Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/2 lok. 5
  • Nzambe azali moto ya solo mpenza?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Nzambe azali moto ya solo mpenza?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Masolo mosusu
  • Nzambe azalaka bisika nyonso?
    Lamuká!—2005
  • Nzambe azali nani?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2002
  • Elimo santu ezali moto?
    Lamuká!—2006
  • Nzambe azalaka bisika nyonso?
    Biyano na mituna ya Biblia
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/2 lok. 5

Nzambe azali moto ya solo mpenza?

Biyano oyo bato bapesaka:

◼ “Azalaka bisika nyonso, na kati ya eloko nyonso. Azali lokola mopɛpɛ.”

◼ “Azali nguya moko oyo emonanaka te.”

Yesu ateyaki nini?

◼ “Na ndako ya Tata na ngai bisika ya kofanda ezali mingi.” (Yoane 14:2) Na elobeli ya elilingi, Yesu amonisaki ete Nzambe azali na ndako to esika oyo afandaka.

◼ “Nautaki epai ya Tata mpe nayei na mokili. Lisusu, nazali kotika mokili mpe nazali kokende epai ya Tata.” (Yoane 16:28) Yesu azalaki kondima ete Nzambe azali moto ya solo mpenza mpe azali na esika oyo afandaka.

YESU amonisaki te ete Nzambe azali nguya moko boye oyo emonanaka te. Kutu, azalaki kosolola na Nzambe mpe kosambela ye. Mbala mingi, azalaki kobenga Yehova Tata na ye ya likoló, maloba oyo ezalaki komonisa boyokani makasi oyo ezali kati na ye ná Nzambe.​—Yoane 8:19, 38, 54.

Ezali solo ete “moto amoná Nzambe ata mokolo moko te” mpe ete “Nzambe azali elimo.” (Yoane 1:18; 4:24) Kasi, yango elimboli te ete azali na nzoto te. Biblia elobi boye: “Soki nzoto ya mosuni ezali, oyo ya elimo mpe ezali.” (1 Bakolinti 15:44) Na yango, tokoki koloba ete Yehova azali na nzoto ya elimo?

Ɛɛ, ntango Yesu asekwaki, “akɔtaki . . . na kati ya likoló mpenza, mpo na komonana sikoyo liboso ya Nzambe mpenza mpo na biso.” (Baebele 9:24) Yango eteyi biso makambo mibale ya ntina mpo na Nzambe. Ya liboso, azali na esika oyo afandaka. Ya mibale, azali Moto mpenza, kasi te nguya moko boye oyo ezalaka na bisika nyonso.

Kasi, ndenge nini nguya ya Nzambe ekoki komonana na bisika nyonso? Nzambe akoki kotinda elimo santu, to nguya na ye, na bisika nyonso na molɔ́ngɔ́. Lokola tata oyo asemboli lobɔkɔ mpo na kobɔndisa mpe kosunga bana na ye, Nzambe atindaka elimo santu mpo na kokokisa mokano na ye.​—Nzembo 104:30; 139:7.

Lokola Nzambe azali Moto ya elimo, azali mpe na bizaleli, na makambo oyo alingaka mpe oyo aboyaka. Biblia eyebisi biso ete alingaka basaleli na ye, asepelaka na misala na ye, ayinaka losambo ya bikeko, mpe ayokaka mawa soki bato basali mabe. (Genese 6:6; Deteronome 16:22; 1 Bakonzi 10:9; Nzembo 104:31) Na 1 Timote 1:11, Biblia ebengi ye “Nzambe ya esengo.” Tokoki kokamwa te ndenge Yesu alobaki ete tokoki kolinga Nzambe na motema na biso mobimba!​—Malako 12:30.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu na likambo yango, talá mokapo 1 ya buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Likanisi ya paragrafe na lokasa 5]

Lokola Tata ya bolingo, Nzambe atindaka elimo santu na ye mpo na kokokisa mokano na ye

    Mikanda na Lingala (1984-2025)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto