Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • lff liteya 5
  • Biblia ezali na nsango ya Nzambe

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Biblia ezali na nsango ya Nzambe
  • Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • KƆTÁ NA MOZINDO
  • NA MOKUSE
  • MAKANISI MOSUSU
  • Nsango malamu euti mpenza epai ya Nzambe?
    Nsango malamu oyo euti na Nzambe!
  • Lolenge okoki koyeba oyo Nzambe azali kosɛnga
    Nzambe azali kosɛnga nini epai na biso?
  • Biblia ekoki kosalisa yo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
  • Biblia ekoki kosalisa yo?
    Sepelá na bomoi libela na libela!—Mateya ya ebandeli mpo na koyekola Biblia
Makambo mosusu
Sepelá na bomoi libela na libela!—Boyekoli ya Biblia
lff liteya 5
Liteya 05. Mobali moko azali kotánga Biblia na kati ya bisi.

LITEYA 05

Biblia ezali na nsango ya Nzambe

Ya Papye
Ya Papye
Ya Papye

Biblia ezali likabo moko kitoko oyo Yehova apesá biso, mpe ezali na mikanda ya mike 66. Kasi okoki komituna: ‘Biblia eutá wapi? Ezali mokanda ya nani?’ Mpo na koyanola na mituna yango, tólobela naino ndenge nsango ya Nzambe oyo ezali na Biblia ekómelaki biso.

1. Soki bato nde bakomaki Biblia, mpo na nini tolobi ete ezali mokanda ya Nzambe?

Bato soki 40 nde bakomaki Biblia na boumeli ya bambula soki 1 600, elingi koloba banda na mbula 1513 L.T.B. tii na mbula soki 98 T.B. Bato yango bazalaki na mimeseno mpe makambo ya bomoi ekeseni. Atako bongo, Biblia mobimba eyokani. Mpo na nini? Mpo Biblia ezali mokanda ya Nzambe. (Tángá 1 Batesaloniki 2:13.) Bato oyo bakomaki Biblia bakomaki makanisi na bango moko te. Kasi, “balobaki makambo oyo euti na Nzambe ndenge elimo santu ezalaki kotinda bango.”a (2 Petro 1:21) Nzambe asalelaki elimo santu na ye mpo na kotambwisa to kotinda bato bákoma makanisi na ye.​—2 Timote 3:16.

2. Biblia ezali mpo na banani?

Liloba ya Nzambe elobi: “Bikólo nyonso, mabota nyonso, minɔkɔ nyonso mpe mikili nyonso” bakoki kozwa bolamu na nsango malamu oyo ezali na Biblia. (Tángá Emoniseli 14:6.) Lelo oyo, Biblia ezali na minɔkɔ ebele koleka babuku mosusu nyonso. Bato mingi bazali na Biblia, ezala bafandaka na ekólo nini to balobaka monɔkɔ nini.

3. Ndenge nini Yehova abatelaki Biblia?

Biblia ekomamaki na biloko oyo ebebaka noki. Atako bongo, bato oyo bazalaki kolinga Biblia bazalaki kosala bakopi na yango na mabɔkɔ mpe kolandela yango malamumalamu mpo mbeba ekɔta te. Atako bakonzi mosusu ya mokili mpe ya mangomba balingaki kolimwisa Biblia, bato mosusu batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobatela yango. Yehova atikaki te ete bato to eloko mosusu epekisa ye kosolola na biso. Biblia elobi ete: “Liloba ya Nzambe na biso ekoumela seko.”​—Yisaya 40:8.

KƆTÁ NA MOZINDO

Luká koyeba makambo mosusu oyo emonisi ndenge Nzambe asalelaki elimo santu mpo na kosalisa bato bákoma Biblia. Mpe luká koyeba ndenge abatelaki yango, mpe ndenge asali ete bato bázala na yango.

4. Biblia yango moko elobi soki ezali mokanda ya nani

Talá VIDEO. Na nsima tángá 2 Timote 3:16, mpe yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Biblia ezali mokanda ya nani?​—Video ya mokuse (2:48)

  • Soki bato nde bakomaki Biblia, mpo na nini babengaka yango Liloba ya Nzambe?

