Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 49 lok. 118-lok. 119 par. 2
  • Mwasi ya mokonzi moko azwi etumbu

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Mwasi ya mokonzi moko azwi etumbu
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Yezabele, mwasi mabe
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Yehu abundaki mpo na losambo ya pɛto
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
  • Sikoyo nde ntango ya kozwa ekateli
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2005
  • Ayikaki mpiko na makambo ya kozanga bosembo
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2014
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 49 lok. 118-lok. 119 par. 2
Basali ya Yezabele bazali kobwaka ye na lininisa

LITEYA 49

Mwasi ya mokonzi moko azwi etumbu

Longwa na lininisa ya ndako na ye na Yizireele, Mokonzi Ahaba azalaki komona elanga ya vinyo ya mobali moko na nkombo Nabote. Ahaba alulaki elanga yango, mpe alingaki Nabote atɛkɛla ye yango. Kasi Nabote aboyaki mpo Mibeko ya Yehova epekisaki kotɛka mabele bankɔkɔ batiká. Ahaba asepelaki na Nabote mpo asalaki oyo ezali malamu? Te. Ayokaki nkanda makasi. Akómaki mawamawa, aboyaki kolongwa na mbeto mpe aboyaki kolya.

Yezabele, mwasi na ye ya motema mabe, ayebisaki ye: ‘Ozali mokonzi ya Yisraele. Okoki kozwa eloko nyonso olingi. Nakozwela yo mabele wana.’ Akomelaki mikóló ya engumba mikanda; ayebisaki bango bákosela Nabote makambo ete alakeli Nzambe mabe mpe bábamba ye mabanga akufa. Mikóló yango basalaki ndenge Yezabele ayebisaki bango, mpe na nsima Yezabele alobaki na Ahaba: ‘Nabote akufi. Elanga ya vinyo ekómi ya yo.’

Longola Nabote, Yezabele abomaki mpe bato mosusu oyo basalaki eloko te. Abomaki bato mingi oyo bazalaki kolinga Yehova. Azalaki kosambela bikeko mpe asalaki makambo mosusu ya mabe. Yehova amonaki nyonso oyo Yezabele azalaki kosala. Asalaki ye nini?

Ntango Ahaba akufaki, mwana na ye ya mobali Yehorame akómaki mokonzi. Yehova atindaki mobali moko na nkombo Yehu apesa Yezabele ná libota na ye etumbu.

Yehu amemaki likalo na ye tii na Yizireele, esika Yezabele azalaki kofanda. Yehorame ayaki na likalo mpo na kokutana na Yehu mpe atunaki ye: ‘Kimya ezali kati na biso?’ Yehu alobaki: ‘Kimya ekozala te, mpo mama na yo Yezabele azali kosala makambo ya mabe.’ Yehorame alukaki kobalusa likalo na ye mpo akima. Kasi Yehu abɛtaki ye likula, mpe akufaki.

Yehu azali kobelela basali bábwaka Yezabele

Na nsima, Yehu akendaki na ndako ya Yezabele. Ntango Yezabele ayokaki ete Yehu azali koya, asalaki monzɛlɛ, abongisaki nsuki, mpe afandaki na lininisa na likoló mpo na kozela. Ntango Yehu akómaki, apesaki Yezabele mbote na lityo. Abelelaki basali ya Yezabele oyo bazalaki na ye ete: “Bóbwaka ye na nse!” Batindikaki Yezabele na lininisa, akweaki na mabele mpe akufaki.

Nsima na yango, Yehu abomaki bana 70 ya Ahaba mpe alongolaki losambo ya Baala na mboka. Omoni? Yehova ayebaka makambo nyonso mpe na ntango oyo ebongi, apesaka bato oyo basalaka mabe etumbu!

“Libula oyo ezwami na lokoso na ebandeli, ekozala lipamboli te na nsuka.”​—Masese 20:21

Mituna: Yezabele asalaki nini mpo na kozwa elanga ya vinyo ya Nabote? Mpo na nini Yehova apesaki Yezabele etumbu?

1 Bakonzi 21:1-29; 2 Bakonzi 9:1–10:30

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto