Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lfb liteya 6 lok. 20-lok. 21 par. 5
  • Bato mwambe bakɔti na mokili moko ya sika

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Bato mwambe bakɔti na mokili moko ya sika
  • Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Masolo mosusu
  • Masuwa ya Noa
    Zwá mateya na masolo ya Biblia
  • Mpela na mokili mobimba
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Noa atongi masuwa
    Mokanda mpo na masolo ya Biblia
  • Nzambe ‘abatelaki ye ná bato mosusu nsambo’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2013
Makambo mosusu
Zwá mateya na masolo ya Biblia
lfb liteya 6 lok. 20-lok. 21 par. 5
Masuwa ezali kotepatepa na nse ya mbula

LITEYA 6

Bato mwambe bakɔti na mokili moko ya sika

Noa, libota na ye, mpe banyama babimi na masuwa

Noa, libota na ye, ná banyama bakɔtaki na masuwa. Yehova akangaki porte na yango, mpe mbula ebandaki kobɛta. Mbula ebɛtaki makasi mpe masuwa ebandaki kotepatepa. Nsukansuka, mabele mobimba etondaki na mai. Na libándá ya masuwa, bato mabe nyonso bakufaki. Kasi Noa ná libota na ye bazalaki na likama te na kati ya masuwa. Kanisá esengo oyo bayokaki mpo batosaki Yehova!

Mbula ebɛtaki mikolo 40 butu moi; na nsima esilaki. Mokemoke, mai ebandaki kokauka. Nsukansuka, masuwa etɛlɛmaki na bangomba. Kasi mai ezalaki naino mingi na mokili; na yango, Noa ná libota na ye bakokaki kobima mbala moko te na masuwa.

Kendekende, mai ekaukaki. Noa ná libota na ye bafandaki na kati ya masuwa koleka mbula mobimba. Na nsima, Yehova ayebisaki bango bábima na masuwa, mpe bamonaki lokola mokili ekómi mokili ya sika. Bapesaki Yehova matɔndi mingi ndenge abikisaki bango, mpe bapesaki ye makabo ya kotumba.

Monama

Yehova andimaki makabo yango. Alakaki ete akoboma lisusu mokili na mpela te. Mpo na elaka yango, apesaki elembo moko, abimisaki monama ya liboso na mapata. Osí omoná monama?

Na nsima, Yehova ayebisaki Noa ná libota na ye bábota bana mpe bátondisa mabele.

“Noa akɔtaki na masuwa; mpe [bato] batyaki likebi te tii mpela eyaki mpe ekɔmbɔlaki bango nyonso.”​—Matai 24:38, 39

Mituna: Nini esalemaki ntango Yehova akangaki porte ya masuwa? Soki tomoni monama tosengeli kokanisa nini?

Ebandeli 7:1–9:17

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto