Nzambe azali na nkombo?
Biyano oyo bato bapesaka:
▪ “Nkombo na ye ezali Nzambe.”
▪ “Azali na nkombo te.”
Yesu ateyaki nini?
▪ “Bosengeli kobondela ndenge oyo: ‘Tata na biso na likoló, tiká nkombo na yo esantisama.’” (Matai 6:9) Yesu azalaki kondima ete Nzambe azali na nkombo.
▪ “Nayebisi bango nkombo na yo mpe nakoyebisa yango, mpo bolingo oyo olingaki ngai na yango ezala na kati na bango mpe ngai na bomoko elongo na bango.” (Yoane 17:26) Yesu ayebisaki bato nkombo ya Nzambe.
▪ “Bokomona ngai ata moke te tii na ntango bokoloba, ‘Apambolami moto oyo azali koya na nkombo ya Yehova.’” (Luka 13:35; Nzembo 118:26) Yesu azalaki kosalela nkombo ya Nzambe.
NZAMBE ayebisi biso nkombo na ye. Alobi boye: “Ngai nazali Yawe, yango nkombo na ngai.”a (Yisaya 42:8, Biblia haut fleuve) Yawe ezali lolenge bato mingi oyo balobaka Lingala babenga nkombo oyo Nzambe amipesaki na monɔkɔ ya Liebele. Okoki kokamwa soki bayebisi yo ete nkombo yango ya Liebele ekomamaki mbala soki 7 000 na bamaniskri ya kala ya Biblia. Ya solo, Makomami ya Liebele esaleli nkombo yango mbala mingi koleka bankombo mosusu nyonso oyo ezali na Biblia.
Na motuna “Nkombo ya Nzambe ezali nani?” bato mingi bayanolaka: “Nzambe kaka.” Nzokande, yango ezali kaka lokola moto oyo batuni ye soki nkombo ya prezida ya mboka na bango nani, mpe ye alobi: “prezida.” Moto yango apesi eyano ya malamu te, mpo “prezida” ezali nkombo ya moto moko te.
Mpo na nini Nzambe ayebisaki bato nkombo na ye? Asalaki bongo mpo tóyeba ye malamu. Na ndakisa, moto moko akoki kobengama patrɔ, Tata to nkɔkɔ, na kotalela moto oyo abengi ye. Titre mokomoko ezali kosalisa biso tóyeba likambo moko mpo na moto yango. Kasi, nkombo ya moto ekundwelaka biso makambo nyonso oyo toyebi na ntina na ye. Ndenge moko mpe, batitre lokola Nkolo, Mozwi-ya-Nguya-Nyonso, Tata, mpe Mozalisi ebendaka likebi na biso na misala ndenge na ndenge ya Nzambe. Kasi, kaka nkombo na ye Yehova nde ekundwelaka biso nyonso oyo toyebi na ntina na ye. Ndenge nini okoki koloba ete oyebi Nzambe soki oyebi ata nkombo na ye te?
Ezali mpenza na ntina tóyeba nkombo ya Nzambe mpe tósalelaka yango. Mpo na nini? Biblia elobi boye: “Moto nyonso oyo azali kobelela nkombo ya Yehova akobika.”—Baloma 10:13; Yoele 2:32.
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba ndimbola ya nkombo ya Nzambe mpe ntina oyo mabongoli mosusu esaleli nkombo yango te, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? nkasa 195-197, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 6]
Moto akoki kobengama patrɔ, Tata to nkɔkɔ, na kotalela moto oyo abengi ye. Kasi, nkombo na ye ekoki kokundwela biso makambo nyonso oyo toyebi na ntina na ye