Nzambe akipaka ngai mpenza?
Biyano oyo bato bapesaka:
▪ “Ngai nde nani mpo Nzambe akipe makambo na ngai?”
▪ “Nandimi te ete akipaka ngai.”
Yesu ateyaki nini?
▪ “Bakɛngɛli-mboka mitano etɛkamaka na mbongo mibale ya bibende ya motuya moke, boye te? Nzokande Nzambe abosanaka ata moko na yango te. Kasi ata nsuki ya mitó na bino etángami yango nyonso. Bóbanga te; bino boleki bakɛngɛli-mboka ebele na motuya.” (Luka 12:6, 7) Tomoni polele ete Yesu ateyaki ete Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso.
▪ “Boye bómitungisa soki moke te mpe bóloba te ete, ‘Tokolya nini?’ to, ‘Tokomɛla nini?’ to, ‘Tokolata nini?’ Mpo nyonso wana ezali biloko oyo bikólo mosusu balukaka na lokoso mpenza. Mpo Tata na bino ya likoló ayebi ete bozali na mposa ya biloko nyonso wana.” (Matai 6:31, 32) Yesu andimaki ete Nzambe ayebi bamposa ya mokomoko na biso.
BIBLIA emonisi ete Nzambe akipaka biso. (Nzembo 55:22; 1 Petelo 5:7) Kasi, soki ezali bongo, mpo na nini tozali komona mpasi mingi lelo oyo? Soki Nzambe azali bolingo mpe azali na nguya nyonso, mpo na nini azali kosala eloko te mpo na kosilisa bampasi?
Eyano na mituna wana ebombami na likambo moko oyo bato mingi bayebi te: Satana Zabolo azali moyangeli ya mokili oyo ya mabe. Mpo na komeka Yesu Satana alakaki ete akopesa ye makonzi nyonso ya mokili mpe alobaki na ye boye: “Nakopesa yo bokonzi oyo nyonso mpe nkembo na yango, mpamba te bapesá ngai yango, mpe napesaka yango na nani oyo nalingi.”—Luka 4:5-7.
Nani atyá Satana mokonzi ya mokili? Ntango baboti na biso ya liboso, Adama ná Eva, balandaki nzela ya Satana mpe bapesaki Nzambe mokɔngɔ, bamonisaki ete baponi Satana azala moyangeli na bango. Banda ntango wana, Yehova Nzambe atikaki ntango mpo bato bango moko bámona ete boyangeli ya Satana ekoki kolonga te. Yehova asɛngaka moto na makasi te ete asalela ye, kasi apesá moto nyonso libaku ya kozonga epai na ye.—Baloma 5:10.
Lokola Nzambe amibanzabanzaka mpo na biso, azwá bibongiseli mpo Yesu asikola biso na boyangeli ya Satana. Mosika te, Yesu ‘akobebisa nyɛɛ moto oyo azali na likoki ya kopesa liwa, elingi koloba, Zabolo.’ (Baebele 2:14) Na ndenge yango, ‘akobukabuka misala ya Zabolo.’—1 Yoane 3:8.
Mabelé ekokóma lisusu Paladiso. Na ntango yango, Nzambe “akopangwisa mpisoli nyonso na miso [ya bato na ye], mpe liwa ekozala lisusu te, ná mawa ná koganga ná mpasi ekozala lisusu mpe te. Makambo ya kala [ekoleka].”—Emoniseli 21:4, 5.a
[Maloba na nse ya lokasa]
a Mpo na koyeba lisusu malamumalamu ntina oyo Nzambe atiki bampasi ezala, talá buku Biblia eteyaka mpenza nini? mokapo 11, ebimisami na Batatoli ya Yehova.
[Likanisi ya paragrafe na lokasa 8]
Mabelé ekokóma lisusu Paladiso