Watchtower MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Watchtower
MIKANDA OYO EZALI NA INTERNET
Lingala
  • BIBLIA
  • MIKANDA
  • MAKITA
  • w09 1/10 nk. 4-6
  • Elimo santu ezali nini?

Video ezali awa te.

Esimbi te. Video oyo esali mwa mindɔndɔ.

  • Elimo santu ezali nini?
  • Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
  • Mitó ya makambo mike
  • Masolo mosusu
  • “Nguya ya Oyo-Aleki-Likoló”
  • “Elimo ya Yehova ezali na ngai”
  • Elimo santu ezali nini?
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1991
  • ‘Na nkombo na elimo santu’
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Elimo santu ezali likabo na Jéhovah
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—1992
  • Litambwisi ya elimo ya Nzambe na ekeke ya liboso mpe na mikolo na biso
    Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2011
Makambo mosusu
Linɔ́ngi ya Mosɛnzɛli eyebisaka Bokonzi ya Yehova—2009
w09 1/10 nk. 4-6

Elimo santu ezali nini?

MOKOLO moko, Yesu atunaki bayekoli na ye boye: “Tata nani na kati na bino oyo soki mwana na ye asɛngi mbisi, akopesa ye mbala mosusu nyoka na esika ya mbisi? To soki mpe asɛngi maki, akopesa ye nkotó?” (Luka 11:11, 12) Bana ya Galile bazalaki kosepela kolya maki mpe mbisi; ezalaki biloko oyo bazalaki kolinga mingi.

Yesu alobaki ete tosengeli kolɛmba te kosɛngaka elimo santu, lokola mwana oyo azali na nzala azali kosɛnga bilei. (Luka 11:9, 13) Koyeba soki elimo santu ezali nini ekosalisa biso tóyeba ntina na yango na bomoi na biso. Tótala naino oyo Biblia elobi na ntina na elimo santu.

“Nguya ya Oyo-Aleki-Likoló”

Makomami emonisi polele ete elimo santu ezali nguya oyo Nzambe asalelaka mpo na kokokisa mokano na ye. Ntango Anzelu Gabriele ayaki koyebisa Maria ete akobota mwana mobali atako ayebaki naino mibali te, alobaki na ye boye: “Elimo santu ekoyela yo, mpe nguya ya Oyo-Aleki-Likoló ekozipa yo. Yango wana mpe mwana oyo akobotama akobengama mosantu, Mwana ya Nzambe.” (Luka 1:35) Maloba ya Gabriele emonisi ete boyokani ezali kati na elimo santu mpe “nguya ya Oyo-Aleki-Likoló.”

Likanisi yango emonani mpe na bavɛrsɛ mosusu ya Biblia. Mosakoli Mika alobaki boye: “Mpo na elimo ya Yehova, natondi mɛkɛ na nguya.” (Mika 3:8) Yesu alakaki bayekoli na ye boye: “Bokozwa nguya ntango elimo santu ekoya likoló na bino.” (Misala 1:8) Lisusu, ntoma Paulo alobelaki “nguya ya elimo santu.”​—Baroma 15:13, 19.

Nyonso wana emonisi nini? Boyokani ezali kati na elimo santu mpe nguya ya Nzambe. Yehova asalelaka elimo santu mpo na komonisa nguya na ye. Na maloba mosusu, elimo santu ezali nguya ya Nzambe oyo asalaka na yango mosala. Yango ezali nguya moko ya kokamwa! Ezali mpasi tóyeba mpenza nguya oyo esengelaki mpo na kosala molɔ́ngɔ́ mobimba. Na nzela ya mosakoli Yisaya, Yehova asɛngi biso tókanisa na likambo oyo: “Bótombola miso na bino likoló mpe bómona. Nani azalisaki biloko oyo nyonso? Ezali Moto oyo abimisaka limpinga na yango na kolanda motángo na yango mpenza, abengaka yango nyonso na nkombo. Mpo na makasi mingi oyo azali na yango, mpo azali na makasi na kati ya nguya, ata moko te kati na yango ezali kozanga.”​—Yisaya 40:26.

Na yango, Biblia emonisi ete molɔ́ngɔ́ mpe makambo na yango nyonso esalemá na lisalisi ya “makasi mingi,” to nguya ya Oyo-Aleki-Likoló. Na ntembe te, nguya ya Nzambe ezali monene mingi, mpe soki tozali na bomoi ezali mpo na yango.​—Talá etanda “Makambo oyo elimo santu esalaki.”

Yehova akoki kosalela elimo santu na ye mpo na kosala makambo ya minene; na ndakisa, asalelaki yango mpo na kokela molɔ́ngɔ́. Kasi, akoki mpe kosalela yango mpo na bolamu ya bato. Biblia etondi na bandakisa ya bato oyo elimo ya Nzambe epesaki bango nguya.

“Elimo ya Yehova ezali na ngai”

Makambo oyo Yesu asalaki ntango azalaki awa na mabele, esalisi biso tóyeba ndenge oyo elimo ya Nzambe ekoki kopesa basaleli na ye makasi. Yesu ayebisaki bato ya Nazarete boye: “Elimo ya Yehova ezali na ngai.” (Luka 4:18) Makambo nini Yesu asalaki “na nguya ya elimo”? (Luka 4:14) Abikisaki bato ya maladi ndenge na ndenge, akitisaki mbonge makasi, aleisaki ebele ya bato na mwa mampa mpe mbisi, asekwisaki ata bakufi. Ntoma Petro alobelaki Yesu ete azali “mobali oyo Nzambe amonisaki . . . polele na nzela ya misala ya nguya mpe na makamwisi ya komonisa makambo oyo ekoya mpe na bilembo oyo Nzambe asalaki na nzela na ye.”​—Misala 2:22.

Lelo oyo elimo santu esalaka lisusu makamwisi ya ndenge wana te. Kasi, ekoki kosala makambo ya minene na bomoi na biso. Na bolingo nyonso, Yehova apesaka basaleli na ye elimo santu, ndenge Yesu alakaki bayekoli na ye. (Luka 11:13) Yango wana, ntoma Paulo alobaki boye: “Na makambo nyonso nazali na makasi na lisalisi ya moto oyo apesaka ngai nguya.” (Bafilipi 4:13) Elimo santu ekoki kosala bongo na bomoi na yo? Lisolo oyo elandi ekoyanola na motuna yango.

[Etanda/​Elilingi na lokasa 5]

Ntina oyo elimo santu ezali moto te

Biblia ekokanisi elimo santu na mai. Ntango alakaki basaleli na ye mapamboli, Nzambe alobaki boye: “Mpo moto oyo azali na mposa ya mai nakosopela ye mai, mpe esika oyo ekauká nakosopela yango mikɛli oyo ezali kotíyola. Nakosopela momboto na yo elimo na ngai, mpe bakitani na yo lipamboli na ngai.”​—Yisaya 44:3.

Ntango Nzambe asopi elimo na ye likoló ya basaleli na ye, ‘batondaka na elimo santu.’ Biblia elobi ete Yesu, Yoane Mobatisi, Petro, Paulo, Barnabasi, mpe bayekoli oyo bayanganaki esika moko na mokolo ya Pantekote ya mobu 33 ya ntango na biso, batondaki na elimo santu.​—Luka 1:15; 4:1; Misala 4:8; 9:17; 11:22, 24; 13:9.

Tókanisa naino: Bakoki ‘kosopa’ moto likoló ya bato? To etuluku ya bato bakoki ‘kotonda’ na moto? Yango ekoki kosalema te. Biblia elobeli bato oyo batondaki na bwanya, boyebi, ata mpe boyebi ya sikisiki, kasi elobi te ete moto moko atondaki na moto mosusu.​—Exode 28:3; 1 Bakonzi 7:14; Luka 2:40; Bakolose 1:9.

Liloba ya Grɛki oyo ebongolami na “elimo” ezali pneuʹma, oyo elimboli mpe nguya moko oyo emonanaka te. Buku moko (Expository Dictionary of New Testament Words), emonisi ete liloba pneuʹma “elimbolaka libosoliboso mopɛpɛ . . . to mpe mpema; kasi, elimbolaka mpe mingimingi elimo oyo, lokola mopɛpɛ emonanaka te mpe ezali na nguya.”

Emonani polele ete elimo santu ezali moto te.a

[Maloba na nse ya lokasa]

a Mpo na koyeba makambo mosusu, talá lisolo: “Oyo osengeli koyeba mpo na Tata, Mwana mpe Elimo Santu” na nkasa 201-204 na buku Biblia eteyaka mpenza nini? ebimisami na Batatoli ya Yehova.

[Eutelo ya bafɔtɔ]]

Photodisc/​SuperStock

    Mikanda na Lingala (1984-2026)
    Bimá
    Kɔtá
    • Lingala
    • Kotindela moto
    • Makambo oyo olingi
    • Copyright © 2025 Watch Tower Bible and Tract Society of Pennsylvania
    • Ndenge ya kosalela
    • Kobomba makambo ya moto
    • Kobongisa makambo na yo
    • JW.ORG
    • Kɔtá
    Kotindela moto