  • Okanisi nini, ekoki mpenza kosalema ete Nzambe ayebisaki bato bákoma makanisi na ye?

Mokonzi moko ya kompanyi azali koyebisa sɛkrɛtɛrɛ na ye makambo, mpe sɛkrɛtɛrɛ azali kokoma yango.

Moto akoki koyebisa moto mosusu makambo mpo akoma yango na mokanda. Ndenge moko mpe, Nzambe ayebisaki bato bákoma Biblia, kasi nsango yango eutaki epai na ye

5. Biblia ezali kaka atako balukaki kolimwisa yango

Soki Biblia ezali mokanda ya Nzambe, asengeli mpe kobatela yango, boye te? Na boumeli ya bambula mingi, bakonzi mosusu ya mokili mpe ya mangomba balukaki kolimwisa Biblia. Bato mingi batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobatela Biblia atako bakutanaki na botɛmɛli mpe liwa. Mpo na koyeba moko na bango, talá VIDEO, mpe na nsima yanolá na mituna oyo elandi.

VIDEO: Bazwaki Biblia na motuya mingi mpenza​—Video ya mokuse (William Tyndale) (6:17)

  • Lokola oyebi ete bato batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobatela Biblia, epesi yo mposa ya kotánga yango? Mpo na nini?

Tángá Nzembo 119:97, mpe na nsima yanolá na motuna oyo:

  • Nini etindaki bato mingi bátya bomoi na bango na likama mpo na kobongola mpe kokabola Biblia?

6. Buku moko mpo na bato nyonso

Biblia ezali buku oyo ebongolami na minɔkɔ mingi mpe ekabolami na mokili mobimba. Tángá Misala 10:34, 35, mpe na nsima yanolá na mituna oyo:

  • Mpo na nini Nzambe alingi ete Liloba na ye ebongolama mpe ekabolama?

  • Mpo na nini osepelaka na Biblia?

Bato ya loposo mpe ya bikólo ndenge na ndenge bazali kotánga Biblia na monɔkɔ na bango moko.

Pene na

100%

ya bato na mokili mobimba

bazali na Biblia na monɔkɔ oyo bayebi malamu

Ezali na

minɔkɔ koleka

3 000

na ndambo to na mobimba na yango

Babiblia oyo ekabolami ezali soki

5 000 000 000

ekabolami koleka babuku nyonso

SOKI MOTO ALOBI NA YO: “Biblia ezali kaka buku moko ya kala oyo bato bakomá.”

  • Okanisi nini?

  • Nini emonisi ete Biblia ezali Liloba ya Nzambe?

NA MOKUSE

Biblia ezali Liloba ya Nzambe, mpe abatelaki yango mpo bato nyonso bázala na yango.

Bozongeli

  • Ntango tolobaka ete elimo ya Nzambe nde etambwisaki bato oyo bakomaki Biblia, yango elingaka koloba nini?

  • Nini ezali kokamwisa yo na ndenge oyo Biblia ebatelamaki, ebongolami, mpe ekabolami?

  • Lokola oyebi nyonso oyo Nzambe asalaki mpo na kosolola na yo, yango etindi yo osala nini?

Oyo okoki kosala

MAKANISI MOSUSU

Tángá lisolo ya Biblia mpe talá ndenge ebandaki tii ndenge ekómi lelo oyo.

“Ndenge oyo Biblia ebatelamá tii na mikolo na biso” (Lamuká! ya 04/2008)

Talá makama misato oyo Biblia elongaki.

“Biblia​—Ndenge oyo ebatelamaki” (Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli No. 4 2016)

Talá ndenge bato mosusu batyaki bomoi na bango na likama mpo na kobongola Biblia.

Bazwaki Biblia na motuya mingi mpenza (14:26)

Bato basalaki bakopi ya Biblia mpe babongolaki yango mbala na mbala. Ndenge nini tokoki koyeba ete nsango ya Nzambe ebongwani te?

“Biblia ebongwaná to babebisá makambo mosusu na kati?” (Lisolo oyo ezali na Internet)

a Na Liteya 7 tokomona ete elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo asalaka na yango mosala.

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto