
  • Davidi ná Saulo

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Davidi ná Saulo
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Davidi akimi Saulo
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Davidi akómi Mokonzi
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • “Kotosa eleki mbeka”
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Na kati ya 1 Samwele
    Biblia—Libongoli ya Mokili ya Sika
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 41 lok. 100-lok. 101 par. 2
Davidi azali kobelela na kaa ya Saulo

LITEYA 41

Davidi ná Saulo

Ntango Davidi abomaki Goliate, Mokonzi Saulo atyaki ye mokambi ya basoda na ye. Davidi alongaki bitumba ebele, mpe ayebanaki mingi mpenza. Soki Davidi auti etumba, basi bazalaki kobina mpe koyemba ete: ‘Saulo abomaki bankóto, kasi Davidi abomi bankóto zomi!’ Saulo akómaki koyokela Davidi zuwa mpe alingaki koboma ye.

Davidi ayebaki kobɛta nzɛnzɛ malamu. Mokolo moko ntango azalaki kobɛtɛla Saulo nzɛnzɛ, Saulo abwakelaki ye likɔnga. Davidi akimaki yango mpe likɔnga ekɔtaki na efelo. Na nsima, Saulo alukaki lisusu koboma Davidi mbala ebele. Nsukansuka, Davidi akimaki mpe akendaki kobombana na esobe.

Davidi azwi likɔnga ya Saulo, wana Saulo alali

Saulo azwaki basoda 3000 mpo bákende kolukaluka Davidi. Mokolo moko, Saulo akɔtaki na mobenga (lidusu moko na kati ya libanga ya monene) esika Davidi ná bato na ye mpe babombanaki. Bato ya Davidi bayebisaki ye na litoi ete: ‘Ntango ya koboma Saulo yango oyo.’ Davidi apusanaki malɛmbɛ esika Saulo azalaki mpe akataki eteni ya kazaka ya mokonzi yango. Saulo ayebaki te. Na nsima, Davidi ayokaki mabe mpenza mpo azangaki limemya epai ya mokonzi oyo Yehova atyaki mafuta. Aboyaki bato na ye básala Saulo mabe. Davidi abelelaki kutu Saulo ete akokaki koboma ye ntango azwaki libaku ya kosala yango. Saulo atikaki koyina Davidi?

Te, akobaki kaka kolukaluka Davidi mpo na koboma ye. Mokolo moko na butu, Davidi ná mwana ya ndeko na ye, Abishai, bakɔtaki na mayele na kaa ya Saulo. Ata Abinere, mokɛngɛli ya mokonzi, alalaki mpɔngi. Abishai alobaki: ‘Libaku yango oyo! Tiká naboma ye.’ Davidi ayebisaki ye: ‘Yehova ye moko akokata likambo ya Saulo. Tózwa kaka likɔnga mpe elokó na ye ya mai tókende.’

Davidi amataki na ngomba moko mpo amona kaa ya Saulo malamu. Agangaki: ‘Abinere, mpo na nini obateli mokonzi na yo te? Wapi elokó ya mai ná likɔnga ya Saulo?’ Saulo ayebaki mongongo ya Davidi mpe alobaki: ‘Okokaki koboma ngai, kasi osali yango te. Nayebi ete okokóma mokonzi ya Yisraele nsima na ngai.’ Saulo azongaki na ndako na ye. Kasi bato mosusu ya libota ya Saulo bazalaki koyina Davidi te.

“Soki likoki ezali, soki etaleli kaka bino, bózala na kimya na bato nyonso. Bandeko ya bolingo, moto oyo asali bino mabe, bózongisela ye mabe te kasi bótikela nde nkanda esika.”​—Baroma 12:18, 19

Mituna: Mpo na nini Saulo alingaki koboma Davidi? Mpo na nini Davidi aboyaki koboma Saulo?

1 Samwele 16:14-23; 18:5-16; 19:9-12; 23:19-29; 24:1-15; 26:1-25

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto